Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/15 nk. 10-11
  • Mobembo moko na Costa Rica

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Costa Rica
  • Lamuká!—2015
Lamuká!—2015
g 1/15 nk. 10-11
Ndenge esanga ya Costa Rica emonanaka na mosika soki moto azali na kati aviɔ

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Costa Rica

Karte oyo ezali komonisa esika Costa Rica ezalaka

ELEKI sikoyo mbula 500, bato ya Espagne bakómaki mpo na mbala ya liboso na mokili yango. Babengaki yango Costa Rica (Côte Riche) mpo bakanisaki ete bakomona wolo ebele na esika yango, kasi esalemaki bongo te. Lelo oyo, na mokili yango eyebani te lokola esika oyo mabanga ya ntalo eutaka, kasi nde esika oyo banyama mpe banzete ndenge na ndenge ezalaka.

Babengaka bato ya Costa Rica Ba-Ticos, mpo bazalaka na momeseno ya kobakisa liloba “-ico” na nsuka ya maloba mpo na kolobela moke na yango. Na ndakisa, na esika ya koloba “un momento” (zelá moke), bakoki koloba “un momentico” (zelá mwa moke). Mokolo na mokolo, basalelaka maloba “¡pura vida!” (bomoi malamu!) mpo na komonisa esengo na bango to mpo na kopesana mbote.

Ligorodo ya miso motane

Bazamba ya Costa Rica etondi na banzete mpe banyama ya ndenge na ndenge, na ndakisa ligorodo ya miso motane oyo efandaka na nzete (Agalychnis callidryas)

Moko ya bilei oyo bato ya Costa Rica balingaka mingi ezali gallo pinto​—balambaka loso ná madesu mpe na nsima basangisaka yango mpe batyaka yango biloko ya nsolo kitoko. Balyaka gallo pinto na ntɔngɔ, na midi, to na mpokwa. Bato balingaka mingi komɛla café chorreado; basalaka yango na elamba moko bakangisá na libaya.

Masangá ya Batatoli ya Yehova ezali soki 450 na Costa Rica. Basalaka makita na minɔkɔ zomi, kati na yango elobeli ya bajɛstɛ ya Costa Rica mpe minɔkɔ mibale ya mboka: Bribri mpe Cabecar.

OYEBAKI YANGO? Na Costa Rica, bamoná ebele ya mabanga kitoko ya libungutulu oyo ebongisamá malamu. Katikati ya libanga (diamètre) oyo eleki monene ezali na mɛtrɛ soki mibale ná ndambo. Bato balobaka ete mabanga yango mosusu eumeli mbula koleka 1 400. Moto moko te ayebi mpenza ntina oyo basalá mabanga yango!

Libanga ya libungutulu ya kala na Costa Rica

Mabanga ya libungutulu

NA MOKUSE

  • Motángo ya bato: 4 878 000

  • Mboka-mokonzi: San José

  • Monɔkɔ ya Leta: Espagnol

  • Mokili: Mabele na yango ezali mabulumabulu te, kasi bangomba ezali na katikati ya mboka yango

  • Guvɛrnema: Bana-mboka nde baponaka bakonzi

MEKÁ BOYEBI NA YO

Na makambo oyo elandi, nini ezalaka na Costa Rica?

  1. Bato oyo bakɔtá kelasi bazali ebele na ekólo yango koleka na mikili ya wɛsti

  2. Basoda oyo bayebi mosala

  3. Esanga moko epai batindaki bato koleka 500 mpo na koluka biloko ya motuya

Biyano: A mpe C. Eyano ya C ezali Esanga Coco, oyo ezwami na kilomɛtrɛ soki 560 na wɛsti ya esanga monene.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto