Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g23 No. 1 nk. 12-14
  • Mopɛpɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mopɛpɛ
  • Lamuká!—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mopɛpɛ ezali kobeba se kobeba
  • Mabele esalemá na ndenge ya kokamwa
  • Bato bazali komekameka kobongisa makambo
  • Elikya oyo Biblia epesi
  • Mopepe ya mokili ekoki koboma
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Omitambwisa ntango nyonso na elimo oyo ekopesaka bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mopɛpɛ ya kitoko mpe kongɛnga ya moi—Ezali mpe “ba-antibiotique”?
    Lamuká!—2015
Lamuká!—2023
g23 No. 1 nk. 12-14
Mwasi moko ná mobali na ye bazali kotambola likoló ya nɛjɛ, bazali kotala laki oyo ezingami na bazamba mpe bangomba, mpe likoló ezali bulé.

MABELE EKOBEBISAMA NYONSO?

MOPƐPƐ

TOZALAKA na mposa ya mopɛpɛ, kasi kaka mpo na kopema te. Mopɛpɛ ebatelaka planɛti na biso na pole ya mabe oyo moi ebimisaka. Mopɛpɛ esalaka ete klima na mokili ekoba kozala malamu.

Mopɛpɛ ezali kobeba se kobeba

Kobeba ya mopɛpɛ ekómi likama mpo na bomoi awa na mabele. Nakotalela lapolo ya ebongiseli ya ONU oyo etalelaka sante, kaka mwa ndambo ya bato (1%) awa na mabele nde bapemaka mopɛpɛ ya malamu mpe oyo ebongi.

Mopɛpɛ oyo ebebi ekoki kosala ete moto akóma kobela maladi ya mpema, kanser ya pumɔ, maladi ya motema mpe ya misisa. Mbula na mbula bato soki 7000000 bazali kokufa mpo na kobeba ya mopɛpɛ.

Mabele esalemá na ndenge ya kokamwa

Mabele na biso ekelamá na likoki ya kopɛtola mpe kobatela mopɛpɛ ya malamu mpe kokoba kopesa yango na bikelamu ya bomoi. Likambo yango ekoki kosalema kaka soki bato bazali kobebisa mopɛpɛ mingi te. Tótala mwa bandakisa oyo.

  • Likoki oyo bazamba ezalaka na yango ya kobenda mopɛpɛ ya mabe (gaz carbonique) eyebani malamu mpenza. Kasi bisika oyo ezali na mabulu mingi, na ndakisa esika oyo banzete ya Mangrove ekolaka, esalaka mosala yango kitoko mingi. Banzete ya Mangrove esalaka mosala makasi ya kolongola mbala mitano mopɛpɛ ya mabe koleka banzete ya zamba.

  • Bolukiluki oyo euti kosalema emonisi ete ba-algues mosusu ya minene elongolaka mpe gaz ya mabe na mopɛpɛ. Nkasa na yango oyo etɔndi na gaz epesaka yango likoki ya kokende na ntaka ya molai. Mosika mpenza na libongo, nkasa ya algues yango oyo etondi na gaz epasukaka mpe ezindaka tii na nse ya mai. Kuna, efandaka mpo na bambula mingi.

  • Likoki oyo mopɛpɛ ezalaka na yango ya kobonga yango moko ata soki bato babebisi yango na ndenge ya mabe mpenza, emonanaki na eleko ya maladi mabe ya coronavirus, ntango bato bazalaki lisusu kobima te. Na 2020, ntango bakompanyi ya minene mpe mituka ezalaki lisusu te kobimisa milinga oyo ebebisaka mopɛpɛ, emonanaki ete mopɛpɛ ekómaki malamu mpenza. Lapolo moko ya “2020 World Air Quality Report,” emonisi ete bamboka mingi (koleka 80%) bayei komona ete mopɛpɛ ekómaki pɛto mwa moke nsima ya kotya mobeko ete bato babimaka lisusu te.

    OYEBAKI YANGO?

    Mopɛpɛ ezali na likoki ya kozonga pɛto

    Elilingi oyo ezali komonisa kobebisama ya mopɛpɛ na New Delhi, na ekólo Inde. Nivo ya kobebisama ya mopɛpɛ emataki makasi mpe mopɛpɛ ekómaki mabe mpo na moto nyonso na sanza ya 01/2020, mpe na sanza ya 08/2020, mopɛpɛ ekómaki mwa malamu.

    Na New Delhi, na ekólo Inde, na eloko ya maladi mabe ya coronavirus ntango bato bazali kobima lisusu te, mopɛpɛ ezongaki pɛto mpo bakompanyi mpe mituka oyo esalaka ete mopɛpɛ ebeba ezalaki lisusu kosala te. Biloko oyo ebebisaka mabele mpe mopɛpɛ ekitaki mpenza. Kasi biloko yango ya mike ekoki kosala ete moto akóma kobela maladi ya mpema mpe bamaladi mosusu ya makasi. Likoki wana ya komipɛtola oyo mopɛpɛ ezalaka na yango, esalemaki kaka mpo na mwa ntango, kasi yango emonisaki polele ete mopɛpɛ ezali na likoki ya komipɛtola ata soki ebebi ndenge nini.

    Elilingi ezali kolakisa engumba New Delhi, na Inde, na nsuka ya 2019, ndenge londende etondi na engumba mpo mopɛpɛ ebebi makasi.

    © Amit kg/Shutterstock

    2019

    Elilingi ezali kolakisa ndenge engumba New Delhi, na Inde ezali komonana polele mpo mopɛpɛ ekómaki malamu na eleko ya coronavirus ntango bato bazalaki kobima te.

    © Volobotti/Shutterstock

    Eleko ya coronavirus

Bato bazali komekameka kobongisa makambo

Mobali moko auti mosala na velo, mpe azali kotya velo yango na parking.

Kokende mosala to na eteyelo na velo ekoki kosalisa mpo na kobatela mopɛpɛ.

Baguvernɛma ezali kotya bakonzi ya bakompanyi mbamba mpo básalelaka mingi te biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ. Longola yango, bato ya siansi bauti komona mayele mosusu mpo na kolongola biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ. Na ndakisa, bamonisi ete bakoki kosalela bamikrobe mpo na kobongola biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ na biloko oyo ezali na likama te. Lisusu, bato yango ya mayele balendisaki bato ete na esika ya kokumba motuka, ekozala malamu ya kotambola na makolo to kosalela velo mpe koboya kosalela bagaze mingi na bandako.

Mwasi moko azali kolamba wana afandi na nse na mwa ndako na ye. Azali kosalela lituka oyo ezali kobimisa mwa molinga.

Baguvernɛma mosusu ezali kosalisa bana-mboka na yango mpe kopesa bango baresho oyo ekosala ete ebebisa mopɛpɛ te, kasi bato mingi bazali kaka na yango te.

Kasi, ndenge emonisami na lapolo moko ya 2022 oyo bibongiseli ya mikili mingi esangisaki, bakisa mpe ebongiseli ya ONU oyo etalelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe Banque mondiale, milende yango ekoki te.

Lapolo elobaki ete na 2020, na makambo misato oyo ezalaki kobebisa mopɛpɛ, moko na yango ezali milinga oyo ebimaka ntango bato bazali kolamba mpe makambo ya tekinoloji. Na bamboka mingi, kaka mwa ndambo ya bato nde bazali na likoki ya kosalela baresho oyo ebongi to biloko mosusu ya kolambela oyo ebimisaka milinga te.

Elikya oyo Biblia epesi

“Talá oyo Nzambe ya solo, Yehova, alobi, ye Mozalisi ya likoló mpe . . . Ye oyo atandá mabele mpe mbuma na yango, Ye oyo azali kopesa mpema na bato oyo bafandi wana”—Yisaya 42:5.

Nzambe akelá mopɛpɛ oyo topemaka mpe likoki oyo ezalaka na yango ya komipɛtola, yango emonisi ete Nzambe azali na nguya oyo ezangi nsuka mpe bolingo mpo na bato. Na yango, ezali mpenza polele ete Nzambe azali na likoki ya kolongola biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ. Talá lisolo “Nzambe alaki ete mabele ekobebisama nyonso te.”

TALÁ LIKAMBO MOSUSU

Ndenge mabele ezali komonana na molongó.

Ndenge nini mopɛpɛ ebanda? Talá na jw.org video Molɔ́ngɔ́ ekelamaki?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto