Eteni 10
Mokili ya sika ya kitoko mingi oyo Nzambe akosala
1, 2. Nini ekosalema wana etumba ya Armagedon ekosila kopɛtola mabelé?
NINI ekosalema nsima wana Nzambe akotya bopɛto na nzela na etumba ya Armagedon? Na eleko wana, ntango ya sika ya nkembo ekobanda. Babiki na Armagedon, baoyo bamonisaki bosembo na bango na boyangeli ya Nzambe, bakokɔta kati na mokili ya sika. Oyo nde eleko kitoko na lisoló ya bato wana bato bakozwa bolamu oyo bouti na Nzambe!
2 Na litambwisi ya Bokonzi na Nzambe, babiki bakobanda kokólisa paradis. Bakosalela makasi na bango na misala oyo mikopesa bolamu epai na bato nyonso oyo bakozala na bomoi na ntango wana. Mabelé makobanda kobongwana efandelo eleki kitoko, na kimya, na esengo mpo na bato.
Boyengebene ekitani mabe
3. Kobondisama nini ekozala nokinoki nsima na Armagedon?
3 Nyonso oyo ekosalema bobele na kobomama ya mokili ya Satana. Kokabwana euti na mangomba ya lokutá, na ezalela ya makambo na bato to na biyangeli, ekozala lisusu te. Mayebisi oyo Satana azali kolengola bato makozala lisusu te; bisika nyonso bikopanzaka nsango yango, bikobebisama elongo na mokili ya Satana. Kanisa naino: mopepe mabe nyonso ya mokili ya Satana ekolongwa. Oyo nde kosikolama monene boye!
4. Yebisa mbongwana oyo ekosalema na ntina na kolakisama.
4 Na ntango wana, malako malamu makouta na Nzambe, makokitana makanisi mabe ya boyangeli ya bato. “Bana na yo nyonso bakolakisama na Jéhovah.” (Yisaya 54:13) Na nzela na kolakisama wana ya pɛto ya mbula na mbula, “mabelé mobimba makotónda na boyebi ya Jéhovah lokola kotónda na mai monene.” (Yisaya 11:9) Moto akoyekola lisusu mabe te, kasi “bafandi na mabelé bakoyekola boyengebene.” (Yisaya 26:9) Makanisi mpe misala malamu ekozala makambo oyo makomonana na ntango wana.—Misala 17:31; Bafilipi 4:8.
5. Nini ekokómela mabe mpe basali nyonso na mabe?
5 Na bongo, koboma ekozala lisusu te, na mobulu, kosangisa nzoto na basi na makasi, moyibi, to motindo na mabe mosusu ekozala lisusu te. Moto moko te akotungisama na ntina na misala mabe ya bato mosusu. Masese 10:30 elobi ete: “Libela na libela, moyengebene akolongolama te, kasi bato mabe bakofanda na mokili te.”
Kolongono na nzoto ya kokoka ezongisami
6, 7. (a) Mpasi nini ekosukisama na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe? (b) Lolenge nini Yesu amonisaki yango na ntango azalaki awa na mabelé?
6 Na mokili ya sika, mbébá nyonso euti na botomboki ya liboso, ekolongolama. Na ndakisa, Bokonzi na Nzambe ekosilisa maladi mpe konuna. Lelo, ata soki ozali na kolongono malamu na nzoto, kasi lokola ozali konuna, miso na yo makomona lisusu malamu te, mino na yo ekolongwa, matoi na yo makoyoka lisusu malamu te, mposo na yo ekobima misisa, binama bizali kati na nzoto na yo bikolɛmba, mpe okosuka na kokufa.
7 Kasi, mosika te, mpasi oyo tozwaki epai na baboti na biso ya liboso, ekozala makambo na kala. Ozali komikundola na oyo Yesu amonisaki na ntina etali kolongono na nzoto na ntango azalaki awa na mabelé? Biblia eyebisi ete: “Bibele mingi bayei epai na ye, elongo na batɛngumi, bibɔsɔnɔ, na bakufeli miso, na bibúbú, mpe na ebele na bato mosusu na [maladi] oyo babwamaki kino na makolo na ye, mpe abikisaki bango. Bongo bibele bakamwaki wana emonaki bango ete bibúbú balobi, mpe batɛngumi batamboli, mpe bakufeli miso bamoni.”—Matai 15:30, 31, MN.
8, 9. Yebisa bolamu oyo ekozala na mokili ya sika wana kolongono na nzoto ya kokoka ekozwama.
8 Oyo nde esengo ekozala na mokili ya sika wana maladi na biso nyonso ekosila! Mpasi oyo euti na kolongono na nzoto mabe ekopesa lisusu mitungisi te. “Mofandi moko te akoloba ete: ‘Nazali maladi.’” “Na ntango yango, miso na bakufeli miso makofungwama, mpe matoi na bimimi makozipwama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebúbú ekoyemba na esengo.”—Yisaya 33:24; 35:5, 6.
9 Ekozala esengo te na kolamuka na ntɔngɔ mpe komona ete, ozali na kolongono na nzoto malamu koleka oyo ozalaki na yango liboso? Ezali esengo te mpo na mibangé na koyeba ete, bakobanda mokemoke kozonga lisusu bilenge kino bakokóma na nzoto mpe na elimo ya kokoka lokola oyo Adam na Eva bazalaki na yango na ebandeli? Biblia epesi elaká oyo ete: “Tika ete mosuni na ye eleka yango na elenge na kitoko, azonga na mikolo na bolenge na ye.” (Yobo 33:25) Oyo nde esengo wana tokobwaka manɛti, biyokeli bisalemi na masini, nzeté na kotɛnguma, bakiti na batɛngumi, mpe mosala ya monganga! Tokozala lisusu na mposa ya lopitalo te, soko minganga te soko baoyo bakosalisaka maladi ya mino mpe te.
10. Nini ekokómela liwa?
10 Bato oyo bakozala na kolongono na nzoto malamu bakolinga kokufa lisusu te. Ee bakokufa lisusu te mpo ete, bato bakonyokwama lisusu te na ezaleli ya kozanga kokoka mpe na liwa. Klisto “asengeli koyangela kino [Nzambe] atya banguna na ye nyonso na nsé na makolo na ye. Kufa ekolongolama nyee lokola monguna na nsuka.” “Nzambe apesi bomoi ya seko lokola likabo kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.”—1 Bakolinti 15:25, 26, MN; Baloma 6:23, MN; tala mpe Yisaya 25:8.
11. Lolenge nini Emoniseli elobeli na bokuse, bolamu oyo bokozwama na mokili ya sika?
11 Na ntina na bolamu oyo libota na bato bakozwa kati paradis, epai na Nzambe ya bolingo, mokanda ya nsuka ya Biblia elobi na mokuse ete: “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Bakufi bazongi na bomoi
12. Lolenge nini Yesu amonisaki nguya ya kosekwisa oyo Nzambe apesaki ye?
12 Yesu abikisaki bobele bato na maladi mpe bibɔsɔnɔ te, kasi asalaki lisusu koleka. Abimisaki mpe moto longwa na nkunda. Amonisaki bongo nguya monene ya kosekwisa oyo Nzambe asili kopesa ye. Ozali komikundola libaku oyo Yesu akendaki na ndako ya mobali oyo akufelaki mwana na ye ya mwasi? Yesu alobaki epai na elenge mwasi oyo akufaki ete: “Elenge mwasi, nalobi na yo, tɛlɛma!” Nini esalemaki? “Mpe bobele na ntango wana, elenge mwasi atɛlɛmaki mpe atambolaki.” Emonaki bango bongo, bato “bakamwaki na kokamwa monene.” Bakokaki te kobómba esengo na bango!—Malako 5:41, 42, MN; tala mpe Luka 7:11-16; Yoane 11:1-45.
13. Bato ya lolenge nini bakosekwisama?
13 Na mokili ya sika, “lisekwa likozala mpo na bayengebene mpe na bango bazangi boyengebene.” (Misala 24:15, MN) Na ntango wana, Yesu akosalela nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na kosekwisa bakufi, na boyokani na oyo alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo akondimela ngai, ata soko akufi, akozonga na bomoi.” (Yoane 11:25, MN) Alobaki lisusu ete: “Baoyo nyonso bazali kati na nkunda na kokanisama [baoyo bazali na makanisi na Nzambe], bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29, MN.
14. Lokola liwa ekozala lisusu te, makambo nini makolongolama elongo na yango?
14 Ekozala esengo monene na etando ya mabelé wana bituluku ya bakufi bakozonga na bomoi bamoko nsima na basusu mpo na kokutana na balingami na bango. Mosika te, nsango ya liwa ekozala lisusu te mpo na kopesa mawa na babiki. Na esika na kozala bongo, ekozala nde likambo likeseni: kosakolama ya bato oyo bakosekwisama, ekopesa esengo mingi. Matánga makozala lisusu te, na bisika ya bibembe mpe epai bakotumbaka bibembe ekozala lisusu te, soko mayita mpe te!
Mokili oyo mokozala na kimya ya solo kati na yango
15. Lolenge nini esakweli ya Mika ekokokana na ndimbola na yango sikisiki?
15 Kimya ya solo ekozala na bisika nyonso epai bato bafandi. Kowelana oyo ebimisaka bitumba, mpe kosala bibundeli ekozala makambo na kala. Mpo na nini? Mpo ete kokabwana na bikólo, na mabota, mpe koponapona na mposo ekozala lisusu te. Na ntango wana, “libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te,” na ndimbola na yango ya sikisiki.—Mika 4:3.
16. Lolenge nini Nzambe akosɛnzela ete bitumba bisalema lisusu te?
16 Na kotalela Lisoló ya bato oyo liyebani mpo na bitumba bisopi makila mingi oyo bikosilaka te, likambo oyo likoki mpenza kokamwisa. Kasi ezali bongo mpo ete mokili mozali na nsé na boyangeli ya bato mpe na bilimu mabe. Tala oyo ekosalema kati na mokili ya sika, na nsé na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe: “Yakani kotala misala na Jéhovah . . . Akosukisa bitumba kino nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔngá, akozikisa mpe makálo.”—Nzembo 46:8, 9.
17, 18. Na mokili ya sika, boyokani nini bokozala kati na bato mpe banyama?
17 Bato bakozala na kimya elongo na banyama, lokola yango ezalaki na Edene. (Genese 1:28; 2:19) Nzambe alobaki ete: “Na mikolo yango, nakokata kondimana mpo na yo epai na banyama na zámba mpe na bandeke na lola mpe na biloko bikolandalanda na mabelé . . . Nakolalisa mpe yo na kimya.”—Hosea 2:18.
18 Kimya yango ekozala kino na etando nini? “Mbwa ya zamba akofanda elongo na mwana na mpate mpo na mwa ntango, mpe nkɔi akolala esika moko na mwana na ntaba, mpe mwana na ngombe, mpe mwana na nkɔsi, mpe nyama na mafuta, nyonso bakozala esika moko; mpe mwana moke akokamba bango.” Nyama akozala lisusu likámá mpo na moto te soko mpo na nyama mosusu te. Na ntango wana, “nkɔsi akolya matiti lokola ngombe”!—Yisaya 11:6-9, MN;Yisaya 65:25.
Mabelé oyo mabongwani paradis
19. Mabelé makobongwana na eloko nini?
19 Mabelé mobimba makobongwana paradis, efandelo mpo na bato. Yango wana Yesu alakaki mobali moko oyo andimelaki ye, ete: “Okozala na ngai elongo kati na Paradis.” Biblia elobi ete: “Mokili mokauki mpe esika ekauki ekosepela, esobe ekauki ekoyoka esengo ekobimisa fololo lokola safolona . . . Mpo ete mai makopunzwa kati na mokili mokauki, mpe bitima na mai bikozala na esobe ekauki.”—Luka 23:43; Yisaya 35:1, 6, MN.
20. Mpo na nini nzala ekonyokola lisusu bato te?
20 Na nsé na Bokonzi na Nzambe, nzala ekonyokola lisusu bamilió na bato te. “Mbuma ekotondana na mokili ata kino likoló na ngomba.” “Nzeté na elanga ekobota mbuma na yango, mpe mabelé makobota mbuma na yango, mpe bakozala na kimya na mokili na bango.”—Nzembo 72:16; Ezekiele 34:27.
21. Nini ekozala na esika ya kozanga ndako, mabe na bakartyé to na zingazinga na biso?
21 Bobólá ekozala lisusu te, bato bakozanga ndako te, mabe ekozala te na bakartyé to zingazinga na biso. “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokóna bilanga na vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokóna te ete mosusu alya.” “Bakofanda moto na moto na nsé na nzeté na ye ya vinyo mpe na nsé na nzeté na ye ya mosuke, mpe moto moko te akobangisa bango.”—Yisaya 65:21, 22; Mika 4:4.
22. Lolenge nini Biblia elobeli bolamu bokouta na boyangeli ya Nzambe?
22 Bato bakozwa biloko nyonso wana, mpe mingi mosusu, kati na paradis. Nzembo 145:16 elobi ete: “Yo [Nzambe] okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na biloko nyonso na bomoi.” Ezali likambo na kokamwa te wana esakweli ya Biblia eyebisi ete: “Bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo . . . Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:11, 29.
Makambo na kala malongolami
23. Lolenge nini Bokonzi na Nzambe ekosilisa mpasi nyonso tosilaki kozwa?
23 Boyangeli ya Bokonzi na Nzambe ekolongola mbébá nyonso oyo ekɔtisamaki kati na libota ya bato na boumeli ya mibu nkɔto motoba oyo misili koleka. Esengo oyo ekozala na ntango wana, ekozipa mpasi oyo bato basili komona yango. Bakozala na bomoi kozanga kotungisama na makanisi mabe na ntina na mpasi. Mokemoke, makanisi mpe misala malamu oyo bato bakozala na yango mokolo na mokolo, ekolongola makanisi mabe na ntina na mpasi.
24, 25. (a) Yisaya asakolaki likambo nini oyo lisengeli kosalema? (b) Mpo na nini tondimisami ete makanisi mpo na mpasi oyo esili koleka, ekozala mpamba?
24 Nzambe oyo azali komibanzabanza mpo na biso, alobi ete: “Nazali kotonga makoló na sika [bokonzi ya sika na likoló oyo ekoyangela bato] mpe mabelé na sika [bato na boyengebene]; mpe makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bosepela mpe booka esengo libela na oyo ezali ngai kotonga.” “Mabelé mobimba mazali nyee mpe masili kozwa kimya. Bato bazali konganga na esengo.”—Yisaya 14:7, MN;Yisaya 65:17, 18.
25 Mpe na nzela na Bokonzi na ye, Nzambe akobongola ezalela ya makambo mabe oyo esili koumela uta ntango molai. Akomonisela biso bolingo na ye monene libela na libela mpo na kosopáká mapamboli oyo makolongola makanisi ya mpasi nyonso oyo tozwaki na mikolo mileki. Soki tomikundoli mpasi nyonso oyo tozwaki na ntango na kala, ekozala bobele makanisi mpamba.
26. Mpo na nini Nzambe akolongola mpasi nyonso oyo tozwaki na ntango na kala?
26 Ezali motindo wana nde Nzambe akolongola kati na makanisi na biso, mpasi oyo tosili koyikela yango mpiko na mokili oyo. Ayebi ete kozanga kokoka oyo tobotami na yango ezali mabe na biso te, mpamba te tozwaki yango epai na baboti na biso ya liboso. Likambo oyo ete tobotami kati na mokili ya Satana, ezali mabe na biso te mpamba te, soki Adam na Eva basalaki mabe te, mbɛlɛ biso tobotamaki kati na paradis. Kasi na mawa na ye monene, Nzambe akolongola mabe ya kala oyo ezali kozwa biso.
27. Bisakweli nini bimonisi makambo kitoko oyo makozala na mokili ya sika?
27 Na mokili ya sika, bato bakozwa bonsomi oyo bosakolami na Baloma 8:21, 22 (MN) ete: “Biloko bizalisami mpe bikosikwa na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe. Na yango, toyebi ete, kino sikawa, biloko nyonso bizalisami bizali kokimela esika moko mpe kooka mpasi esika moko.” Na ntango wana, bato bakomona kokokana ya libondeli oyo ete: “Tika ete bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo mosalema na nsé lokola na likoló!” (Matai 6:10, MN) Makambo kitoko makozala na paradis ya mabelé, makomonisa makambo oyo mazali na likoló.
[Bililingi na lokasa 23]
Na mokili ya sika, mibangé bakozonga bilenge
[Elilingi na lokasa 24]
Maladi nyonso mpe bolɛma nyonso ekolongolama na mokili ya sika
[Elilingi na lokasa 25]
Na mokili ya sika, bakufi bakosekwa mpo na kozala na bomoi
[Elilingi na lokasa 26]
‘Bakoyekola etumba lisusu mpe te’
[Bililingi na lokasa 27]
Bato mpe banyama bakozala na kimya mingi kati na Paradis
[Elilingi na lokasa 27]
‘Nzambe akozipola lobɔkɔ na ye mpe akosilisa mposa na biloko nyonso na bomoi’
[Elilingi na lokasa 28]
Bokonzi na Nzambe ekolongola mpenza mpasi nyonso oyo tosili koyikela yango mpiko