Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 5/13 nk. 8-11
  • Likambo ya kobɛta molongani ekoki kosila?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo ya kobɛta molongani ekoki kosila?
  • Lamuká!—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDENGE YA KOTIKA KOBƐTA MOLONGANI NA YO
  • Mobulu ekosila mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Bokoki kolónga mikakatano oyo mibebisaka libota
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali konyokola bango na ndako
    Makambo mosusu
  • Esakweli 4. Kozanga bolingo ya libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—2013
g 5/13 nk. 8-11

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Likambo ya kobɛta molongani ekoki kosila?

Ndakisa 1: Baboti ya Isabela bayei na ndako na ye. Balekisi mpokwa moko malamu mpe babɛti masolo kitoko ná Isabel mpe mobali na ye. Moboti nini akosepela te na mobali oyo abali mwana na ye? Mobali yango azali kosalela ye makambo na boboto mpenza.

Ndakisa 2: Frank azali na nkanda makasi. Na mbala oyo mpe, mpo na komonisa yango, akosala kaka ndenge amesaná; akobɛta mwasi na ye na elongi, akobɛtabɛta ye makolo, akobenda ye nsuki to mpe akotutatuta ye motó na efelo.

OKOKI okokamwa soki oyoki ete bandakisa oyo nyonso ezali kaka ya mobali moko ná mwasi na ye.

Mbala mingi, bato oyo babɛtaka balongani na bango bamimonisaka mpe lokola bato malamu

Kaka ndenge bato mingi oyo babɛtaka balongani na bango basalaka, Frank mpe ayebi ndenge ya “komimonisa moto malamu” ntango azali na miso ya bato to ná baboti ya mwasi na ye. Kasi soki azali kaka ná mwasi na ye, Frank azalaka mabe mpenza.

Mibali mingi lokola Frank babɔkwamá na mabota oyo emesanaki kobunda, mpe lokola bakómi mikóló bakanisaka ete ezaleli yango ezali mabe te. Nzokande ezaleli yango ezali mpenza mabe. Yango wana, bato mingi bayokaka mpasi soki bayoki ete mobali moko abɛtaki mwasi na ye.

Ata bongo, likambo yango ezali kosalema mingi. Na ndakisa, na États-Unis, ankɛtɛ moko emonisi ete na mokolo moko, bato babengaka mbala 16 na miniti moko na batelefone ya leta mpo na koyebisa ndenge balongani na bango babɛti bango. Likambo ya kobɛta molongani epalangani na mokili mobimba, ezali kosalema epai ya bato ya mimeseno ndenge na ndenge, babola to bazwi, mpe na bikólo nyonso. Lokola bato mingi bafundaka yango epai ya bapolisi te, yango emonisi ete likambo yango esalemaka mingi koleka kutu ndenge baankɛtɛ emonisi yango.b

Balapolo yango ezali kotinda bato mingi bámituna boye: Ndenge nini mobali akoki kosala moto mosusu makambo ya mabe boye, mingimingi mwasi na ye moko? Mibali oyo babɛtaka basi na bango bakoki kozwa lisalisi mpo na kotika ezaleli yango?

Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo, bandimaka ete batoli ya Biblia ekoki kosalisa bato oyo babɛtaka balongani na bango batika ezaleli yango. Ya solo, kotika bizaleli wana ezali pɛtɛɛ te kasi ekoki kosalema. Mateya ya Biblia esalisi bato mingi oyo bazalaki kobɛta balongani na bango bákóma na boboto mpe na bonkonde. (Bakolose 3:8-10) Tótalela ndakisa ya Troy ná Valerie.

Na ebandeli boyokani na bino ezalaki ndenge nini?

Valerie: Kaka na butu oyo toyokanaki mpo na libala, Troy abɛtaki ngai mbata makasi mpe nayokaki mpasi na esika yango pɔsɔ mobimba. Asɛngaki ngai mpenza bolimbisi mpe alakaki ete akosala lisusu bongo te. Azalaki kozongela maloba yango mbala na mbala na boumeli ya bambula mingi nsima ya libala na biso.

Troy: Likambo nyonso ezalaki kosilikisa ngai na ndakisa, kolya biloko na retare. Mokolo moko nabɛtaki Valerie na mondoki . Mokolo mosusu, nabɛtaki ye mabe mpenza kutu nakanisaki ete akufi. Na nsima, natyaki mbeli pene na kingo ya mwana na biso ya mobali mpe nabangisaki Valerie ete nakoboma mwana yango.

Valerie: Nazalaki kobanga ntango nyonso. Na bantango mosusu nazalaki kokima ndako tii ntango nkanda ya Troy ekokita. Na nyonso wana, nazalaki komona malamu kutu abɛtaka ngai na esika afingaka ngai.

Troy, mobulu na yo ebandá kala?

Troy: Ɛɛ, banda bomwana na ngai. Nakolá na libota moko oyo elingá bitumba. Tata azalaki mbala na mbala kobɛta mama na miso na biso. Na nsima tata asundolaki biso mpe mama abalaki mobali mosusu oyo azalaki mpe kobɛta ye. Kutu mobali yango asangisaki na ngai mpe na yaya na ngai ya mwasi nzoto na makasi. Mpe akɔtaki bolɔko mpo na yango. Ya solo, namoni ete makambo yango te nde esengelaki kotinda ngai nanyokola mwasi na ngai.

Valerie, mpo na nini obomaki libala yango te?

Valerie: Nazalaki kobanga. Na nse ya motema, nazalaki koloba boye, ‘Ekozala boni soki alukiluki ngai, amoni ngai mpe abomi ngai to baboti na ngai? To ekozala boni soki nafundi ye mpe makambo ebebi lisusu?’

Makambo ebandaki kobonga ntango nini?

Troy: Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola ná mwasi na ngai Biblia. Na ebandeli, nazalaki koyokela baninga na ye wana ya sika zuwa mpe namonaki ete nasengelaki kobatela ye mpo akɔta te na “mwa lingomba” wana ya mabe. Nakómaki lisusu mabe koleka, kaka epai ya Valerie te kasi mpe epai ya Batatoli. Kasi, mokolo moko tokɔtaki lopitalo na boumeli ya pɔsɔ misato ná Daniel, mwana na biso ya mobali ya mbula minei oyo azalaki kobɛla maladi ya ndɛkɛ. Na boumeli ya ntango wana, Batatoli basungaki biso mingi mpenza, babatelaki kutu Desiree, mwana na biso ya mwasi ya mbula motoba. Nsima ya kosala butu mobimba, Motatoli moko azalaki kofanda ná Daniel mokolo mobimba mpo Valerie azwa mwa mpɔngi. Boboto na bango, elingi koloba, ya bato oyo nazalaki kozwa na valɛrɛ te; esimbaki mpenza motema na ngai. Namonaki ete bato wana bazali bakristo ya solo, yango wana, nasɛngaki bango bayekola na ngai Biblia. Ntango nazalaki koyekola Biblia, nayekolaki makambo oyo mobali asengeli kosalelaka mwasi na ye mpe oyo asengeli kosalela ye te. Natikaki bizaleli na ngai wana ya mabe libela. Nsukansuka, nakómaki Motatoli ya Yehova.

Batoli nini ya Biblia esalisaki yo obongwana?

Troy: Ezali ebele. Na 1 Petro 3:7, Biblia elobi ete nasengeli kopesaka mwasi na ngai “lokumu.” Bagalatia 5:23 elendisi biso tózala “motema pɛtɛɛ” mpe na “komipekisa.” Baefese 4:31 epekisi “maloba ya kofinga.” Baebre 4:13 elobi ete “biloko nyonso ezali . . . komonana polele” na miso ya Nzambe. Na yango, Nzambe amonaka bizaleli na ngai, ata soki bato ya kartye bazali komona yango te. Namonaki mpe ete nasengeli kotika baninga na ngai ya kala, mpo “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Baninga na ngai ya kala bazalaki kolinga te natika bizaleli na ngai wana ya mabe. Bazalaki komona ete kobɛta mwasi ezali malamu mpe “ebongi kosala ye bongo.”

Sikoyo omonaka libala na yo ndenge nini?

Valerie: Eleki sikoyo mbula 25 banda Troy akómá Motatoli ya Yehova. Banda wana, akómá mpenza na bolingo, boboto mpe atyelaka ngai likebi.

Troy: Nakokoka te kobosanisa bato ya libota na ngai makambo mabe oyo nasalá bango, mpe ebongaki te nasalelaka mwasi na ngai makambo ndenge wana. Kasi nazali kozela na motema likoló kokokisama ya Yisaya 65:17, ntango tokobosana basuvenire wana ya mabe.

Toli nini mokomoko na bino akoki kopesa mabota oyo ezali konyokwama na likambo yango?

Troy: Soki obɛtaka to ofingaka bato ya libota na yo, yebá ete ozali na mposa ya lisalisi mpe luká kozwa yango. Ezali na makambo ebele oyo ekoki kosalisa yo. Mpo na ngai, koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova mpe koyangana na makita na bango esalisaki ngai natika bizaleli na ngai ya mabe oyo epikamaki makasi mpenza.

Valerie: Kowela te kokokanisa makambo na yo ná oyo ya bato mosusu to kolanda toli ya bato oyo bakanisaka ete bayebi oyo eleki malamu mpo na yo. Naboyi te, moto nyonso te nde akoki kozwa matomba oyo ngai nazwi, kasi nasepelaka ndenge nabomaki libaya yango te, mpo lelo oyo tokómá na boyokani malamu.

NDENGE YA KOTIKA KOBƐTA MOLONGANI NA YO

Koyekola Biblia esalisi mibali mingi bábongwana

Biblia elobi boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.” (2 Timote 3:16) Ndenge moko na Troy oyo touti kolobela, mibali to basi mingi oyo bazalaki kosalela balongani na bango makambo ya mabe, basalelaki batoli ya Biblia mpe babongolaki makanisi mpe bizaleli na bango.

Okosepela koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge Biblia ekoki kobongisa libala na yo? Mpo na koyeba makambo mosusu luká Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi to kɔtá na site www.pr2711.com.

a Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.

b Toboyi te, basi mosusu mpe babɛtaka mibali na bango. Kasi, balapolo mingi emonisi ete mibali mingi nde babɛtaka basi na bango.

MPO NA NINI BALONGWAKA NA MABALA YANGO TE?

Mpo na nini basi mosusu bandimaka kofanda ná mibali oyo babɛtaka bango? Mbala mingi ezalaka mpo babangaka ete mibali yango bakosala bango mabe lisusu koleka. Mibali mosusu balobaki ete bakosala basi na bango mabe ata mpe koboma bango soki bameki kokima. Bamosusu kutu basalá bongo.

Basi mosusu baboyaka kolongwa mpo babangaka ete baninga to bandeko na bango bakotɛmɛla bango, mpe bakondima te ete mibali yango banyokolaka bango. Na ndakisa, Isabel oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, akabwanaki ná mobali ye. Alobi boye: “Yaya na ngai ya mwasi asilikelaki ngai mpe ayebisaki ngai nazonga epai ya mobali na ngai; azalaki kondima te ete mobali ‘malamu’ ndenge wana akoki kozala mabe mpenza. Bato nyonso ya kartye baboyaki ngai, yango wana nasengelaki kokende kofanda esika mosusu ná bana na ngai.”

Kasi basi mosusu batikalaka na mabala yango mpo na bantina oyo:

  • Balingaka bana na bango bábɔkwama na baboti nyonso mibale.

  • Babangaka ete bakokoka te komisalisa mpe kosalisa bana na bango na makambo ya mbongo.

  • Na libunga nyonso, bakanisaka ete soki babɛtamaka ezali foti na bango.

  • Bayokaka nsɔni ya koloba ete bazali konyokola bango.

  • Bazalaka na elikya ete makambo ekobonga.

Batatoli ya Yehova balandaka toli ya Biblia oyo elobaka ete libala ekoki kokufa kaka mpo na ekobo. (Matai 5:32) Kasi, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosala ete bamosusu bákabwana ná balongani na bango, na ndakisa soki molongani moko abɛtaka moninga.

BATOLI YA BIBLIA OYO EKOKI KOSALISA MIBALI

  • Pesáká mwasi na yo lokumu mpe limemya.​—1 Petro 3:7.

  • Lingá mwasi na yo ndenge olingaka nzoto na yo moko.​—Baefese 5:28, 29.

  • Salá nyonso mpo bolingo na yo ekita te, kasi nde ebakisama.​—Baefese 5:25.

  • Boyá maloba ya kofinga.​—Baefese 4:29, 31.

  • Zalá na ezaleli ya komipekisa.​—Masese 29:11.

  • Yebá ete komipesa nzoto kilo eutaka te na kolandela makambo ya basusu, kasi nde na kotalela oyo ya yo moko.​—Masese 16:32.

  • Kanisá mpasi oyo misala na yo ekobimisa.​—Bagalatia 6:7.

  • Soki omoni ete okokoka kokanga motema te, ekozala malamu olongwa wana.​—Masese 17:14.

  • Yekolá koyina mobulu.​—Nzembo 11:5.

  • Kozwa mwasi na yo lokola moto mpamba te, kasi nde lokola mosungi oyo abongi.​—Ebandeli 1:31; 2:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto