Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g17 No. 6 nk. 8-9
  • Teyá bana na yo ezaleli ya komikitisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Teyá bana na yo ezaleli ya komikitisa
  • Lamuká!—2017
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • OYO OSENGELI KOYEBA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Koyeba komikitisa
    Lamuká!—2019
  • Mpo na nini ebongi komilatisa ezaleli ya komikitisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tólona komikitisa ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Koyeba kokanga motema
    Lamuká!—2019
Makambo mosusu
Lamuká!—2017
g17 No. 6 nk. 8-9
Mwana moko ya mobali azali kozelisa mama na ye

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Teyá bana na yo ezaleli ya komikitisa

MOKAKATANO

  • Mwana na yo ya mobali oyo azali kaka na mbula zomi abandi kokóma na lolendo!

  • Alingi ete bato nyonso bázwa ye na valɛrɛ mingi.

Ozali komituna boye: ‘Mpo na nini azali kosala bongo? Nalingi ete amipesa nzoto kilo, kasi akanisa te ete aleki bato mosusu nyonso!’

Baboti bakoki koteya mwana na bango ezaleli ya komikitisa kozanga ete amimona ete azali na valɛrɛ te?

Mwana moko ya mwasi afandi na kiti ya bokonzi mpe baboti na ye bafukameli ye

OYO OSENGELI KOYEBA

Na bambula oyo eleki, bazalaki kolendisa baboti bápesaka bana na bango nyonso oyo balingi; bábondelaka bango mpe bákumisaka bango ata soki basali te likambo moko oyo esɛngi kokumisa bango; básembolaka bango te mpe bápesaka bango disiplini te. Bazalaki kokanisa ete soki bana bazali komimona ete bazali na valɛrɛ mingi, bakokola malamu mpe bakomipesa nzoto kilo. Kasi nini emonani? Buku moko (Generation Me) elobi: “Na esika ete kopesa bana valɛrɛ koleka ndelo esalisa bana yango bákola malamu, bázala na esengo, ekómisi bango nde lolendo mpe etindi bango bámimona ete bazali na ntina mingi koleka basusu.”

Bana mingi oyo baboti bamesaná kokumisa bango mpe kobondela bango, bakolaka kozanga koyeba ete bakoki kokutana na makambo oyo ekolɛmbisa bango nzoto, ete bakoki kosembola bango, mpe ete bakolonga na makambo nyonso te. Lokola bana yango bateyamá ete basengeli kotya likebi kaka na bamposa na bango moko, ntango bakómaka mikóló, bakokoka te kobatela boninga na bato mosusu. Yango wana, mingi na bango bakómaka mawamawa mpe banyokwamaka na makanisi.

Mpo bana bámipesa nzoto kilo, esengeli te komonisa bango ete bazali na ntina mingi koleka basusu; yango esengeli komonana nde na makambo oyo bazali kosala. Yango esuki kaka te na komipesa nzoto kilo; basengeli mpe koyekola, kosalela makambo oyo bazali koyekola, mpe koluka koyeba malamumalamu mosala oyo baponi kosala. (Masese 22:29) Basengeli mpe koyekola kosalisa bato mosusu. (1 Bakorinti 10:24) Nyonso mwana esɛngaka komikitisa.

OYO OKOKI KOSALA

Pesá mwana longonya kaka soki esengeli. Soki mwana na yo ya mwasi azwi bapwɛ mingi na kelasi, pesá ye longonya. Soki mpe azwi bapwɛ moke, kopesa balakisi foti mbala moko te. Kosala bongo ekosalisa mwana na yo te ayekola komikitisa. Salisá ye nde ayeba kosala malamu koleka mbala ya nsima. Pesá ye longonya kaka soki asali likambo ya malamu.

Sembolá mwana soki esengeli. Yango elingi koloba te ete osengeli kogangela mwana mbala nyonso oyo asali libunga. (Bakolose 3:21) Kasi esengeli kosembola mwana oyo asali mabunga ya minene. Esengeli mpe kosembola mwana oyo azali na bizaleli mabe to makanisi mabe. Soki te, akokola na bizaleli wana ya mabe.

Na ndakisa, kanisá ete mwana na yo ya mobali akómi na ezaleli ya komikumisa. Soki osemboli ye te, akomimona ete aleki basusu mpe akolinga kozala elongo na basusu te. Yango wana, monisá mwana yango ete soki moto azali na lolendo, bato mosusu bakotyola ye mpe na ndenge yango bakozwa ye lisusu na valɛrɛ te. (Masese 27:2) Salisá ye ayeba ete moto oyo amizwaka te na valɛrɛ koleka basusu, amikumisaka te. Soki ozali kosembola mwana na bolingo ndenge wana, okosalisa ye ayekola komikitisa kozanga ete okitisa ye valɛrɛ.​—Toli ya Biblia: Matai 23:12.

Salisá mwana na yo ayeba ndenge makambo elekaka na bomoi. Kopesa mwana eloko nyonso oyo asɛngi ekoki kotinda ye amona ete azali na lotomo ya kozwa nyonso. Na ndakisa, soki mwana na yo alingi ete osombela ye eloko oyo ozali na makoki ya kosomba te, teyá ye ntina ya kosalela mbongo na programɛ. Soki bokanaki kokende esika moko to kosala mobembo na ntango ya konje, kasi bokokende lisusu te, okoki kosalisa ye ayeba ete na bomoi makambo nyonso esimbaka te, mpe koyebisa ye nini osalaki ntango okutanaki na makambo ya ndenge wana. Na esika ya kobatela bana na makambo nyonso, salisá bango báyeba ete bakokutana na mikakatano ntango bakokóma mikóló.​—Toli ya Biblia: Masese 29:21.

Lendisá mwana asalisaka basusu. Monisá mwana na yo ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ndenge nini? Bokoki kosala elongo liste ya bato oyo bazali na mposa ya lisalisi mpo na kosomba biloko, komema bango na motuka to kopesa bango mbongo ya tike, to mpe kobongisela bango biloko oyo ebebi. Na nsima, ntango ozali kokende kosalisa bato yango, kende elongo na mwana na yo. Salá ete mwana yango amona esengo oyo ozali na yango ntango ozali kosalisa bato mosusu. Na ndenge yango, ndakisa na yo moko ekoteya mwana na yo ezaleli ya komikitisa na ndenge oyo ebongi mpenza.​—Toli ya Biblia: Luka 6:38.

Mpo na koyeba makambo mosusu, kɔtá na site Internet na biso jw.org, mpe luká lisolo “Kobɔkɔla bana na mokili oyo bato balukaka liboso bolamu na bango.”

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.”​—Matai 23:12.

  • “Soki moto azali kobondelabondela mosaleli na ye banda bolenge na ye, na mikolo ya nsima na bomoi na ye, akokóma kutu moto oyo azangi botɔndi.”​—Masese 29:21.

  • “Bópesaka.”​—Luka 6:38.

BÓMONAKA BAMOSUSU ETE BALEKI BINO

Biblia elobi: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:3, 4.

Mwana oyo abɔkwami na kolanda toli wana ayebaka ete moto nyonso aleki ye na likambo moko to mosusu. Nsukansuka, ezaleli ya komikitisa ekosalisa mwana na yo akima ezaleli ya koluka kaka bolamu na ye moko, ezaleli oyo etondi na mokili lelo oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto