Solo ya Biblia epesi bango bonsomi
YESU KRISTO alobaki na etuluku moko ya bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Ndenge bandakisa oyo elandi emonisi yango, bonsomi yango esangisi mpe kosikolama na bademo, bakosi oyo batambwisaka misala ya bilimu mabe.—Yoane 8:44.
Mokomoko ya bandakisa yango emonisi nguya ya kosikola oyo solo ya Biblia ezali na yango. Ya solo, solo ya Biblia nde epesaka mpenza bato bonsomi. Mpo na nini te kotalela Biblia yo moko? Kosala bongo, ekozala mosala ya mpunda te.
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
Bafɔtɔ oyo ezali kolakisa mpenza ndenge makambo elekaki
● Susanna azali mwasi moko oyo azalaki mokambi ya lingomba moko na Brésil. Azalaki na mposa ya kosalela banguya oyo azalaki na yango mpo na kosalisa bato ya bosɛnga. Lisusu, azalaki kosepela “kosolola na mama na ye oyo akufá.” Kasi, mokolo moko “mama” na ye abondelaki ye ete amiboma mpo alanda ye na mokili ya milimo. Likambo yango etungisaki Susanna mpe akómaki kolɔta bandɔtɔ ya mabe. Na nsima, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia na Susanna ná mobali na ye. Babundaki etumba makasi mpo na ‘kotɛmɛla Zabolo,’ mpe nsukansuka ‘akimaki bango.’ (Yakobo 4:7) Sikoyo bazali na kimya, mpe Susanna alɔtaka lisusu te bandɔtɔ wana ya mabe. Akomi ete: “Nazali na makambo mingi ya kopesa Yehova matondi. Kasi, nazali mpenza na botɔndi mingi na ndenge abimisi biso na molili ya makambo ya losambo.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
● Timothy, oyo afandaka na Afrika ya wɛsti, akufá matoi mpe alobaka te.a Lokola minganga mingi bakokaki te kosalisa ye, akendeki epai ya bato oyo babikisaka bato na makamwisi na nzela ya libondeli, kasi esimbaki te. Akomaki ete: “Natungisamaki mingi na motema mpo bakosaki ngai.” Na nsima, Batatoli ya Yehova bayekolaki na Timothy Biblia, mpe balimbolelaki ye ete mokano ya Nzambe ezali ya kolongola maladi mpe bampasi nyonso. Timothy alobaki ete: “Nazali kozela na motema likoló ntango oyo na mokili ya sika ya Nzambe, ‘matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama . . . mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.’” (Yisaya 35:1-6) Kasi, mpo na sikoyo, asalelaka mwa DVD na ye mpo na koteya baninga na ye mosusu oyo bayokaka te solo ya Biblia, mpo na kosalisa bango báyeba solo oyo epesaka bonsomi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
[Etanda/Elilingi na lokasa 9]
● Evelyn, mwasi moko na Estonie, amipesaki mpenza na misala ya bilimo mabe. Lokola Yesu abikisaki bato, ye mpe alingaki kosala bongo. Azalaki mpenza na mposa ya kosalisa mama na ye oyo azalaki na maladi moko oyo ezalaki kosila te. Yango wana, mpo na koyeba mpe kosalisa bamaladi ya makasi, ayekolaki ndenge ya kosalela bamontre ya minene oyo batyaka na bifelo. Na nsima, abandaki kotánga Biblia. Matomba nini emonanaki? Alobaki ete: “Nayaki komona ete bakosaki ngai mpenza. Na yango, natumbaki mikanda mpe bamontre na ngai ya misala ya bilimo mabe.” Lelo oyo, azali koteya solo ya Biblia oyo epesaka bato bonsomi epai ya basusu.
[Etanda/Elilingi na lokasa 9]
● Mary akolaki na moko ya bisanga ya Papouasie-Nouvelle-Guinée, epai bato babangaka bakufi. Soki moto moko ya mboka na bango akufi, Mary azalaki kokende kolala na nse ya mbeto ya moto mosusu, mpo azalaki kobanga ete elimo ya moto oyo akufi ekosala ye mabe te soki azali ye moko. Na nsima ayekolaki na Biblia ete bakufi balalá, bazali kozela lisekwa ya bomoi na paradiso awa na mabele. (Luka 23:43; Yoane 11:11-14) Yango wana, abangaka lisusu bakufi te.
[Etanda/Elilingi na lokasa 9]
● Alicia, oyo akolaki na libota ya Batatoli ya Yehova na États-Unis, akómaki kosepela na babuku mpe bafilme ya misala ya bilimo mabe. Na nsima, abandaki kokanisa na mozindo na solo ya Biblia oyo ayekolaki. Lokola amonaki mpenza ete azali ‘kolya na mesa ya Yehova mpe na mesa ya bademo,’ atikaki kosala bongo mpe sikoyo azali na lisosoli ya pɛto liboso ya Nzambe.—1 Bakorinti 10:21.