Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/14 nk. 10-11
  • Mobembo moko na Irlande

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Irlande
  • Lamuká!—2014
Lamuká!—2014
g 7/14 nk. 10-11
Bokula ya Irlande

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Irlande

Karte ya République indépendante d’Irlande mpe Irlande du Nord

ESANGA “Emeraude” ezwami na kati ya bikólo mibale: Ya monene ezali République indépendante d’Irlande mpe ya moke Irlande du nord, oyo ezali na kati ya Royaume-Uni.

La Chaussée des Géants

La Chaussée des Géants

Babengaka Irlande esanga ya Emeraude mpo mbula ebɛtaka mingi mpe yango esalaka ete matiti ezala ntango nyonso mobesu. Balaki kitoko mpe bibale ná bangomba oyo ezali pene ya Mbu mpe bangomba oyo egumbamagumbamá ebakisaka kitoko na yango.

Ndako ya ndɛlɛ

Ndako ya ndɛlɛ

Bato ya Irlande bakutaná na makambo mingi ya mpasi. Na ndakisa, balobaka ete kobanda mobu soki 1845 tii 1851, bato soki milio moko bakufaki na nzala mpe na bamaladi ntango maladi oyo ebebisaka milona ekɔtelaki bilanga ya mabɛngɛ. Mpo na kokima bobola, bato mingi bakendaki kofanda na bikólo lokola Australie, Grande-Bretagne, Canada mpe États-Unis. Lelo oyo, bato soki milio 35 ya Amerika bankɔkɔ na bango bazalaki bato ya Irlande.

Ba-Irlandais bayebani ete bazalaka kasakasa mpe bayambaka bapaya. Balingaka kolekisa ntango na masano ya kotambwisa mpunda, mpe na masano oyo ebɛtamaka na ekipi lokola cricket, rugby, bale mpe gaélique. Basi balingaka mingi nde lisano oyo babengaka camogie, oyo ekokani na lisano ya hockey.

Ba-Irlandais basepelaka mpe kobɛta masolo mpe balingaka miziki. Mabina ya Irlande oyo babinaka yango na makolo eyebani mingi na mokili mobimba. Nzoto ya baoyo bazali kobina eninganaka te ntango bazali koningisa makolo mbangumbangu.

Baalangá-nzembo ya Irlande

Baalangá-nzembo ya Irlande

Batatoli ya Yehova bazalaka na Irlande banda bambula koleka 100. Lelo oyo, Batatoli koleka 6 000 bafandaka kuna mpe bayekolaka na bato Biblia na molende mpenza.

1. Nzɛnzɛ ya Ba-celte; 2. kornemize; 3. la viole; 4. accordéon; 5. siflé ya etini; 6. mbonda ya bodhram

Miziki ya mboka Irlande ebɛtamaka na bibɛtɛlo lokola oyo ezali awa likoló, na kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: nzɛnzɛ ya Ba-celte, kornemize, violon, accordéon, piololo ya etini, mpe mbonda ya bodhran.

OYEBAKI YANGO?

La Chaussée des Géants, oyo ezwami na Irlande du Nord pene ya Mbu, ezali makonzí ya mabanga ya moindo oyo esalemaká ntango pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ ya volka esopanaki na Mbu.

NA MOKUSE

  • Motángo ya bato: Milio soki minei na ndambo na République indépendante d’Irlande mpe milio soki 1,8 na Irlande du Nord

  • Mboka-mokonzi: Dublin na République indépendante d’Irlande mpe Belfast na Irlande du Nord

  • Minɔkɔ: Irlandais mpe Anglais

  • Klima: Malili mpe mbula ebɛtaka mingi

  • Mangomba ya minene: Bakatolike bazali mingi na République indépendante d’Irlande mpe Irlande du Nord esangisi Bakatolike na Baprotesta

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto