Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g17 No. 4 nk. 10-11
  • Ntango bana balongwe na ndako ya baboti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango bana balongwe na ndako ya baboti
  • Lamuká!—2017
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • MPO NA NINI ESALEMAKA BONGO?
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Biblia elobi nini mpo na libala?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya koboya koboma libala ntango moto akómi mobange
    Lisalisi mpo na libota
  • Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Lamuká!—2017
g17 No. 4 nk. 10-11
Mobali azali kotala televizyo na ngámbo na ye mpe mwasi azali kotonga na mabɔkɔ na ngámbo na ye

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ntango bana balongwe na ndako ya baboti

MOKAKATANO

Mbala mingi, babalani bakutanaka na mikakatano oyo eleki makasi ntango bana na bango bakoli mpe balongwe na ndako. Ntango bana balongwe na ndako ya baboti, tata ná mama bakoki komimona lokola bapaya. Gary Neuman, oyo azali mopesi-toli na makambo ya libota, akomaki boye: “Napesaka toli na basi ná mibali mingi oyo bayebaka te ndenge ya kosala mpo bolingo na bango ezonga ya sika. Sikoyo, lokola bana balongwe na ndako, baboti bazalaka lisusu te na makambo mingi ya koloba to masolo mingi ya kobɛta bango mibale.”a

Makambo ezali ndenge wana na libala na bino? Soki ezali bongo, bokoki kokómisa lisusu boyokani na bino makasi. Kasi liboso, tótalela makambo mosusu oyo mbala mosusu esalaki ete boyokani makasi oyo ezalaki kati na yo ná molongani na yo ekita.

MPO NA NINI ESALEMAKA BONGO?

Na boumeli ya bambula, bana bazalaki na esika ya liboso. Baboti mingi batyaka bamposa ya bana na bango na esika ya liboso, kasi libala na bango na esika ya mibale. Basalaka yango na makanisi ya mabe te. Yango wana, bamesanaka mingi nde na mokumba na bango ya tata mpe ya mama, mpe yango esalaka ete bázongisa nsima bolingo na bango ya mwasi ná mobali. Likambo yango emonanaka polele ntango bana balongwe na ndako ya baboti. Mama moko ya mbula 59 alobi boye: “Ntango bana bazalaki na ndako, tozalaki kosala makambo mingi elongo.” Kasi abakisi ete ntango bana balongwaki na ndako “tokómaki moto na moto na makambo na ye.” Kutu, mokolo moko alobaki na mobali na ye: “Moto na moto azali kosala makambo na ye.”

Babalani mosusu bamibongisaka liboso te mpo na komesana na bomoi wana ya sika. Buku moko (Empty Nesting) elobi: “Mpo na babalani mingi, ezalaka lokola nde bauti kobalana sika.” Lokola mibali mpe basi mingi bamonaka ete ezali lisusu na makambo mingi te oyo bazali kosala elongo, bakómaka kosala makambo moto na moto na ndenge na ye, mpe nsukansuka bakómaka kaka lokola baninga mibale oyo bafandi ndako moko, kasi te lokola babalani.

Nsango ya malamu ezali ete okoki kokima motambo wana, ata mpe kozwa matomba ya bomoi wana ya sika. Biblia ekoki kosalisa yo na milende oyo ozali kosala. Tómona ndenge oyo ekoki kosala yango.

OYO OKOKI KOSALA

Ndimá mbongwana wana. Mpo na bana oyo bakoli, Biblia elobi: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye.” (Ebandeli 2:24) Bino baboti, mokano na bino ezalaki ya kopesa bana na bino formasyo na ntango wana, mpo na kosalisa bango bákóma na makoki oyo ekosalisa bango ntango bakokóma mikóló. Soki bozali kotalela makambo ndenge wana, bokozala nde na esengo ntango bana na bino bakolongwa na ndako na bino.​—Toli ya Biblia: Marko 10:7.

Ya solo, mpo na bana na yo, okokoba kaka kozala tata to mama na bango. Kasi, sikoyo, okómi nde mopesi-toli kasi ozali lisusu mokonzi na bango te. Mokumba wana ya sika ekopesa yo likoki ya kokoba kozala na boyokani malamu ná bana na yo, wana ozali kotya likebi na yo libosoliboso epai ya molongani na yo.b​—Toli ya Biblia: Matai 19:6.

Bólobelaka makambo oyo ezali kotungisa bino. Yebisá molongani na yo ndenge oyo ozali komiyoka mpo na mbongwana oyo esalemi na bomoi na bino, mpe yoká ye ntango azali koyebisa yo ndenge oyo azali komiyoka. Zalá na motema molai mpe mityá na esika na ye. Ekoki kozwa ntango mingi mpo yo ná molongani na yo bókolisa lisusu bolingo na bino; kasi kosala bongo ezali na ntina mingi.​—Toli ya Biblia: 1 Bakorinti 13:4.

Bóluka makambo ya kosala elongo. Bólobela elongo mikano oyo bolingi komityela to makambo oyo bolingi kosala elongo. Lokola bobɔkɔlaki bana, bokómi na bwanya mingi. Mpo na nini te kosalela bwanya yango mpo na kosalisa basusu?​—Toli ya Biblia: Yobo 12:12.

Bókómisa lisusu bolingo na bino sika. Bókanisa lisusu bizaleli malamu oyo ebendaki mokomoko na bino epai ya moninga. Bókanisa makambo oyo bosalá elongo mpe mikakatano oyo bokutaná na yango. Soki bosali bongo, bokomona ete bomoi wana ya sika ekozala ya malamu. Kutu, soki bopesani mabɔkɔ, bokomona ete sikoyo bozali na likoki ya kobongisa lisusu libala na bino mpe kozongisa lisusu sika bolingo oyo etindaki bino bóbalana.

a Euti na buku moko (Emotional Infidelity).

b Ata soki bozali naino kobɔkɔla bana, kobosana te ete yo ná molongani na yo bozali “mosuni moko.” (Marko 10:8) Mingimingi, bana bamiyokaka ete babatelami malamu soki baboti na bango bazali koyokana malamu mpenza.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye.”​—Marko 10:7.

  • “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Matai 19:6.

  • “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.”​—1 Bakorinti 13:4.

  • “Bwanya ezalaka nde epai ya mibange te?”​—Yobo 12:12.

Salvatore ná Aurora

SALVATORE NÁ AURORA

“Toyaki komona ete sikoyo tozali na ntango mingi mpe tosengeli mpenza kosalela yango na ndenge ebongi. Yango wana, tozwaki ekateli ya kosalisa bato mingi koleka, ezala mabota oyo ezali na bana mpe babalani ya sika. Tolingaka kosalisa basusu mpe koyebisa bango makambo oyo tokutanaki na yango.”

Carlo ná Caterina

CARLO NÁ CATERINA

“Ezwaki ntango mingi mpo tóndima ete bomoi na biso ebongwani. Na boumeli ya bambula mingi, tozalaki kolobela kaka makambo oyo etali bana. Sikoyo, ntango tozali kosala makambo elongo, tozali mokemoke komesana kolobela makambo oyo etali biso moko mpe mikano na biso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto