Eteni 7
Makambo nini masili kobima mpo na botomboki?
1-3. Ndenge nini ntango oyo esili koleka emonisi ete Jéhovah azalaki na elónga?
NA KOTATELA lotómo oyo Nzambe azali na yango mpo na koyangela, makambo nini masili kobima na boumeli ya ntango molai oyo bato bazali koyangela kozanga Nzambe? Bato bamonani bayangeli malamu koleka Nzambe? Soki totaleli lolenge oyo moto asili konyokola moto mosusu na boumeli ya bikeke nyonso oyo, tokoloba ete ezali bongo te.
2 Likámá libimaki wana baboti na biso ya liboso baboyaki boyangeli ya Nzambe. Yango epesaki mpasi mpo na bango moko mpe mpo na libota mobimba ya bato oyo bango basengelaki kobota. Mabe eutaki na bango moko. Liloba na Nzambe liyebisi ete: “Bango basalaki mabe mpenza; bazali bana na ye te, kasi bazali libota mabe.”—Deteronome 32:5, MN.
3 Lisoló na bato limonisi bosolo ya likebisi na Nzambe epai na Adam na Eva ete, soki babimi longwa na bibongiseli bityami na Nzambe, bakooka mpasi mpe bakokufa. (Genese 2:17; 3:19) Bamilongolaki na nsé na boyangeli ya Nzambe mpe, na boumeli ya ntango, baokaki mpasi mpe bakufaki.
4. Mpo na nini biso nyonso tobotami bato bazangi kokoka, na maladi mpe na liwa?
4 Baloma 5:12 (MN) elimboli likambo oyo libimaki na nsima, ete: “Lisumu likɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adam, tata ya libota na bato nyonso], mpe liwa likɔtaki mpo na lisumu, mpe bongo liwa lipalangani epai na bato nyonso mpo ete bango nyonso basali lisumu.” Bongo, na kotombokeláká Nzambe ete azala mokengeli na bango te, baboti na biso ya liboso bakómaki basali na masumu oyo bazangi kokoka. Na boyokani na mibeko mitali kobotama ya mwana, bakitani na bango bakokaki kosangola eloko mosusu te bobele kozanga kokoka. Yango wana tozali kobotama na mabe, na maladi mpe na liwa.
5, 6. Lisoló na bato limonisi nini mpo na oyo etali milende na bato mpo na kotya kimya mpe bolamu ya solo?
5 Esili koleka bikeke mingi mpenza. Bikonzi mingi bisalemaki mpe bizali lisusu te. Bato bamekaki kosala motindo na biyangeli nyonso. Atako bongo, libota ya bato lizali kozwa bobele makambo na mpasi mingi. Tokokaki kolikya ete na nsima ya mibu nkɔto motoba, bato bakolónga kotya kimya, boyengebene mpe bolamu na etando ya mokili mobimba mpe ete bakomonisa lelo, bizaleli malamu lokola boboto, motema mawa mpe kosalisana.
6 Kasi makambo mamonani makeseni mpenza. Ata motindo moko te na boyangeli na bato esili kopesa kimya ya solo mpe bolamu epai na bato nyonso. Bobele na ekeke oyo ya ntuku mibale, tomonaki kobomama monene ya bamilió na bato oyo bakabamaki lokola mbeka mpe kobomama ya bato koleka bamilió 100 kati na bitumba. Na eleko na biso, ebele na bato banyokwamaki, babomamaki mpe bakɔtisamaki bolɔkɔ na ntina na mobulu to mpe na kowelana na makambo ya politike.
Makambo mazali kosalema na mikolo na biso
7. Monisa ezalela ya makambo ya libota na bato na mikolo na biso.
7 Totalela mpe makambo mazali kosalema kati na libota ya bato na mikolo na biso. Mabe mpe mobulu emonani bipai nyonso. Komela drogue epalangani mpenza na bisika nyonso. Bamaladi euti na kosangisa nzoto ezali mingi mpenza na mokili. Bamilió na bato basili kozwa SIDA. Mbula na mbula, bamilió mingi na bato bazali kokufa na nzala to na maladi, nzokande bobele bato moke mpenza nde bazali na bozwi mingi. Bato bazali kobebisa mabelé mpe kopunza yango. Na bisika nyonso, bomoi ya libota mpe bizaleli malamu esili kobeba. Ya solo mpenza, bomoi ya lelo emonisi ete boyangeli ya Satana, ‘nzambe ya mokili oyo,’ ezali mabe. Mokili oyo azali koyangela mozali na bolemá, mozangi motema mawa mpe mozali na mabe mingi.—2 Bakolinti 4:4.
8. Mpo na nini tokoki te kotalela misala oyo bato bazali kosala lokola bokóli ya solo?
8 Nzambe asili kotikela bato ntango ete bakóma mpenza na nsuka ya bokóli na bango kati na makambo ya sianse mpe na biloko ya mosuni. Kasi tokoki mpenza kolobela bokóli awa mondoki, char de combat, mpepo ekobwakaka ba bombes mpe missile esili kokitana likɔngá mpe mbanzi? Ezali mpenza bokóli wana bato bazali na makoki ya kosala mibémbo na nzangá, nzokande bakoki te kofanda na kimya awa na mabelé? Wapi bokóli awa bato bazali kobanga kotambola na butu mpe, na bisika mosusu, bazali kobanga kotambola ata na moi?
Oyo emonisamaki na boumeli ya ntango
9, 10. (a) Nini esili komonisama polele na boumeli ya bikeke mingi oyo bilandanaki? (b) Mpo na nini Nzambe akolongola te lotómo oyo moto azali na yango mpo na kopona oyo ye alingi?
9 Bikeke oyo bilandanaki bisili komonisa ete bato bazali na makoki ya komitambwisa te kozanga boyangeli ya Nzambe. Bakoki kosala yango te lolenge moko bakoki te kozala na bomoi kozanga kolya, komela mai mpe kopema mopepe. Bilembeteli bimonani polele: tozalisamaki mpo na kolanda litambwisi ya Mozalisi na biso, lolenge moko bomoi na biso esimbami na bilei, na mai mpe na mopepe.
10 Na kopesáká nzela na mabe, Nzambe asili komonisa mbala moko mpo na libela, makambo na mpasi oyo mauti na lolenge mabe ya kosalela lotómo na bango ya kopona oyo balingi. Kasi lotómo bazali na yango mpo na kopona oyo balingi, ezali likabo lileki malamu oyo Nzambe apesaki bango nzela ya komona makambo makoki kobima soki yango esalelami na lolenge mabe, na esika ete apimela bango likabo yango. Liloba na Nzambe lizali na elónga wana elobi, ete: “Ekoki na motamboli te ete atámbolisa makolo na ye.” Lizali mpe na elónga awa yango elobi ete: “Moto azali koyangela moto mosusu mpo na kookisa ye mpasi.”—Yilimia 10:23; Mosakoli 8:9, MN.
11. Ezali na boyangeli moko ya bato oyo esili kosilisa mpasi?
11 Likambo oyo Nzambe apesi nzela na bato ete bayangela na boumeli ya mibu nkɔto motoba, emonisi mpenza ete moto akoki kosilisa mpasi te. Balóngi kosala yango te. Na ndakisa, atako azalaki na mayele mingi, na bozwi mpe na nguya na eleko na ye, Salomo, mokonzi na Yisraele alóngaki te kosilisa mpasi oyo euti na boyangeli na bato. (Mosakoli 4:1-3) Bobele bongo na mikolo na biso, atako basali bokóli mingi na makambo ya sianse, bakonzi ya mokili bakoki te kolongola mpasi. Na koleka lisusu, Lisoló na bato limonisi ete bato oyo baboyaki boyangeli ya Nzambe, babakisaki nde mpasi mingi na esika na kolongola yango.
Nzambe ataleli makambo oyo makobima na nsima
12-14. Bolamu nini bozwami mpo ete Nzambe apesaki nzela na mpasi na boumeli ya ntango molai?
12 Likambo oyo Nzambe apesaki nzela na mpasi epesaki biso mawa. Kasi Nzambe azwaki ebongiseli na kotalela makambo masengelaki kobima na nsima, mpamba te ayebaki matomba malamu masengelaki kouta na yango. Ebongiseli oyo Nzambe azwaki ekopesa litomba na bikelamu na ye, mpo na mwa bambula te, mpo na bambula nkɔto nkɔto te, soko mpo na bamilió te, kasi ekozala mpo na seko.
13 Soki moto moko asaleli na lolenge mabe, lotómo na ye ya kopona oyo ye alingi, mpo na kotɛmɛla misala na Nzambe, ntina ekozala te ete bapesa ye ntango ya komonisa makanisi na ye. Na kopesáká nzela na batomboki na boumeli ya bambula mingi, Nzambe asili kozwa ekateli oyo ekosalelama libela na libela, ata na esika nini kati na molóngó mobimba.
14 Mpo ete Jéhovah apesi nzela na mabe mpe na mpasi kino sikawa, emonisami mpenza ete eloko nyonso oyo ekotɛmɛla ye, ekolónga te. Emonisi polele ete mokano nyonso mosalemi na bato to na bikelamu ya elimo mpo na lipandá, ekoki kopesa bolamu ya libela te. Na yango, ekozala mpenza sembo epai na Nzambe ete aboma batomboki nyonso nokinoki. “Akoboma basali nyonso na mabe.”—Nzembo 145:20; Baloma 3:4.
[Elilingi na lokasa 15]
Nsima na kopona lipandá longwa na Nzambe, baboti na biso ya liboso babandaki konuna kino bakufaki
[Bililingi na lokasa 16]
Emonani ete, boyangeli na bato kozanga Nzambe, ezali mabe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
U.S. Coast Guard photo