Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g24 No. 1 nk. 13-15
  • Mpo na nini bato mingi bamonaka ete bazali na ntina te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bato mingi bamonaka ete bazali na ntina te?
  • Lamuká!—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOMIZWA NA VALƐRƐ EZALI NA NTINA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • OYO BATATOLI YA YEHOVA BASALAKA
  • Okoki kozwa lisalisi
    Lamuká!—2020
  • Mpo na nini limemya ezalaka lisusu te na mabota?
    Lamuká!—2024
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Zwá bwanya mpo na bomoi ya mokolo na mokolo na JW.ORG
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2024
g24 No. 1 nk. 13-15
Mwasi moko azali na mawa, azali komitala na talatala.

Mpo na nini bato mingi bamonaka ete bazali na ntina te?

KOMIZWA NA VALƐRƐ EZALI NA NTINA

Bato oyo bayebaka ete bazali na ntina bazalaka na likoki ya kolonga mikakatano ya bomoi. Balɛmbaka nzoto noki te.

  • Bolukiluki emonisi ete bato oyo bazalaka na makanisi ya malamu te mpo na bango moko, mbala mingi bakutanaka na mitungisi, maladi ya makanisi, mpe balyaka na ndenge oyo ebongi te. Lisusu, mbala mingi balekisaka ndelo na komɛla masanga mpe kosalela badrɔge.

  • Bato oyo bayebaka ete bazali na ntina baboyaka komikokanisa na basusu, yango esalisaka bango báyeba kofanda ná bato mpe básala boninga ya malamu. Kasi, baoyo bamipesaka kilo te mbala mingi balobaka mabe mpo na basusu, likambo oyo ebebisaka boyokani na bango ná basusu.

  • Ata soki akutani na mikakatano, moto oyo amizwaka na valɛrɛ ayebaka kokanga motema; atikaka te ete bolembu na ye epekisa ye akokisa mikano na ye. Nzokande, moto oyo amimonaka ntina te, mbala mingi akómisaka bolembu ata ya moke likambo ya monene. Yango esalaka ete alɛmba nzoto noki.

OYO OKOKI KOSALA

Poná baninga oyo bakoki kosalisa yo. Zaláká ná bato oyo bapesaka basusu limemya, oyo balukaka bolamu na yo, mpe oyo bakosalisa yo okende liboso.

“Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.”—Masese 17:17.

Salisáká basusu. Soki ozali kosalela basusu bolamu na boboto nyonso, ezala na baoyo bakoki kozongisela yo eloko te, okozwa esengo ya solosolo oyo eutaka na kopesa. Okozala na esengo ata soki bato mosusu bazali komona te bolamu oyo osalaki, mpe okomona ete ozali na valɛrɛ.

“Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” —Misala 20:35.

Salisá bana na yo báyeba ete bazali na ntina. Tikáká bango moko bálonga mikakatano na bango mosusu, soki bazali na makoki ya kosala yango. Yango ekosalisa bana báyekola kolonga mikakatano ya bomoi. Ekosalisa bango mpe báyeba komizwa na valɛrɛ—ezaleli oyo ekosunga bango mingi ntango bakokóma mikóló.

“Teyá mwana mobali nzela oyo asengeli kokende; ata ntango akokóma mobange akotika yango te.”—Masese 22:​6, maloba na nse ya lokasa.

Motatoli ya Yehova moko azali koyekola Biblia na mwasi moko na restora.
Motatoli ya Yehova moko azali koyekola Biblia na mwasi moko na restora.

OYO BATATOLI YA YEHOVA BASALAKA

Na programɛ na bango ya makita mpe ya boyekoli ya Biblia, Batatoli ya Yehova basalisaka bato bákóma na bomoi ya malamu mpe báyeba ete bazali na valɛrɛ.

MAKITA NA BISO OYO ESALEMAKA PƆSƆ NYONSO

Na makita na biso, toyokaka badiskur oyo euti na Biblia, oyo mbala mingi esalisaka biso tóyeba nini tosengeli kosala mpo tózala na bomoi oyo ezali na ntina. Moto nyonso akoki koya na makita yango mpe basɛngaka mbongo te. Na ndakisa, na makita na biso okoyekola makambo lokola . . .

  • mpo na nini ozali na ntina na miso ya Nzambe

  • ndenge ya kozala na bomoi oyo ezali na ntina

  • ndenge ya kosala boninga ya malamu mpe oyo eumelaka

Okokutana mpe na baninga ya solosolo oyo ‘batyelanaka likebi.’—1 Bakorinti 12:​25, 26.

Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali makita na biso, talá na jw.org video ya mokuse Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi?

KOYEKOLA BIBLIA NA BATO

Toyekolaka na bato Biblia ofele na nzela ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! Buku yango ezali na bavɛrsɛ ya Biblia, makanisi ya polele, mituna ya ntina, bavideo, mpe bililingi ya kitoko. Makambo oyo toyekolaka na bato esalisaka bango bámona ete bomoi ezali na ntina mpe ebongisaka bomoi na bango.

Mpo na komona matomba oyo koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova ekomemela yo, talá na jw.org video mokuse Mpo na nini koyekola Biblia?

Israel Martínez.

TALÁ MAKAMBO MOSUSU

Israel Martínez azalaki komimona mpamba liboso ya bato mosusu mpo azalaki na bozwi mingi te mpe atángaki bakelasi mingi te. Talá na jw.org lisolo “Nayokaka lisusu nsɔni te” mpo na koyeba ndenge oyo koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova mpe koyekola Biblia esalisaki ye ayeba ete azali na valɛrɛ.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto