Mpo na nini ekómelaka ngai nabungisa makanisi?
Monganga alingaki kotala liso na ngai mpo ayeba soki ezali malamu. Yango esɛngaki atya ngai eloko moko likoló ya liso. Nayebaki likambo nini elingaki kosalema. Esalemaka ntango nyonso bongo, ata mpe ntango monganga abendaka ngai mwa makila na ntonga. Mbala mosusu, kobɛta lisolo mpamba ya moto oyo azoki esalaka ngai mpe bongo, elingi koloba nabungisaka makanisi.
Lapolo moko euti na Canada emonisi ete kati na biso, bato soki misato likoló ya monkama babungisaka makanisi soki bakutani na moko ya makambo yango. Soki yo mpe otungisamaka lokola ngai, mbala mosusu olukaka ndenge ya kosilisa yango, kasi esimbaka te. Ntango mosusu, osalaka makasi okende kokɔta na twalɛti mpo ebwaka yo te na miso ya bato. Kasi, yango ezali likanisi ya malamu te, mpamba te ekoki kobwaka yo mbalakaka na nzela mpe okoki kozoka. Mbala mingi, nazalaki kobungisa makanisi; yango wana, nalukaki nayeba ntina na yango.
Nsima ya kosolola na monganga ya malamu mpe kolukaluka na mwa babuku, nayaki koyeba ete babengaka yango syncope vasovagale.a Minganga bakanisaka ete yango esalemaka soki makila ezali kotambola malamu te na nzoto, na ndakisa ntango moto oyo afandaki, atɛlɛmi.
Ntango mosusu, na ndakisa soki omoni makila to bazali kosala yo ekzamɛ ya miso, misisa ya nzoto oyo esalaka ete opema, motema ebɛta mpe estoma na yo enika biloko kozanga ete oyeba (système nerveux autonome), esalaka lokola nde olali, nzokande ofandi to otɛlɛmi. Mbala mingi, motema ebandaka naino kobɛta mbangumbangu, mpamba te ozali kotungisama. Na nsima, soki vitɛsi ya makila ekiti na mbalakaka, misisa oyo etambwisaka makila na makolo ekovimba. Yango esalaka ete makila mingi ekita na makolo na esika ekenda na motó. Lokola makila oyo etambwisaka mopɛpɛ na nzoto mobimba ekiti mingi na makolo, bɔɔngo ekozanga mopɛpɛ; na ntango wana nde okobungisa makanisi. Osengeli kosala nini mpo obungisa makanisi te?
Ntango bazali kobenda yo mwa makila mpo na kosala ekzamɛ, talá esika mosusu to lalá. Ndenge touti kolobela yango, mbala mingi, okoki koyeba bilembo ya kobungisa makanisi mpe kozwa bibongiseli liboso ebwaka yo. Minganga mingi balobaka ete esengeli kolala mpe kotya makolo likoló ya kiti to na efelo. Yango ekosalisa yo mpo makila ekita mingi na makolo te mpe okobungisa makanisi te. Nsima ya mwa miniti, okoki koyoka nzoto malamu.
Soki makambo oyo esalisi yo ndenge esalisaka ngai, okoyeba malamu bilembo ya kobungisa makanisi mpe okozwa nokinoki bibongiseli mpo ebwaka yo te.—Euti na motángi moko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “vasovagal” esalelami mpo na kolobela ndenge mosisa moko ya molai (nerfs vagues), oyo eutaka na bɔɔngɔ, esalisaka misisa mosusu oyo etambwisaka makila na nzoto. Liloba vagus euti na Latin mpe elimboli “oyo ezali koyengayenga.”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Eleki malamu kolala ntango bazali kosala yo ekzamɛ