Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/14 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • États-Unis
  • Espagne
  • Mbu ya Pasifike
  • Émirats Arabes Unis
  • Kolangwa ezali mpenza mabe?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Nkɛlɛ ya Mikrobe
    Lamuká!—1996
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2006
  • Mbongwana ya ezalela ya basi na mikolo na basi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Lamuká!—2014
g 7/14 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

États-Unis

Frigo oyo ezali na mwa milangi

Ankɛtɛ moko oyo Departema ya makambo ya bilanga esalaki elobi ete na bileko mosusu ya mobu 2012, bato milio 49 to (14,5%) ya mabota bazalaki “koyeba te soki bakozwa bilei ndenge nini to mpe soki bakokoka kozwa bilei oyo esengeli mpo na bato nyonso ya mabota na bango.”

Espagne

Mobali moko oyo azali momɛli monene ya masanga

Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bana kelasi ya iniversite emonisi ete basi mingi (56%) mpe mibali mingi (41%) bandimaki ete bazali bamɛli minene ya masanga, elingi koloba mibali bamɛlaka na mbala moko milangi soki mwambe mpe basi milangi motoba.

Mbu ya Pasifike

Mbu ya Pasifike

Bato ya siansi oyo bazwaki mwa biloko mikemike na bozindo ya mɛtrɛ soki 11 000 na libulu oyo babengi Fosse des Mariannes oyo ezali na kati ya Mbu ya Pasifike mpo báyekola yango, bamonaki ete bikelamu ya mikemike mpenza mpe bamikrobe mosusu ezali mingi na libulu yango atako molili, malili makasi mpe makambo mosusu ekoki kosala ete bomoi ezala kuna te. Kala bazalaki kokanisa ete bikelamu ya bomoi ekoki kozala mingi te na esika ya ndenge wana.

Émirats Arabes Unis

Mbongo ya ebende ya wolo oyo bazali komeka na balansi

Mpo motángo ya bato oyo baleki minene ekita, bakonzi ya Leta ya Dubai bautaki koloba kala mingi te ete bakopesa gramɛ moko ya wolo oyo na ntango wana ezalaki na valɛrɛ ya badolare soki 45 na moto nyonso ya monene oyo alongoli kilo moko. Mpo na kozwa wolo yango, bato basengelaki kokomisa bankombo mpe kolongola kilo 2 na sanza ya Ramadan.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto