-
Kokakatana na maloba teZwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
-
-
LITEYA 4
Kokakatana na maloba te
NTANGO otángaka na mongongo makasi, obɛtaka mabaku na maloba mosusu? To ntango otɛlɛmi liboso ya bato mpo na kosala lisukulu, omonaka ete ozali ntango nyonso kolukaluka maloba oyo osengeli koloba? Soki ezali bongo, mbala mosusu mokakatano na yo ezali ete ozali kokakatana na maloba. Moto oyo alobaka kozanga kokakatana abimisaka maloba mpe makanisi na ye polele, mpe emonanaka ete azali koloba na mpasi te. Yango elingi koloba te ete azali kolobaloba, to azali koloba mbangumbangu to mpe azali kokanisa te liboso ya koloba. Maloba na ye ezali kosepelisa bato mpe ezali kitoko. Na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, batyaka mpenza likebi ete tólobaka kozanga kokakatana.
Makambo mingi ekoki kosala ete moto akakatana na maloba. Okosepela kotalela malamu mwa makambo yango oyo elandi? (1) Ntango ozali kotánga na miso ya bato, soki oyebi maloba mosusu te, yango ekoki kosala ete okakatana. (2) Soki ozali kopemapema na maloba mingi, yango ekoki kosala ete okatakata maloba mpe ozongela yango. (3) Soki omibongisi te, yango mpe ekoki kosala ete okakatana na maloba. (4) Ntango ozali koloba liboso ya bato, soki obongisaki makanisi na yo malamu te, yango ekosala ete okakatana na maloba. (5) Soki moto ayebi maloba mingi te na lokota oyo azali koloba, yango ekosala ete akakatana mpe alukaluka maloba oyo asengeli koloba. (6) Soki ozali konyata maloba mingi, yango ekoki kosala ete okakatana na maloba. (7) Okoki mpe kokakatana na maloba soki omeseni te na mibeko ya lokota oyo ozali koloba.
Soki ozali kokakatana na maloba, bato oyo bazali na kati ya Ndako ya Bokonzi bakobima te mpo na komonisa yo ete basiliki, kasi makanisi na bango ekoyengayenga. Yango ekosala ete makambo mingi oyo okoloba, etikala na bɔɔngɔ na bango te.
Epai mosusu, tosengeli kokeba ete ntango tozali koloba malamu mpe tozali kokakatana te, maloba na biso ekóma ya lolendo te, to mpe etungisa bato oyo bazali koyoka biso te. Lokola touti bisika ndenge na ndenge, soki mbala mosusu, bato oyo bazali koyoka yo bamoni ete maloba na yo ezali kozokisa bango to ezali sembo te, okokokisa mokano na yo te. Tomoni ete ntoma Paulo, atako ayebaki koloba, asololaki na Bakolinti “na kati ya bolɛmbu mpe na kati na kobanga mpe na kolɛnga makasi” mpo abenda likebi na bango likoló na ye moko te.—1 Kol. 2:3.
Makambo oyo osengeli koboya. Bato mingi, ntango bazali koloba, bazalaka na momeseno mabe ya koloba “Ɛɛ” mbala na mbala. Bato mosusu bameseni koloba mbala na mbala “sikoyo,” ntango balingi kobanda koloba, to mpo na kokangisa makanisi na bango, balobaka mbala na mbala “omoni,” “boyebi” to “bongo.” Mbala mosusu oyebi te ete osalelaka maloba oyo mingi. Meká kosɛnga na moto moko alanda yo ntango ozali koloba mpe azongelaka maloba wana ntango nyonso oyo ozali koloba yango. Okokamwa.
Bato mosusu, ntango batángaka to balobaka, bazongelaka liloba moko mbala mibale to misato. Elingi koloba, soki abandi koloba mpe akómi na katikati ya fraze, atɛlɛmi mpo na kozongela likambo oyo alobaki.
Nzokande, bato mosusu balobaka mbangu mingi te, kasi babandaka na likanisi moko, nde na katikati, bakati mpo na kolobela likanisi to likambo mosusu. Ata soki olobaka na mpasi te, soki ozali kokatakata makanisi na yo, yango ekosala ete okakatana na maloba.
Ndenge ya kobongisa yango. Soki mokakatano na yo ezali ete ozali kolukaluka maloba oyo osengeli koloba, osengeli kosala mpenza milende mpo oyekola maloba mingi lisusu. Ntango ozali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká! to mikanda mosusu, tyá mpenza likebi na maloba oyo omeseni na yango te. Luká yango na diksionɛrɛ, luká ndimbola na yango mpe kangá maloba yango mpo obakisa yango na maloba oyo oyebi. Soki ozali na diksionɛrɛ te, tuná moto moko oyo alobaka lokota yango malamu.
Soki okómi na momeseno ya kotángaka na mongongo makasi, yango ekosalisa yo oyeba koloba malamu mpenza. Tyá likebi na maloba ya mpasi mpe zongelá yango mbala mingi.
Mpo otángaka kozanga kokakatana, osengeli koyeba ndenge maloba elandanaka na kati ya fraze. Mbala mingi esɛngaka kotánga maloba mingi mpo na kokanga likanisi oyo mokomi akomi. Tyá mpenza likebi na ndenge maloba yango elandani. Tyá bilembo wana, soki yango ekosalisa yo. Mokano na yo ezali kaka te ete otánga maloba ndenge esengeli, kasi obimisa mpe makanisi yango polele. Soki osilisi kotalela fraze moko, talelá oyo elandi tii okosilisa koyekola paragrafe mobimba. Luká koyeba ndenge makanisi elandani na paragrafe yango. Na nsima, meká kotánga yango na mongongo makasi. Zongelá kotánga paragrafe yango mbala mingi tii okobanda kotánga yango kozanga kobɛta mabaku mpe kozanga kotɛlɛmatɛlɛma na bisika oyo ebongi te. Na nsima, talelá baparagrafe mosusu.
Soki osilisi, luká kotánga mwa mbangu. Soki oyebi sikoyo ndenge maloba elandani na kati ya fraze moko, okokoka komona maloba mingi na mbala moko mpe okomesana komona maloba oyo elandi liloba oyo ozali kotánga, liboso kutu okóma wana. Yango ekosala mpenza ete otángaka malamu koleka.
Soki ozali komeka mbala na mbala kotánga kozanga ete omibongisa liboso, yango ekoki kosalisa yo mpenza. Na ndakisa, kozanga ete omibongisa liboso, tángá na mongongo makasi mokapo ya mokolo mpe makanisi oyo babimisi mpo na yango. Salá bongo mokolo na mokolo. Mesenisá liso na yo na kotalaka na mbala moko maloba mingi oyo ekobimisa makanisi oyo bakomi, na esika ya kolanda liloba mokomoko.
Ntango ozali kosolola na bato, mpo okakatana te, osengeli kokanisa liboso ya koloba. Salá ete ekóma momeseno na yo mokolo na mokolo. Poná likanisi oyo olingi koloba mpe ndenge oyo okolobela yango. Na nsima, bandá koloba. Koloba mbangumbangu te. Salá makasi osilisaka koloba makanisi na yo kozanga ete okata yango to kozanga ete oleka mbala moko na likanisi mosusu. Mbala mosusu okomona malamu ete osalelaka bafraze ya mikuse mpe ezangi mindɔndɔ.
Soki oyebi mpenza likambo oyo olingi koloba, okozanga maloba te mpo na koloba likambo yango. Mbala mingi, ezalaka na ntina ete opona maloba oyo okosalela. Ya solo, ntango ozali komeka lisolo na yo, ekozala malamu oluka naino koyeba soki likambo olingi koloba ezali polele na makanisi na yo mpe na nsima kanisá maloba oyo okobimisa. Soki ozali ntango nyonso kokanisa likambo oyo olingi koyebisa bato na esika ete okanisa kaka maloba oyo ozali kobimisa, okomona ete okobanda kolukaluka maloba te mpe makanisi oyo ozali kobimisa ekouta mpenza na motema na yo. Kasi soki ozali kaka kokanisa maloba na esika ya makanisi oyo olingi kobimisa, elobeli na yo ekozala lokola moto oyo ayebi te nini akoloba. Soki ozali komeka kosala boye mbala na mbala, okokóma koloba kozanga kokakatana mpe yango ezali na ntina mingi mpo na koyeba koloba mpe kotánga malamu.
Ntango Moize azwaki mokumba ya kokende koloba mpo na Yehova epai ya libota ya Yisalaele mpe liboso ya Farao, mokonzi ya Ezipito, amonaki mpenza ete akokoka te. Mpo na nini? Mpamba te ayebaki koloba malamu te mpe mbala mosusu azalaki na likukuma. (Ex. 4:10; 6:12) Moize alukaki kopesa bantina oyo ekomonisa ete akokoka te, kasi Nzambe andimaki ata moko na yango te. Yehova atindelaki ye Alona mpo azala lokola molobeli ya Moize, kasi asalisaki mpe Moize ye moko aloba. Mbala na mbala, Moize alobaki malamu mpenza kaka liboso ya mwa ndambo ya bato te, kasi mpe liboso ya libota mobimba. (Det. 1:1-3; 5:1; 29:2; 31:1, 2, 30; 33:1) Soki osali mpenza makasi yo moko ete obanda koloba kozanga kokakatana mpe soki otyeli Yehova motema, yo mpe okoki kosalela makoki na yo ya koloba mpo na kokumisa Nzambe.
-
-
Kopema na esika oyo ebongiZwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
-
-
LITEYA 5
Kopema na esika oyo ebongi
NTANGO ozali koloba, ezali na ntina mingi opema na esika oyo ebongi, ezala ntango ozali kosala lisukulu to ntango ozali kosolola na moto moko. Soki ozali kopema te, bato bakomona ete ozali kolobaloba makambo ezangi ntina na esika ete obimisa polele makanisi oyo bakokanga mpenza ntina na yango. Soki ozali kopema na esika oyo ebongi, yango ekosala ete lisolo na yo ebima polele. Okoki mpe kopema na esika oyo ekosala ete makanisi ya ntina ya lisolo na yo esimba mpenza mitema ya bato oyo bazali koyoka yo.
Ndenge nini okoki koyeba esika oyo osengeli kopema? Osengeli kopema mingi to mingi te?
Ntango bilembo esɛngi ete opema. Na nkota oyo bakomaka na mokanda, bilembo ya bopemi ezali na ntina mingi. Yango ekoki komonisa soki fraze esuki to soki ezali motuna. Na nkota mosusu, bilembo nde emonisaka polele maloba oyo euti na mokomi to na mokanda mosusu. Bilembo mosusu ya bopemi emonisaka ete ndambo ya fraze elandani na ndambo mosusu. Moto oyo azali kotánga mpo na ye moko akoki komona bilembo ya bopemi. Kasi ntango azali kotánga mpo na bato mosusu, mongongo na ye nde esengeli komonisa esika oyo elembo nyonso ya bopemi ezali na kati ya mokanda. (Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá Liteya 1, “Kotánga malamu.”) Soki ozali kopema te mpo na kotosa bilembo yango, ekoki kozala mpasi ete basusu bákanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga, to ekoki kutu kobongola ndimbola ya makambo oyo ekomami na mokanda.
Longola bilembo ya bopemi, lolenge makanisi elandani na kati ya fraze emonisaka mpe esika oyo osengeli kopema. Moto moko oyo abɛtaka miziki, mpe ayebani mingi alobaki boye: “Nabɛtaka banɔti ya miziki malamu te koleka bato mosusu oyo babɛtaka piano. Kasi na oyo etali kopema liboso to nsima na banɔti ya miziki, wana nde mosala na ngai.” Ezali mpe bongo ntango tozali koloba. Soki ozali kopema na ndenge esengeli ntango ozali koloba ekosala mpenza ete makambo oyo obongisaki malamu mpo na koloba ezala kitoko koleka mpe bato bákanga ntina na yango malamu koleka.
Ntango ozali komibongisa mpo na kotánga na miso ya bato mingi, mbala mosusu okomona malamu kotya mwa bilembo na mokanda oyo okotánga. Na esika oyo okopema mwa moke, okoki kotya elembo moko. Na esika oyo okopema mingi, okoki kotya bilembo mibale. Soki omoni ete fraze moko ezali makasi mpe ozali kopemapema na bisika oyo ebongi te, tyá mwa elembo na kreyɔ mpo na kokangisa esika moko maloba nyonso ya fraze yango. Na nsima, tángá fraze yango banda na ebandeli tii na nsuka. Bato mingi oyo bayebi mpenza koloba basalaka bongo.
Mbala mingi, kopema ntango ozali kosolola na bato ezalaka mpenza mpasi te, mpamba te oyebi makanisi oyo yo moko olingi kobimisa. Nzokande, soki ozali na momeseno ya kopemapema, ezala na esika oyo yango ebongi mpe na esika oyo ebongi te, maloba na yo ekosimba mpenza mitema te mpe ekozala polele te. Mpo na kosilisa mbeba yango mpe kobongisa lolenge na yo ya koloba, okoki kotala toli oyo ezali na Liteya 4, “Kokakatana na maloba te.”
Kopema liboso ya koleka na likanisi mosusu. Ntango olingi koleka na likanisi mosusu ya ntina, osengeli kopema mpo na kotikela bato oyo bazali koyoka yo ntango ya kokanisa, ya komibongisa, ya koyeba ete olingi koleka na likanisi mosusu mpe komona polele likanisi yango oyo olingi koloba. Kopema liboso ya koleka na likanisi mosusu ezali na ntina mingi, ndenge moko lokola otɛlɛmaka mwa moke liboso ya kokatisa balabala.
Balobi mosusu balekaka mbangumbangu na likanisi mosusu kozanga kopema, mpamba te balukaka kolobela makambo ebele ebele. Mpo na bato mosusu, yango emonisaka lolenge oyo bameseni koloba. Mbala mosusu bato nyonso oyo bafandi na bango balobaka mpe ndenge wana. Kasi yango esalaka ete mateya na bango esimba mitema ya bato te. Soki ozali na likambo moko ya ntina ya koloba, oyo olingi ete bato báyoka yango mpe bákanga yango na motó, zwá mpenza ntango ya kobongisa makanisi na yo mpo ebima polele. Yebá ete kopema ezali na ntina mingi soki olingi koloba mpe kobimisa makanisi polele.
Soki okosala lisukulu ya plan, osengeli kobongisa makanisi na yo mpo bisika oyo okopema liboso ya koleka na likanisi mosusu ya ntina emonana polele. Soki okotánga lisukulu ya maniskri, tyá elembo na esika oyo likanisi moko esuki mpe mosusu ya ntina ebandi.
Mbala mingi, kopema mpo na koleka na likanisi mosusu eumelaka mingi koleka kopema ntango bilembo esɛngi ete tópema, kasi esengeli koumela mingi mpenza te, mpamba te yango ekosala ete lisolo na yo eumela. Soki ozali kopema mingi, yango ekomonisa lokola ete omibongisaki malamu te mpe ozali kolukaluka makambo oyo osengeli koloba.
Kopema mpo na konyata likambo moko ya ntina. Mbala mingi kopema mpo na konyata likambo moko ya ntina ebendaka likebi, yango ezalaka liboso to nsima ya kobimisa likanisi moko to motuna moko oyo olobi yango makasi. Soki opemi bongo, yango ekotikela bato oyo bazali koyoka yo ntango ya kokanisa makambo oyo outi koloba, to ekotinda bango bázela na motema likoló makambo oyo olingi koloba. Ndenge wana nyonso ya kopema ekokani te. Yo moko okopona oyo wapi ebongi mpenza osalela. Kasi kobosana te ete okopema mpo na konyata likambo moko ya ntina kaka soki likanisi yango ezali mpenza na ntina mingi. Soki te, makanisi yango ekozala lisusu na ntina te.
Ntango Yesu atángaki Makomami liboso ya bato mingi na sinagoga ya Nazarete, apemaki mpenza malamu mpe na ntango oyo ebongi. Libosoliboso, atángaki na rulo ya mosakoli Yisaya mokumba oyo azwaki. Nzokande, liboso amonisa ndenge oyo makambo yango ekokisami, akangaki rulo, azongisaki yango epai ya mosaleli ya sinagoga mpe akendaki kofanda. Na nsima, lokola miso ya bato nyonso na sinagoga ezalaki kaka kotala ye, alobaki boye: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”—Luka 4:16-21.
Kopema mpo na makɛlɛlɛ. Ntango ozali kosala lisolo na yo, soki makɛlɛlɛ ezali, osengeli kopema. Ntango ozali kosolola na moto moko na mosala ya kosakola, ekosɛnga mbala mosusu opema mwa moke soki motuka moko ezali koleka to soki mwana azali kolela. Na mayangani, soki makɛlɛlɛ ezali mpenza makasi te, okoki kotombola mongongo na yo mpe kokoba na lisolo. Kasi soki makɛlɛlɛ ezali makasi mpe ezali koumela, osengeli kopema, mpamba te ata bato oyo bazali koyoka yo mpe bakolanda yo te. Yango wana, yebá esika nini ebongi kopema mpo osalisa bato oyo bazali koyoka yo bázwa mpenza litomba na makambo malamu oyo olingi koyebisa bango.
Kopema mpo na kotika moto ayanola. Ata ntango ozali kosala lisolo oyo esɛngi mituna mpe biyano te, ezali na ntina mingi ete otikelaka bato oyo bazali koyoka ntango ya kopesa biyano na mituna na yo, na maloba te, kasi na mitema na bango. Soki otuni mituna oyo esɛngi na bato oyo bazali koyoka ete bákanisa, kasi opemi na ndenge esengeli te, mituna yango ekozala na ntina mpenza te.
Ya solo, ezali na ntina mingi ete opemaka kaka ntango ozali kosala lisolo liboso ya bato mingi te, kasi mpe ntango ozali kopesa bato mosusu litatoli. Emonani ete bato mosusu bapemaka te. Soki yo mpe ozali na mokakatano yango, salá makasi mpenza ete oyekola ezaleli oyo molobi nyonso asengeli kozala na yango. Okobongisa lolenge na yo ya kosolola na bato mosusu mpe mosala na yo ya kosakola ekobota mbuma malamu koleka. Kopema ezali ntango ya kofanda mwa moke nyɛɛ, yango wana balobaka ete kofanda nyɛɛ ekataka lolaka, ezali ntango ya konyata makanisi ya ntina mpe ebendaka likebi ya bato mpe epemisaka matoi na bango mpo báyoka malamu lisusu.
Kosolola elimboli ete bato mibale to bato mingi bazali koyebisana makanisi na bango. Basusu bakoyoka yo soki yo mpe ozali koyoka bango mpe ozali komonisa ete ozali kosepela na makambo oyo bazali koloba. Yango esɛngi ete opema ntango molai mpo na kotikela bango mpe ntango ya koloba.
Na mosala ya kosakola, litatoli na biso ekobota mpenza mbuma soki tozali kosala yango lokola lisolo. Nsima ya kopesana mbote, Batatoli mingi bamonaka ete ezali malamu báyebisa likambo oyo balingi koloba mpe na nsima, batunaka motuna moko. Bapemaka mpo na kotikela molobani na bango ntango ya kopesa eyano, mpe na nsima, bamonisaka ete bayoki makambo oyo moto yango alobi. Ntango bazali kosolola, bakoki kotikela moto yango ntango mingi ete apesa makansi na ye. Bayebi mbala mingi ete basalisaka moto malamu koleka soki bayebi mpenza makanisi na ye na likambo oyo bazali kosolola.—Mas. 20:5.
Ya solo, moto nyonso te nde akopesa biyano ya malamu na mituna na yo. Kasi likambo yango elɛmbisaki Yesu te ete afanda nyɛɛ na boumeli ya mwa ntango molai mpo na kotikela ata banguna na ye ntango ya koloba. (Mko. 3:1-5) Soki otikeli moto ntango ya koloba, yango ekolendisa ye ete akanisa mpe, mbala mosusu, yango ekosala ete abimisa makambo oyo ezali na motema na ye. Moko ya ntina ya mosala na biso ya kosakola ezali ete tósimba mpenza mitema ya bato ntango tozali kolakisa bango makambo ya ntina mingi na kati ya Liloba ya Nzambe, oyo ekosɛnga bango bázwa bikateli.—Ebe. 4:12.
Na mosala na biso ya kosakola, koyeba kopema na esika oyo ebongi ezali mpenza likambo oyo bayekolaka yango koyekola. Soki ozali mpenza kopema na esika oyo ebongi, makanisi ekobima polele koleka mpe ekotikala libela na bɔɔngɔ ya bato.
-
-
Koyeba konyata maloba ya ntinaZwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
-
-
LITEYA 6
Koyeba konyata maloba ya ntina
NTANGO ozali koloba to kotánga na miso ya bato, ezali na ntina mingi ete osuka kaka te na kotánga liloba mokomoko ndenge esengeli, kasi osengeli lisusu konyata maloba ya ntina mpe maloba oyo ebombi makanisi ya ntina na lisolo na yo mpo bato bákanga ntina na yango polele.
Koyeba konyata maloba ya ntina, elimboli kaka te konyata liloba moko to maloba mingi. Osengeli nde konyata liloba oyo ebongi. Soki onyati liloba oyo ebongi te, bato oyo bazali koyoka yo bakokanga mpenza ntina ya makambo oyo olobi te mpe bakobanda kokanisa makambo mosusu. Ata lisolo na yo ezali na makanisi ya kitoko oyo ekoteya mpenza bato, soki oyebi konyata maloba malamu te, yango ekolendisa mpenza bato oyo bazali koyoka te.
Ezali na ndenge mingi mpo na konyata maloba ya ntina, oyo mbala mingi, esalelamaka nzela moko: okoki kotombola mongongo, okoki koloba na nsai mpenza, okoki koloba malɛmbɛ mpe kobenda maloba, kopema liboso to nsima ya koloba likambo yango (to okoki kopema liboso mpe nsima ya koloba yango), to mpe okoki kosala bajɛstɛ na mabɔkɔ mpe na elongi. Na nkota mosusu, okoki mpe konyata maloba ya ntina soki okitisi mongongo to mpe olobi na mongongo ya moke. Mpo opona oyo wapi okosalela, talelá makambo oyo okoloba mpe esika oyo okolobela yango.
Ntango ozali kopona likambo oyo okonyata, talelá makambo oyo. (1) Na kati ya fraze, mpo oyeba maloba oyo okoki konyata, osengeli kaka kotala maloba oyo elandi yango te, kasi osengeli mpe kotalela esika na yango kati na lisolo mobimba. (2) Okoki konyata maloba mosusu mpo na komonisa esika likanisi mosusu ebandi, ezala likanisi moko ya ntina to mpe olingi kokɔta na likambo mosusu. Ekoki mpe kozala mpo na komonisa ete okómi na nsuka ya makanisi oyo ozalaki komonisa. (3) Molobi akoki konyata maloba mosusu mpo na komonisa ndenge ye moko azali kotalela likambo yango. (4) Okoki mpe konyata maloba mosusu mpo na komonisa makanisi ya ntina ya lisolo na yo.
Mpo na konyata maloba ya ntina na ndenge oyo tolobeli awa, molobi to moto oyo azali kotánga na miso ya bato mingi asengeli ye moko kokanga mpenza ntina ya makambo oyo akoloba to akotánga mpe asengeli mpenza koluka ete bato oyo bazali koyoka ye bákanga ntina na yango. Nehemia 8:8 elobi boye mpo na mateya oyo epesamaki na mikolo ya Ezela: “Batángaki kati na mokanda ya Mobeko ya Nzambe polele; mpe bapesaki ntina ete básosola [botángi].” Emonani polele ete bato oyo batángaki mpe balimbolaki Mibeko ya Nzambe na ntango wana bayebaki mpenza ntina ya kosalisa baoyo bazalaki koyoka bango ete bákanga ntina ya makambo oyo bazalaki kotánga, bákanga yango na motó mpe básalela yango.
Mokakatano ekoki kouta wapi? Bato mingi, ntango basololaka na bato mosusu mokolo na mokolo, ezalaka mpasi te mpo na kokanga ntina ya makambo oyo bazali koloba. Nzokande, ntango batángaka mokanda oyo ekomami na moto mosusu, ezalaka mpasi mpo báyeba maloba to bafraze oyo basengeli konyata. Mpo na koyeba maloba oyo osengeli konyata, osengeli nde kokanga mpenza ntina ya makambo oyo ekomami wana. Yango esɛngi ete oyekola malamumalamu makambo oyo ezali na mokanda yango. Yango wana, soki basɛngi yo otánga na likita moko ya lisangá, osengeli komibongisa malamu mpenza.
Na esika ya kopona malamu maloba oyo basengeli konyata, bato mosusu batángaka lokola nde bazali koyemba. Ntango bazali kotánga, bazali komata mpe kokita ntango nyonso, ezala maloba oyo bazali konyata ezali na ntina to ezali na ntina te. Ezali mpe na bato mosusu oyo banyataka maloba oyo ekangisaka lisolo, maloba lokola: yango wana, na bongo, atako bongo, nzokande mpe bongo na bongo. Mpo na kotánga maloba yango, bamatisaka mongongo mingi koleka. Soki maloba oyo ozali konyata ezali kobimisa makanisi polele te, yango ekosala ete bato bátya lisusu likebi na lisolo yango te.
Mpo na konyata maloba ya ntina, bato mosusu bamatisaka mongongo makasi, lokola nde bazali kopamela bato oyo bazali koyoka bango. Na ntembe te, kosala bongo ebotaka mpenza mbuma malamu te. Soki ozali konyata maloba na ndenge ebongi te, bato oyo bazali koyoka bakoki komona lokola nde ozali kozwa bango lokola bana mike. Ekozala malamu koleka soki olobi na bango na bolingo mpenza mpo na kobenda likebi na bango mpe kosalisa bango bámona ete makambo oyo ozali koloba euti na Makomami mpe ebongi mpenza!
Ndenge ya kobongisa. Mbala mingi, moto ye moko ayebaka te ete azali na mikakatano mpo na konyata maloba ya ntina. Esengeli mbala mosusu ete moto mosusu ayebisa ye yango. Soki olingi mpenza koyeba konyata maloba ya ntina, mokɛngɛli na eteyelo ya lisangá na bino akoki kosalisa yo. Kobanga te kosɛnga ndeko mosusu oyo ayebi koloba malamu ete asalisa yo. Sɛngá ye ete alanda yo na likebi mpenza ntango ozali kotánga to koloba mpe na nsima, apesa yo toli mpo obongisa lisusu.
Na ebandeli, moto oyo azali kopesa yo toli akoki kosɛnga yo ete omeka kosalela lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na koyekola konyata maloba. Na ntembe te akoyebisa yo ete otalela fraze mokomoko malamu mpenza mpo na koyeba maloba to bafraze oyo osengeli konyata mpo bato bázala na mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Akoki koyebisa yo lisusu ete otya mpenza likebi na maloba mosusu oyo batɛngisi makomi. Kobosana te ete na kati ya fraze, maloba nyonso ezalaka na boyokani. Mbala na mbala, osengeli kaka konyata liloba mokomoko te, kasi maloba mingi ya fraze na mbala moko. Na nkota mosusu, bakoki kolendisa bana-kelasi ete bátya likebi na bilembo ya kotombola to kokitisa mongongo oyo ezali komonisa maloba oyo basengeli konyata.
Na nsima, mpo na kosalisa yo oyeba maloba oyo osengeli konyata, moto oyo azali kopesa yo toli akoki kolendisa yo ete osuka kaka na fraze moko te, kasi otalelaka mpe paragrafe to lisolo mobimba. Likanisi nini ya ntina elobelami na paragrafe yango? Ndenge nini yango ekotinda yo otalela maloba oyo osengeli konyata na kati ya fraze mokomoko? Na lisolo na yo, talá motó ya likambo monene mpe motó ya likambo moke oyo ezali na makomi ya moindo makasi. Boyokani nini ezali kati na mitó ya makambo yango mpe maloba oyo osengeli konyata? Nyonso wana ezali makambo oyo osengeli kotalela. Kasi kebá ete onyata maloba ebele ebele te.
Ezala ozali koloba makambo oyo euti mpenza na motema na yo to ozali kotánga, moto oyo azali kopesa yo toli akoki mpe kolendisa yo ete onyataka maloba ya ntina na kotalela ndenge makanisi ya lisolo na yo elandani. Osengeli koyeba esika oyo likanisi moko esuki to esika oyo ozali koleka na likanisi mosusu ya ntina. Bayoki bakosepela mpenza soki, na lisolo na yo, bazali komona esika likanisi moko esuki mpe esika oyo olingi koleka na likanisi mosusu ya ntina. Okoki kosalisa bango báyeba yango soki onyati maloba lokola libosoliboso, na nsima, na nsuka, na yango, mpe ebongi ete.
Moto oyo azali kopesa yo toli akosɛnga yo mpe ete otya likebi na makanisi oyo osengeli koloba to kotánga yango na nsai mpenza. Mpo na yango, okoki konyata maloba lokola mpenza, soki moke te, ebongi te ete, ezali na ntina mingi ete, mpe ntango nyonso. Soki ozali kosala bongo, makambo oyo ozali koloba ekoki mpenza kosimba mitema ya bato oyo bazali koyoka yo. Tokolobela makambo yango mingi lisusu na Liteya 11, “Koloba na nsai mpe kobimisa mayoki.”
Mpo onyataka maloba malamu koleka, ekosɛnga lisusu oyebaka mpenza makanisi ya ntina ya lisolo na yo, oyo olingi ete bayoki na yo bákanga na motó. Tokotalela makambo yango mosusu na Liteya 7, “Konyata makanisi ya ntina”, oyo etali kotánga na miso ya bato mingi mpe na Liteya 37, “Kobimisa makanisi ya ntina polele”, oyo etali koloba na miso ya bato mingi.
Soki ozali kosala makasi okola na mosala ya kosakola, tyá mpenza likebi na ndenge oyo ozali kotánga bavɛrsɛ. Zalá na momeseno ya komituna: ‘Mpo na nini nazali kotánga vɛrsɛ oyo?’ Mpo na moto oyo azali koteya, ekoki kaka te kotánga maloba ndenge esengeli, ata mpe kotánga yango na nsai mpenza. Ntango ozali koyanola na motuna ya moto moko to ozali koteya ye likambo moko oyo ezali mateya ya ebandeli na Biblia, ezali malamu ete onyata na kati ya vɛrsɛ oyo ozali kotánga maloba oyo esimbi likambo oyo bozali kolobela. Soki osali bongo te, moto oyo ozali kotángela ye vɛrsɛ yango akokoka kokanga likanisi yango te.
Konyata maloba mpe bafraze mosusu esɛngaka kopesa maloba to bafraze yango kilo oyo ebongi na yango. Mpo na yango, mbala mosusu moto oyo ayebi naino koloba na miso ya bato mingi te, akoki kolekisa ndelo ntango akómi na maloba to bafraze yango. Yango ekozala lokola mondule ya moto oyo abandi koyekola kobɛta miziki. Na ebandeli akobanda kobɛta kaka “banoti” ya mpamba, kasi soki ameseni na yango, ntango banoti yango esangisami malamu, ekopesa “miziki” oyo ebɛtami malamu mpe ekoyokana kitoko mpenza.
Nsima ya koyekola makambo oyo ya ntina mingi, sikoyo okozwa litomba mingi soki ozali kotya likebi na lolenge bato oyo bayebi mpenza koloba basalaka. Okomona mpenza matomba ya konyata liloba mokomoko ya ntina na ndenge ebongi. Okoyeba mpe ndenge mingi ya konyata maloba ya ntina mpo bato bákanga mpenza ntina ya makambo oyo ozali koloba. Koyeba konyata maloba ya ntina ekosala mpenza ete otángaka mpe olobaka malamu koleka.
Mpo olonga, kosuka kaka te na koyekola mwa moke makambo oyo emonisi ndenge osengeli konyata maloba ya ntina. Mpo olobaka malamu, salá milende ntango nyonso tii okoyeba mpenza konyata maloba ya ntina mpe kino bato mosusu bakomona ete ozali koloba ndenge omeseni koloba.
-
-
Konyata makanisi ya ntinaZwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
-
-
LITEYA 7
Konyata makanisi ya ntina
MOTO oyo ayebi mpenza kotánga atalaka kaka fraze moko te, ata mpe paragrafe yango te, kasi ntango azali kotánga, na motó na ye, azali na makanisi ya ntina ya lisolo yango mobimba. Yango nde ekosalisa ye ayeba maloba oyo akonyata.
Soki asali bongo te, lisolo na ye ekozala na makanisi ya ntina te oyo ekoki kosimba mpenza motema. Ata likanisi moko te ekomonana polele ete ezali na ntina mingi koleka makanisi mosusu. Ntango akosilisa lisolo na ye, ekoki kozala mpasi mpo bato bákanga ata likanisi moko ya ntina na motó.
Mbala mingi, soki ozali mpenza kotya likebi na makanisi ya ntina mpe ozali konyata yango, okobongisa mpenza lolenge ya kotánga masolo oyo euti na Biblia. Soki ozali konyata makanisi ya ntina, yango ekosala mpenza ete bato bákangaka ntina ya baparagrafe oyo ozali kotánga, ezala ntango ozali koyekola na moto na ndako na ye to ntango ozali kotánga na makita ya lisangá. Yango ezali mpenza na ntina koleka ntango ozali kosala lisukulu ya maniskri, ndenge esalemaka mbala mosusu na mayangani na biso.
Ndenge ya kosala yango. Na eteyelo, bakoki kosɛnga yo otánga mokapo moko ya Biblia. Makanisi nini okonyata? Soki lisolo oyo ozali kotánga ezali na likanisi moko ya ntina to ezali kolobela likambo moko ya ntina oyo esalemaki, ekozala malamu obimisa yango polele.
Ezala makambo oyo ozali kotánga ezali maloba ya kitoko to lisolo to mpe lisese moko, bato oyo bazali koyoka bakozwela yango matomba soki otángi yango malamu. (2 Tim. 3:16, 17) Mpo na yango, osengeli kotalela makambo oyo okotánga mpe bato oyo bakoyoka yo.
Soki osengeli kotánga mokanda moko ntango ozali koyekola Biblia na moto to kotánga ntango ozali na makita ya lisangá, makanisi nini ya ntina osengeli konyata? Talelá biyano na mituna ya baparagrafe lokola makanisi ya ntina mpe nyatá makanisi oyo eyokani na motó ya likambo moke, oyo ezali na makomi ya moindo makasi mpe ezali likoló ya baparagrafe oyo ozali kotánga.
Ezali malamu te ete ozala na momeseno ya kokoma makambo nyonso oyo okoloba na masukulu na yo na lisangá. Kasi mbala mosusu, bapesaka bamaniskri mpo na masukulu oyo ekosalema na liyangani moko ya monene mpo makanisi oyo ezali wana epesama ndenge moko na bisika nyonso oyo mayangani yango ekosalema. Mpo na konyata makanisi ya ntina na bamaniskri wana, molobi asengeli libosoliboso kotalela yango malamumalamu. Makanisi ya ntina ezali nini? Asengeli koyeba yango. Makanisi ya ntina ezali kaka te makanisi oyo esepelisi ye. Ezali nde makanisi oyo esimbi lisolo mobimba. Mbala mosusu na kati ya maniskri, ezalaka libosoliboso na fraze moko ya mokuse oyo elobeli polele likanisi ya ntina mpe na nse na yango, okokuta lisolo to molɔngɔ ya makanisi mosusu oyo esimbi likanisi wana ya ntina. Mbala mingi, nsima ya kopesa makanisi wana lokola elembeteli ya likambo oyo ozali koloba, ezalaka na fraze moko oyo endimisaka yango. Ntango molobi ayebi bisika nyonso oyo makanisi yango ya ntina ezali, asengeli sikoyo kotya mwa elembo wana, na lokasa na ye ya maniskri. Mbala mingi, makanisi ya ntina ezalaka mingi te, ntango mosusu minei to mitano. Na nsima, molobi asengeli kotánga yango mbala na mbala tii ntango akomona ete bayoki bakozala na mikakatano te mpo na koyeba makanisi yango ya ntina. Kosala lisukulu ezali lokola moto azali komata ngomba mpe makanisi ya ntina ezali lokola nsɔngɛ ya ngomba yango. Soki ozali konyata malamu mpenza makanisi ya ntina ya lisolo na yo, bato bakobosana yango te. Wana nde mokano oyo molobi nyonso asengeli kozala na yango.
Ezali na ndenge mingi oyo molobi akoki konyata makanisi ya ntina mpo na kosalisa bato oyo bazali koyoka ete báyeba yango. Na ndakisa, akoki komatisa mongongo, akoki kotánga malɛmbɛmalɛmbɛ na esika yango, akoki kotánga na mɔtɔ mpenza, to mpe akoki kosala bajɛstɛ oyo ebongi.
-