Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 9/15 nk. 12-13
  • Mobembo moko na Nicaragua

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Nicaragua
  • Lamuká!—2015
Lamuká!—2015
g 9/15 nk. 12-13
Ometepe, esanga moko ya laki Nicaragua oyo ezali na ngomba mibale oyo ebimisaka volcan

Eloko oyo emonanaka polele na laki Nicaragua ezali esanga Ometepe, oyo ezali na ngomba mibale ya minene oyo ebimisaka volcan oyo eteni moko ya mabele nde esangisi yango

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Nicaragua

Karte ya Nicaragua

MBALA mingi bato babengaka Nicaragua mokili ya balaki mpe ya ba-volcan. Mokili yango ezali na laki oyo eleki monene na Amerika ya ntei​—Laki Nicaragua. Bana-mboka babengaka yango Cocibolca, oyo elakisi “Mbu ya kitoko.” Ezali na bisanga ebele mpe na mai kaka moko ya kitoko oyo ezali na bikelamu ya bomoi oyo efandaka na mbu, na ndakisa mbisi babengi requin, espadon, mpe tarpon.

sacuanjoche, fololo ya mboka Nicaragua

Sacuanjoche (frangipani) ezali fololo ya ekólo Nicaragua

Nicaragua ezali mpe na teritware moko oyo ezali mosika koleka bateritware mosusu ya Amerika ya ntei​—la côte des Mosquitos. Mwa eteni yango ya mabele oyo ezali ya bakilomɛtrɛ 65 ekendá pembenipembeni ya mai yango tii na Honduras. Miskito (lolenge mosusu ya kobenga Mosquitos) ezali moko ya bituluku ya bana-mboka ya Nicaragua oyo istware na bango ebandá liboso ete bato ya Mpoto bakóma na mboka yango na siɛklɛ ya 16.

Ba-Miskito balinganaka mingi mpe bazalaka na mimeseno oyo ekeseni mpenza na oyo ya bato mosusu. Na ndakisa, monɔkɔ ya Ba-Moskito ezali mpenza te na ebengeli lokola “mesye” to “madame.” Na bamboka, bilenge babengaka mikóló “Nɔkɔ” to “Tata mwasi,” ezala bazali bandeko ya libota to te. Momeseno moko ya kala oyo basi ya mboka yango bazalaka na yango mpo na kopesa baninga na bango ya motema to bato ya libota mbote ezali ya kosimba litama na ye mpe na nsima kosimba oyo ya mosusu. Na nsima, mwasi oyo abandisaki mbote abendaka mpema na zolo.

Bana-mboka ya Nicaragua

Bana-mboka

Mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Mayangna mpe ya Miskito

Mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Mayangna mpe Miskito, ebimisami na Batatoli ya Yehova

NA MOKUSE

  • Motángo ya bato: 6 176 000

  • Monɔkɔ ya Leta: Espagnol. Kasi, na bateritware oyo bazali na bonsomi bazwaka monɔkɔ ya Miskito, Mayangna, Rama, Anglais ya Créole ndenge moko

  • Guvɛrnema: Bana-mboka nde baponaka bakonzi

  • Mboka-mokonzi: Managua

  • Klima: Molunge, kasi malili na bangomba

  • Mokili: Mabele na yango ezali mabulumabulu te, kasi bangomba ezali na katikati ya mboka yango

MEKÁ BOYEBI NA YO

Makambo oyo balobi awa mpo na Nicaragua ezali solo to lokuta:

  1. Nicarao, oyo azalaki mokonzi ya bana-mboka nde apesaki ekólo yango nkombo.

  2. Nicaragua ezali ekólo kaka moko ya Amerika ya Sudi oyo Espagne ná Grande-Bretagne ekonzaki.

  3. Na basiɛklɛ oyo eleki, bato ya mobulu oyo bazalaki kouta na bisanga ya Caraïbe bazalaki kokanga bamasuwa pembenipembeni ya Laki Nicaragua.

  4. Nicaragua ezali moko ya mokili ya Amerika ya ntei oyo ezali na bato mingi te.

Biyano: Biyano nyonso ezali solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto