Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/11 lok. 32
  • “Bato bakobebisa mabele libela?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bato bakobebisa mabele libela?”
  • Lamuká!—2011
Lamuká!—2011
g 7/11 lok. 32

“Bato bakobebisa mabele libela?”

● Soki omati mosika na likoló, mabele emonanaka lokola biju moko ya kitoko oyo ezali na langi ya bule mpe mpɛmbɛ. Kasi soki otali yango malamu penepene, okomona ete mabele, esika oyo biso tofandi, ezali kobeba. Mpo na nini? Eyano ezali pɛtɛɛ: Bato oyo Nzambe atyaki báfanda, babateli yango te. Lisusu, bazali kobebisa mabele kaka te na ndenge bazali kobebisa mopɛpɛ, kobebisa bazamba, mpe kosalela mabele na ndenge ya mabe, kasi mpe na ndenge bazali kobuka mibeko ya Nzambe na kosala mobulu, kosopa makila mpe kosala pite to ekobo.

Eleki sikoyo bambula soki nkóto mibale, Biblia esakolaki ete makambo wana ya mabe ekosalema. (2 Timote 3:1-5; Emoniseli 11:18) Biblia esakolaki mpe ete kaka Nzambe nde akobongisa makambo yango mpo na libela, kasi moto te. Makambo yango ya ntina mingi ekolobelama na diskur ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo ete: “Bato bakobebisa mabele libela?” Diskur yango ekosalema na mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na motó ya likambo: Tiká ‘Bokonzi ya Nzambe eya!’ Mayangani yango ekobanda na sanza ya Mai na États-Unis mpe ekokoba na mikili mosusu.

Tolendisi yo okende na liyangani oyo ekosalema pene na esika oyo ofandi. Mpo na koyeba esika mpe ngonga, tuná Batatoli ya Yehova ya esika oyo ofandi to komelá babimisi ya zulunalo oyo. Na adrɛsi oyo www.pr2711.com, totye bisika oyo mayangani yango ekosalema na République démocratique du Congo mpe na mikili mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto