Fololo oyo eleki monene na mokili
MOBALI moko na ekólo Angleterre nkombo na ye Joseph Arnold, oyo ayekolaka makambo etali milona akendeki mpo na kosangisa mitindo ndenge na ndenge ya milona na esanga Sumatra, na ekólo Indonésie. Moto oyo azalaki kokamba ye alobaki boye na nsai nyonso: “Arnold yaká, yaká kotala fololo moko ya monene mpenza, ya kitoko mpe ya kokamwisa!” Arnold amonaki fololo moko oyo alobaki ete ezali mpenza ya “kokamwisa.” Atako mbula soki 200 esili koleka banda amonaki fololo yango na mobu 1818, tii lelo oyo fololo yango ya rafflesia ezali kaka koyebana lokola fololo oyo eleki monene na mokili mobimba.
Ezali na mitindo ndenge na ndenge ya rafflesia, mpe yango nyonso ezwami kaka na zamba oyo ezali na Sudi-ɛsti ya Azia. Nzokande, bato ya mayele bazali kokoba komona mitindo mosusu ya sika. Motindo na yango oyo ebimisaka fololo oyo eleki monene ezali Rafflesia arnoldii. Nkombo yango euti na Joseph Arnold mpe moto oyo akendeki ná ye Thomas Stamford Raffles, oyo abandisaki etúká Singapour mpe azalaki mokambi na yango. Atako fololo yango ezalaka kitoko mingi, kasi ezalaka mpasi mpo na kobuka yango. Mpo na nini?
Ya liboso, mpo na bonene na yango. Rafflesia ekoki kokola tii kokóma na bonene ya mɛtrɛ moko, lokola pinɛ ya bisi, mpe kokóma na kilo 11.a Fololo yango ekabwanaka na biteni mitano ya langi ya motane-moindo mpe ebimisaka litutu moko na katikati na yango. Biteni yango efungwamaka mpe ebimisaka libulu moko oyo ezali lokola mbɛki mpe ekoki kokɔtisa litre 6 ya mai.
Ya mibale, mpo na nsolo na yango. Moto moko oyo ayebi rafflesia malamu alobi ete elumbaka nsolo mabe “lokola nzale to mpakasa oyo epɔli.” Mpo na yango, bapesá yango mpe bankombo lokola ‘fololo ya ebembe,’ mpe ‘nzete ya fololo ya solo mabe.’b Mapekapeka oyo elyaka banyama oyo ekufá nde ebotisaka fololo yango mpo elandaka nsolo na yango ya makasi.
Fololo rafflesia ezalaka na nzete te, na nkasa te, na misisa mpe te, mpe ekolaka likoló ya banzete mosusu ya vinyo ya zamba. Soki fololo yango ekangami likoló ya nzete ya vinyo eumelaka sanza soki zomi mpo efungwama; mbala mingi, ekolaka lokola chou moko ya monene. Na nsima, ezwaka bangonga mingi mpo biteni na yango efungwama mpe kitoko na yango emonana. Na katikati ya biteni na yango, ezali na lidusu moko oyo na kati na yango ezali na mwa biloko ya mikemike. Mosala ya mwa biloko yango eyebani naino malamu te; atako bongo, bato ya mayele balobi ete mwa biloko yango ebimisaka molunge mpe yango nde ebakisaka nsolo.
Kasi, fololo yango ya kitoko mingi eumelaka ntango molai te. Kaka nsima ya mwa mikolo, ekufaka mpe ebandaka kopɔla mpe ekómaka maimai ya moindo mpe ya mosɛlu.
Fololo oyo babengi Rafflesia arnoldii emonanaka mingi te mpe ebandi kosila. Mpo na nini? Mpamba te mpo ekola tii efungwama, esengeli fololo ya mwasi ezala penepene na oyo ya mobali mpo ebotisa yango. Kasi, mingi na yango ekolaka tii kofungwama te mpo bato babukaka yango mpe basalelaka yango na bankisi ya bonkɔkɔ, to balyaka yango lokola ndunda. Yango esali ete bafololo yango oyo ebotaka na zamba emonana lisusu mingi te. Lisusu, bato bazali mpe kobebisa bazamba epai yango ezalaka.
Komona fololo rafflesia esepelisaka mingi. Bonene na yango ekamwisaka mpe soki oyoki nsolo na yango okobosana yango noki te. Lisusu, lolenge na yango mpe langi na yango ezalaka kitoko mpenza. Na ntembe te, fololo wana oyo eleki monene na mokili, ezali kaka moko ya misala mingi ya kokamwisa ya Mozalisi na biso. Nzembo 104:24 elobi ete: “Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya. Mabele etondi na biloko oyo obimisaki.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Fololo ya mitindo mosusu ya rafflesia ezalaka na bonene ya santimɛtrɛ 10.
b Fololo ya titan arum (Amorphophallus titanum) ebengamaka mpe ‘fololo ya ebembe,’ mpe mbala mosusu okoki komona yango lokola fololo ya rafflesia.—Talá Lamuká! ya 22 Yuni 2000, lokasa 31, na Lifalanse.
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MALAISIE
SUMATRA
[Elilingi na lokasa 25]
Fololo rafflesia oyo ekómi pene ya kofungwama