Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/13 nk. 4-5
  • Ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge
  • Lamuká!—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • Okosala nini soki mwana na yo ya elenge abebisi konfianse oyo opesaka ye?
    Lisalisi mpo na libota
  • Ndenge ya kotya mibeko mpo na mwana na yo oyo akómi elenge
    Lamuká!—2013
  • Salisá bana na yo ete bálónga bolenge na bango
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge ya kosolola na mwana na yo kozanga koswana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Lamuká!—2013
g 1/13 nk. 4-5

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge

MOKAKATANO

Ntango azalaki naino mwana, azalaki koyebisa yo makambo nyonso. Lokola akómi elenge, azali lisusu koyebisa yo eloko moko te. Ntango ozali koluka kosolola ná ye azali kokatela yo mangala to kobimisela yo maloba oyo ekopelisa ndako mɔtɔ.

Okoki koyeba ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge. Tótalela naino makambo mibale oyo ekoki kobimisa mikakatano.a

NINI ESALAKA BONGO?

Mposa ya kozala na lipanda. Mpo mwana na yo akóma mokóló oyo ayebi kotambwisa bomoi na ye malamu, ezali likambo ya lelo to lobi te. Toboyi te, bilenge mosusu balingaka kozala na bonsomi koleka ndelo; epai mosusu, baboti mosusu mpe bapesaka bana na bango bonsomi moke koleka oyo basengeli na yango. Yango ekoki kobimisa matata mingi kati na baboti mpe bana. Bradb elenge moko ya mbula 16 amilelaki boye: “Baboti na ngai balukaka kolandela likambo nyonso oyo nasalaka. Soki bapesi ngai bonsomi mingi te, ntango nakokóma na mbula 18, nakotikela bango ndako na bango!”

Likoki ya kokanisa. Bana mike basukaka kaka na kokanisa ete makambo nyonso ezali malamu to mabe, kasi bilenge basosolaka likambo. Likoki ya kokanisa ezali na ntina mpo esalisaka elenge ayeba kososola likambo malamumalamu. Mpo na mwana moke kolimbola liloba bosembo ezali mpasi te, ezali na yango kaka mwa kalkile. Na ndakisa akoki koloba: ‘Mama akabolaki gato na biteni mibale, apesaki ngai eteni moko mpe eteni mosusu apesaki ndeko na ngai.’ Nzokande, bilenge bayebaka ete kosala likambo na bosembo ezali pɛtɛɛ te. Kutu kosala likambo na bosembo elakisaka ntango nyonso te kosalela bato makambo ndenge moko, mpe kosalela bato makambo ndenge moko elakisaka ntango nyonso te kosala na bosembo. Likoki ya kokanisa esalisaka elenge ayeba kolonga likambo ya mpasi lokola oyo. Na ngambo mosusu ekoki kosala ete aboya kondima makanisi na yo.

OKOKI KOSALA BOYE

Soki likoki ezali, bósololaka na mabaku mosusu. Saleláká libaku nyonso oyo emonani. Na ndakisa, baboti mosusu bamonaka ete ezalaka mpasi te bilenge báfungolela baboti na bango motema ntango bazali kosala misala ya ndako to kotambola na motuka elongo, koleka ndenge basololaka ntango bazali kotalana na miso.​—Toli ya Biblia: Kolimbola Mibeko 6:6, 7.

Masolo milaimilai te. Ezali na ntina te bóswanaka mpo na likambo nyonso. Kutu, pesá likanisi na yo . . . mpe suká kaka wana. Makambo mingi oyo oyebisi ye, “akoyoka” yango na nsima mpe akokanisa yango ntango akozala ye moko. Pesá ye libaku ya kosala bongo.​—Toli ya Biblia: Masese 1:1-4.

Yokaká​—mpe kozala makambo makasi te. Mpo oyeba likambo na ye malamumalamu, yokaká na likebi mpenza mpe kokataka ye maloba te. Ntango ozali koyanola, kozala makambo makasimakasi te. Soki ozali kolandela likambo nyonso, mwana na yo akoki koluka ndenge ya koboya kotosa kozanga ete azwela yango etumbu. Buku moko (Staying Connected to Your Teenager) elobi boye: “Yango nde etindaka bana bakóma na bomoi ya lolenge mibale. Epai mosusu balobaka na baboti na bango makambo oyo bazali na mposa ya koyoka, mpe na ngambo mosusu basalaka makambo oyo balingaka ntango baboti na bango bazali te.”​—Toli ya Biblia: Bafilipi 4:5.

Zalá kimya. Elenge moko na nkombo Kari alobi boye: “Soki toyokani te na mama, akómaka kosilika mpo na likambo nyonso nalobaka. Yango esilikisaka ngai, mpe masolo na biso ebongwanaka koswana.” Na esika ya koyeisa makambo minene, lobá nde likambo moko oyo ekomonisa ete ozali komitya na esika ya mwana na yo. Na ndakisa, na esika ya koloba, “ezali na yango likambo moke!” okoki koloba, “namoni mpenza ndenge likambo yango etungisi yo.”​—Toli ya Biblia: Masese 10:19.

Soki esengeli, lakisá ye nzela kasi kokweisela ye mitindo te. Likoki ya kokanisa ya mwana na yo ezali lokola misisa ya nzoto oyo ezali na mposa ya kokemba. Na yango, ntango akutani na likambo oyo asengeli kozwa ekateli, kosala yango na esika na ye te. Ntango bozali kosolola likambo yango, tiká ye moko aluka ndenge ya kosilisa makambo mosusu. Nsima ya kopesa ye mwa makanisi, okoki koyebisa ye boye: “Oyo ezali kaka mwa makanisi napesi. Natikeli yo mokolo moko to mibale mpo otalela makanisi yango, mpe na nsima tokokutana lisusu mpo na kolobela ekateli oyo omoni ete ezali malamu mpe mpo na nini.”​—Toli ya Biblia: Baebre 5:14.

a Na lisolo oyo tolobeli bilenge nyonso ezala mibali to basi.

b Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • ‘Yokaká noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.’​—Yakobo 1:19.

  • “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ.”​—Masese 15:1.

  • “Bósilikisaka bana na bino te, kasi bóbɔkɔla bango na boboto nyonso na mateya ya solo ya bokristo mpe na batoli.”​—Baefese 6:4, Biblia The New Testament in Modern Speech, ya Richard Francis Weymouth.

MPO NA BILENGE

Olingi ete baboti na yo bápesa yo bonsomi mingi? Olingi mpenza ete bayeba mposa na yo? Okoki kosala ete ezala mpasi te mpo básalela yo bongo! Ndenge nini? Yebisaká bango makambo oyo ozali kokutana na yango na bomoi na yo. Sololáká polelepolele. Soki osali bongo te, bakotyela yo mpenza motema te; kotyela yo motema ezali sekele mpo bápesa yo bonsomi mingi.

Likambo ya ntina ezali ete, kotika kaka te baboti babandaka lisolo. Yo mpe saláká bongo. Yebisáká baboti na yo ndenge olekisi mokolo na yo. Tunáká bango mpe ndenge balekisi oyo ya bango. Soki ozali na likambo oyo ezali kotungisa yo, yebisáká bango yango na limemya nyonso. Koyeba kosolola ezali likoki oyo okozala na yango mposa ntango okokóma mokóló. Mpo na nini te koluka koyeba kosolola banda sikoyo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto