Engebene Biblia
Elimo santu ezali moto?
ELIMO SANTU ya Nzambe ezali nini? Na mokanda na yango ya ebandeli, Biblia elobi ete elimo santu, oyo ebongolami mpe na “nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala,” “ezalaki kotambola likoló ya mai.” (Genese 1:2) Na lisolo ya batisimo ya Yesu emonani ete Nzambe azalaki na “likoló,” kasi elimo santu ‘ekitaki lokola ebenga’ likoló ya Yesu. (Matai 3:16, 17) Lisusu, Yesu alobaki ete elimo santu ezali “mosungi.”—Yoane 14:16.
Bavɛrsɛ wana mpe mosusu etindi bato mosusu báloba ete elimo santu ezali moto lokola Nzambe, Yesu mpe baanzelu. Na boumeli ya ebele ya bambula, mangomba mosusu ya minene ya boklisto balobaka ete elimo santu ezali moto. Atako liteya yango eumeli bambula mingi, bandimi mingi ya mangomba bazali naino komituna soki elimo santu ezali nini, bamosusu bazali ata kotɛmɛla makanisi ya bakonzi ya mangomba na bango. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo euti kosalema emonisi ete bato mingi (61 %) balobaka ete elimo santu ezali “elembo oyo emonisaka ete Nzambe azali na esika moko boye to nguya na ye, kasi ezali moto te.” Kasi, Biblia elobi nini?
Likanisi ya Biblia
Moto oyo atángaka Biblia na bosembo akoki te koloba ete elimo santu ezali moto ndenge bakonzi ya mangomba bakanisaka. Tótalela masolo ya Biblia oyo elandi.
1. Ntango Malia mama na Yesu akendaki kotala ndeko na ye Elizabeti, Biblia elobi ete mwana oyo azalaki na kati ya libumu ya Elizabeti aninganaki, “mpe Elizabeti atondaki na elimo santu.” (Luka 1:41) Tokoki mpenza koloba ete moto moko “atondaki” na kati ya moto mosusu?
2. Ntango Yoane Mobatisi ayebisaki bayekoli na ye ete Yesu nde akozwa esika na ye, alobaki boye: “Mpo na ngai, nazali kobatisa bino na mai . . . , kasi moto oyo azali koya nsima na ngai azali makasi koleka ngai, oyo basandale na ye nabongi te kolongola. Moto wana akobatisa bino na elimo santu.” (Matai 3:11) Ntango Yoane alobaki ete bato bakobatisama na elimo santu, alingaki te koloba ete elimo santu ezali moto.
3. Ntango ntoma Petelo akendaki kotala mokonzi moko ya basoda ya Loma ná libota na ye, alobaki ete Nzambe apakolaki Yesu “na elimo santu mpe na nguya.” (Misala 10:38) Mwa moke nsima, “elimo santu ekitelaki” libota ya mokonzi wana ya basoda. Biblia elobi ete bato mingi bakamwaki “mpo likabo ya ofele ya elimo santu ezalaki kosopama likoló ya bato ya bikólo mosusu.” (Misala 10:44, 45) Awa mpe, maloba oyo esalelami emonisi te ete elimo santu ezali moto.
Mbala mingi, liloba ya Nzambe elobelaka eloko lokola moto. Na ndakisa, bwanya, bososoli, lisumu, liwa mpe boboto monene. (Masese 8:1–9:6; Baloma 5:14, 17, 21; 6:12) Yesu alobaki ete “bwanya emonani moyengebene na bana na yango nyonso,” to na matomba na yango. (Luka 7:35) Emonani ete bwanya ezali te moto oyo azali na bana. Ndenge moko mpe, elimo santu ezali moto te, atako emonisamaka mbala mosusu lokola moto.
Elimo santu ezali nini?
Biblia emonisi ete elimo santu ya Nzambe ezali nguya na ye oyo esalaka mosala. Kutu, libongoli moko ya malamu ya Makomami ya Liebele elobi ete elimo santu ya Nzambe ezali “nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala.” (Genese 1:2) Biblia mobimba emonisi likanisi yango polele.—Mika 3:8; Luka 1:35; Misala 10:38.
Nzambe azali te bisika nyonso ndenge bato mingi bakanisaka. Kasi, afandaka na likoló, ‘efandelo na ye’ to esika oyo afandaka. (1 Mikonzi 8:39; 2 Ntango 6:39) Biblia elobeli mpe esika oyo Nzambe afandaka, epai “kiti na ye ya bokonzi” ezali. (1 Mikonzi 22:19; Yisaya 6:1; Danyele 7:9; Emoniseli 4:1-3) Kasi, uta na ‘efandelo na ye,’ akoki kosalela nguya na ye oyo esalaka mosala mpo na kokóma na bisika nyonso, ezala na likoló to na mabelé.— Nzembo 139:7.
Na 1879, Charles Ives, moto ya mayele na maloba ya Biblia, apesaki ndakisa moko mpo na komonisa ete Nzambe azali na likoki ya kosalela nguya na ye atako afandaka esika moko. Akomaki boye: “Na ndakisa, tolobaka ete ‘fungolá maninisa, moi ekɔta na ndako.’ Tolobelaka mpenzampenza moi te, kasi nde kongɛnga ya moi.” Ndenge moko mpe, Nzambe atikaka esika na ye te mpo akenda esika oyo alingi kosalela nguya na ye. Asalelaka kaka elimo santu na ye oyo ekoki kokóma bisika nyonso. Soki oyebi malamu ndimbola ya elimo santu, elingi koloba nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala, okozala mpenza na elikya ete Yehova akokokisa bilaka na ye.
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Biblia eteyaka ete elimo santu ezali moto?—Misala 10:44, 45.
◼ Elimo santu ezali nini?—Genese 1:2.
◼ Elimo santu ekoki kokóma tii wapi?—Nzembo 139:7.