Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mokili oyo ekobonga lisusu to te?
    Lamuká!—2017 | No. 6
    • Montre ya nsuka ya mokili

      LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | MOKILI OYO EKOBONGA LISUSU?

      Mokili oyo ekobonga lisusu to te?

      MOBU 2017 ebandaki na nsango moko ya mawa, oyo bato ya siansi bapesaki. Na sanza ya yambo, ekipi moko ya bato ya siansi balobaki ete etikali moke mokili ekutana na likama monene oyo esalemá naino te. Mpo na komonisa ete etikali moke likama monene ekwela mokili, bato yango ya siansi bapusaki na segɔnde 30 ngonga ya montre ya nsuka ya mokili (l’horloge de la fin du monde), oyo makɔnga na yango emonisaka na ndenge ya elilingi ete nsuka ya mokili ekómi pene. Lelo oyo, etikali pene na miniti mibale na ndambo mpo makɔnga ya montre yango ekóma na midi ya butu. Banda mbula koleka 60, ezali mbala ya liboso emonana ete mokili ekómi mpenza pene na likama monene!

      Bato ya siansi bazali kokana ete na mobu 2018 bátalela lisusu mpo na koyeba soki etikali ntango boni mpo mokili ekóma na nsuka. Montre wana ya nsuka ya mokili ekokoba kaka komonisa ete mosika te likama monene ekokwela mokili? Okanisi nini? Mokili oyo ekobonga lisusu? Ntango mosusu ozali komona ete ezali mpasi kozwa eyano na motuna wana. Kutu, ata bato ya mayele bazalaka na makanisi ndenge moko te na likambo yango. Ezali na bato oyo bandimaka te ete likama monene elingi kokwela mokili.

      Kutu, bamilio ya bato bandimaka ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya. Balobaka ete ezali na bilembeteli oyo emonisi ete mabele ekoumela libela, bato bakokoba kofanda na mabele, mpe bomoi na bango ekobonga. Yango ezali solo? Mokili oyo ekobonga lisusu to te?

      “Montre ya nsuka ya mokili ezali montre moko oyo mokili mobimba endimá ete makɔnga na yango emonisaka na ndenge ya elilingi ngonga oyo etikali mpo bato bango moko báboma mokili, na nzela ya mayele ya tekinoloji oyo ekoki kobimisa makama. Likama ya libosoliboso ekouta na bibundeli ya nikleere, kasi makama mosusu ekouta na tekinoloji oyo etalelaka ndenge klima ezali kobongwana, siansi oyo esalisaka mpo na kosala nkisi ya komɛla to nkisi ya kokolisa milona mpe bongo na bongo, tekinoloji oyo etalelaka makambo ya baordinatɛrɛ mpe Internet, oyo ekoki kobimisa makama minene. Makama ekoki kobimela bato to mabele mpo basusu bazali kosala makambo na nko, mpo na libunga, to na mbalakaka.”​—Bulletin of the Atomic Scientists.

  • Bato bazali koluka biyano
    Lamuká!—2017 | No. 6
    • LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | MOKILI OYO EKOBONGA LISUSU?

      Bato bazali koluka biyano

      SOKI ozali komitungisa to kobanga mpo na ebele ya bansango ya mabe oyo ezali koleka na mokili, yebá ete ozali yo moko te. Na mobu 2014, Barack Obama, oyo azalaki prezida ya États-Unis, alobaki ete lokola na televizyo, na radio, mpe na bazulunalo bazali kolobela mingi makambo ya mabe oyo ezali kosalema, bato mingi bazali koloba ete “mokili oyo ezali mpenza kokima mbangu . . . mpe moto moko te akoki kotɛlɛmisa yango.”

      Kasi, mwa moke nsima ya koloba maloba wana, alobelaki mayele ndenge na ndenge oyo ezwami mpo na kosilisa ebele ya mikakatano ya mokili. Alobaki ete bibongiseli mosusu oyo guvɛrnema ezwaki ezali “nsango malamu” mpe ete “azali mpenza na elikya” ete “makambo ekobonga na mikolo ezali koya.” Na maloba mosusu, amonisaki ete milende oyo bato ya mitema malamu bazali kosala ekoki kobongisa mokili mpe kopekisa ete likama moko monene ekwela mokili.

      Bato mingi bakanisaka mpe bongo. Na ndakisa, bato mosusu batyaka elikya na siansi, mpe balobaka ete mokili ekobonga mpo mayele ya tekinoloji ezali kokola nokinoki. Moto moko ya mayele na makambo ya baaparɛyi ya mikolo oyo mpe makambo ya kobimisa biloko ya sika alobaki na elikya nyonso ete tii tókóma na mobu 2030, “mayele na biso ya tekinoloji ekokola mbala nkóto moko koleka, mpe tii tókóma na mobu 2045, ekokola mbala milio moko koleka.” Abakisaki boye: “Tozali kosala oyo tokoki. Mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo ezali kolekela biso lisusu motó te, mpo tokómi na makoki ya kosilisa mikakatano nokinoki.”

      Mokili oyo ebebi tii wapi? Etikali moke likama moko monene ekwela mokili? Atako bato mosusu ya siansi mpe ya politiki bazali kolaka bato ete mokili ekobonga, bato mingi bazali kondima te ete makambo ekobonga. Mpo na nini?

      Bɔmbi moko ya nikleere epanzani

      BIBUNDELI OYO EBOMAKA BATO EBELE NA MBALA MOKO. Atako ONU mpe bibongiseli mosusu ezali kosala milende mingi, elongi te kosilisa bibundeli ya nikleere. Kutu, bakonzi oyo balingaka kotosa mibeko te bazali kobunda mpo ete mibeko oyo epekisi kotambola na mondoki elongwa. Bikólo oyo ekendá nsango mpo na bibundeli na yango ya nikleere ezali kokómisa lisusu makasi babɔmbi na yango ya kala mpe kosala bibundeli mosusu ya sika. Bikólo oyo liboso ezalaki te na bibundeli oyo ebomaka bato ebele na mbala moko ezali sikoyo na likoki ya koboma bato ebele na mbala moko.

      Ndenge oyo bikólo mingi lelo ekómi komilɛngɛla mpo na etumba ya nikleere, esali ete mokili oyo ekóma esika ya likama, ata na ntango ya “kimya.” Zulunalo moko (Bulletin of the Atomic Scientists) elobi: “Na ndakisa, bibundeli ya makasi oyo esalaka yango moko mpo na koboma bato, kozanga ete moto atambwisa yango, ekómi kobangisa mingi.”

      Mobali moko na mbeto ya lopitalo

      BAMALADI EZALI SE KOBAKISAMA. Siansi ekoki kolonga te kosalisa moto nyonso azala nzoto kolɔngɔnɔ. Lelo oyo, makambo oyo ezali likama mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, na ndakisa komata tansiɔ, kokóma monene mingi, mopɛpɛ oyo ebebi, makaya mpe bangi, ezali se kobakisama. Bato mingi bazali kokufa na bamaladi oyo eutaka te epai ya bato mosusu, na ndakisa, kansɛr, bamaladi ya motema, mpe diabɛti. Motángo ya bato oyo bazali kobɛla bamaladi mosusu, na ndakisa maladi ya motó, ezali se kobakisama. Longola yango, na bambula euti koleka, maladi mabe oyo euti na virisi ya Ebola mpe ya Zika ebomi bato mingi koleka. Na mokuse: Bato bazali kolonga te kosilisa maladi, mpe emonani ete elikya ezali te ete bato bakosilisa maladi.

      Milinga ezali kobebisa mopɛpɛ, bosɔtɔ ezali kobebisa mai

      BATO BAZALI KOBEBISA MAI, MOPƐPƐ MPE ZAMBA. Baizini ezali kokoba kobebisa mopɛpɛ. Mbula na mbula, bamilio ya bato bazali kokufa mpo bazali kopema mopɛpɛ oyo ebebisami.

      Bakompanyi, bibongiseli ya Leta mpe bato bazali kokoba kobwaka na bibale ya minene bosɔtɔ mpe salite oyo euti na bankisi ya monganga to na bilanga, basashɛ, biloko ya kopale, mpe basalite mosusu. Buku moko (Encyclopedia of Marine Science) elobi: “Bosɔtɔ wana nyonso ezali kobebisa milona, ezali kobɛlisa mpe koboma bambisi mpe banyama oyo efandaka na mai, ezala mpe bato oyo bazali kolya yango.”

      Longola yango, kozwa mai ya pɛto ekómi mpasi. Robin McKie, mokomi moko ya makambo ya siansi na Grande-Bretagne, alobaki: “Na mokili mobimba, ekómi mpasi mpo na kozwa mai ya pɛto; likambo yango ekokóma na bikólo nyonso ya mokili.” Bato ya politiki balobaka ete kozanga mai ezali mokakatano oyo bato bango moko babimisi mpe yango ezali likama monene.

      Mopɛpɛ makasi

      KONINGANA YA MABELE, MPELA, MPE MIPƐPƐ MAKASI EZALI KONYOKOLA BATO. Bato mingi koleka bazali kokufa to konyokwama mpo na makama oyo: mipɛpɛ makasi, koningana ya mabele, mai oyo ezindisi mboka, mabele oyo ezali kopasuka, mpe makama mosusu oyo ezali kobebisa mokili. Ankɛti ya ebongiseli moko ya États-Unis (National Aeronautics and Space Administration) emonisi ete “mipɛpɛ makasi, mai oyo ezindisi mboka, molunge makasi ekoki kobima na mokili.” Makama wana nde ekoboma mokili?

      Na ntembe te, oyebi makambo mosusu ya minene oyo ezali kotya bomoi na biso na likama. Soki ozali kaka kotalela makambo mabe oyo ezali kosalema lelo oyo, okozwa biyano oyo ebongi te na oyo etali bomoi na mikolo ezali koya. Bato mosusu bakoki koloba mpe bongo ntango bazali kolanda makambo oyo bato ya politiki mpe bato ya siansi bazali koloba. Kasi, ndenge tomonisaki yango na lisolo oyo eleki, bato mingi basili kozwa biyano oyo ebongi na mituna oyo bamitunaka mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe ndenge mokili ekozala na mikolo ezali koya. Epai wapi tokoki kozwa biyano yango?

  • Biblia elobi nini?
    Lamuká!—2017 | No. 6
    • Mobali moko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki

      Makambo oyo bato balobaka mpo na montre ya nsuka ya mokili ekokokisama te mpo Nzambe alaki bomoi malamu mpo na bato mpe mabele na mikolo ezali koya

      LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | MOKILI OYO EKOBONGA LISUSU?

      Biblia elobi nini?

      BANDA basiɛklɛ mingi, Biblia esakolaki makambo ya mabe oyo ezali koleka na mokili lelo. Kasi, likambo ya malamu ezali ete Biblia esakolaki mpe ete bomoi ya bato ekobonga na mikolo ezali koya. Tosengeli te koboya nokinoki kondima makambo oyo Biblia esakolaki, nzokande tozali komona ete makambo yango nyonso ezali kokokisama na ndenge ya kokamwa, ata na makambo ya mikemike.

      Na ndakisa, tótalela bisakweli ya Biblia oyo elandi:

      • “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.”​—Matai 24:7.

      • “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”​—2 Timote 3:1-4.

      Bisakweli wana emonisi mokili oyo ezali kobeba se kobeba. Na maloba mosusu, ezali komonana lokola ete mokili oyo ekobonga lisusu te; bato bakokoka kobongisa yango te. Biblia emonisi ete bato bazali te na bwanya mpe nguya oyo esengeli mpo na kosilisa libela mikakatano ya mokili. Bavɛrsɛ oyo elandi emonisi yango:

      • “Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete ebongi, kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.”​—Masese 14:12.

      • “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”​—Mosakoli 8:9.

      • “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.”​—Yirimia 10:23.

      Soki bato bazali se kokoba kosala oyo balingi, mokili ekoki kokwela likama moko monene. Kasi, ekosalema bongo te! Mpo na nini? Biblia elobi:

      • Nzambe “atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.”​—Nzembo 104:5.

      • “Libota oyo eleki, mpe libota mosusu eyei; kasi mabele ezali koumela seko.”​—Mosakoli 1:4.

      • “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

      • “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”​—Nzembo 72:16.

      Mateya wana ya Biblia epesi biyano ya polele. Bato nyonso ya mokili bakokufa te mpo na mopɛpɛ oyo ebebi, mpo na kozanga bilei mpe mai, to mpo na maladi moko oyo ekopalangana na mokili mobimba. Mokili oyo ekobebisama te na nzela ya etumba ya nikleere. Mpo na nini? Nzambe akotika te ete mokili oyo ebebisama na mikolo ezali koya. Kutu, Nzambe apesá bato bonsomi ya kopona. Kasi, bakobuka mbuma ya makambo oyo bazali kosala. (Bagalatia 6:7) Mokili ezali te lokola engbunduka oyo ezali kokima na vitɛsi makasi mpe ekosuka na likama mpo elongwe na nzela na yango. Nzambe atyá bandelo to mibeko, oyo esalaka ete bato bábebisa mokili te na makambo nyonso.​—Nzembo 83:18; Baebre 4:13.

      Kasi Nzambe akosuka wana te. Akotya “kimya mingi” na mabele mobimba. (Nzembo 37:11) Lisolo oyo elobeli kaka mwa ndambo ya makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, oyo bamilio ya Batatoli ya Yehova bayebi na nzela ya boyekoli na bango ya Biblia.

      Batatoli ya Yehova bazali libota monene ya mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, mindɛlɛ mpe baindo, oyo bauti na bikólo nyonso. Basambelaka Nzambe ya solo kaka moko, oyo nkombo na ye ezali Yehova, ndenge Biblia emonisi yango. Babangaka te mpo na mikolo ezali koya, mpamba te Biblia elobi: “Talá oyo Yehova alobi, Mozalisi ya likoló, Ye Nzambe ya solo, Moto oyo asalaki mabele mpe Moto oyo akelaki yango, Moto oyo atɛlɛmisaki yango ngwi, azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana: ‘Nazali Yehova, mpe mosusu azali te.’”​—Yisaya 45:18.

      Lisolo oyo elobeli mateya mosusu ya Biblia mpo na bomoi ya bato awa na mabele na mikolo ezali koya. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá liteya 5 ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe ezali na www.pr2711.com

      Okoki mpe kotala video Mpo na nini Nzambe akelaki mabele? oyo ezali na www.pr2711.com. (Talá esika bakomi MIKANDA > BAVIDEO)

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto