Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lr mok. 10 nk. 57-61
  • Yesu azali na nguya koleka bademo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azali na nguya koleka bademo
  • Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu bazali banani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Baanzelu bazali banani mpe basalaka nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Bikelamu ya elimo bakoki kosala biso nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bilenge​—⁠bozali kolanda mateya ya nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Yekolá epai ya Moteyi Monene
lr mok. 10 nk. 57-61

MOKAPO 10

Yesu azali na nguya koleka bademo

OYEBI lisusu mpo na nini anzelu moko ya Nzambe akómaki Satana Zabolo?— Atombokelaki Nzambe mpamba te akómaki na mposa mabe ete básambelaka ye. Baanzelu mosusu mpe balandaki Satana?— Ɛɛ, balandaki ye. Biblia ebengi bango ‘baanzelu ya Satana,’ to bademo.​—Emoniseli 12:9.

Baanzelu yango ya mabe, to bademo, bandimaka Nzambe?— Biblia elobi ete ‘bademo bandimaka ete Nzambe azali.’ (Yakobo 2:19) Kasi lelo oyo, bazali kobanga mpo bayebi ete Nzambe akopesa bango etumbu mpo na mabe oyo basalaki. Mabe nini basalaki?—

Biblia elobi ete baanzelu yango batikaki esika na bango na likoló mpe bayaki na mabelé mpo na kozala lokola bato. Basalaki bongo mpamba te balingaki kosangisa nzoto na bana basi ya kitoko awa na mabelé. (Genese 6:1, 2; Yuda 6) Oyebaka soki kosangisa nzoto ezali nini?—

Kosangisa nzoto ezali ntango mobali ná mwasi bakutanisi nzoto na bango na ndenge moko boye. Na nsima, mwana akoki kobanda kosalema na kati ya libumu ya mwasi. Kasi, mpo na baanzelu, kosangisa nzoto ezali mabe. Nzambe alingi ete kaka mobali ná mwasi oyo babalani nde básangisaka nzoto. Alingi bongo mpo soki mwana abotami, tata ná mama na ye bábɔkɔla ye.

Utá likoló baanzelu ya mabe bazali kotala basi ya kitoko na mabele

Likambo nini ya mabe baanzelu oyo basalaki?

Ntango baanzelu balataki nzoto lokola bato mpe basangisaki nzoto na basi awa na mabelé, bana oyo babotaki bakolaki mpe bakómaki bilombe. Bilombe yango bazalaki mitema mabe mpenza mpe bazalaki komonisa bato mpasi. Yango wana Nzambe atindaki mpela moko ya monene mpo na koboma bilombe yango mpe bato nyonso ya mabe. Kasi atindaki Noa asala masuwa moko monene mpo na kobikisa mwa ndambo ya bato oyo bazalaki na etamboli malamu. Moteyi Monene alobaki ete tosengeli kobosana te makambo oyo esalemaki na ntango ya Mpela.​—Genese 6:3, 4, 13, 14; Luka 17:26, 27.

Ntango Mpela eyaki, oyebi nini ekómelaki baanzelu wana ya mabe?— Batikaki nzoto na bango ya bomoto oyo balataki mpe bazongaki na likoló. Kasi Nzambe andimaki bango lisusu lokola baanzelu na ye te; yango wana bakómaki baanzelu ya Satana, to bademo. Bongo nini ekómelaki bana na bango, to bilombe wana?— Bakufaki na Mpela. Bato mosusu oyo batosaki Nzambe te bakufaki mpe bango nyonso.

Babengani Zabolo ná bademo na ye na likoló mpe babwaki bango na mabele

Mpo na nini mobulu ezali mingi lelo na mabelé koleka ndenge ezalaki liboso?

Banda ntango wana ya Mpela, Nzambe apekisaka bademo bákóma lokola bato. Kasi ata tomonaka bango te, bademo bamekaka kaka kotinda bato básala makambo ya mabe. Bakómi kotya mobulu lisusu mingi koleka ndenge bazalaki kosala liboso. Basalaka bongo mpo babenganaki bango na likoló mpe babwakaki bango awa na mabelé.

Oyebi mpo na nini tokoki komona bademo te?— Ezali mpo bazali na nzoto ya elimo. Kasi tosengeli koyeba ete bazali. Biblia elobi ete Satana azali ‘kobungisa bato ya mokili mobimba nzela’ mpe bademo na ye bazali kosalisa ye.​—Emoniseli 12:9, 12.

Zabolo ná bademo na ye bakoki kobungisa biso nzela to kokosa biso mpe?— Ɛɛ, bakoki kokosa biso soki tozali kokeba te. Kasi tosengeli kobanga te. Moteyi Monene alobaki boye: ‘Zabolo azali na bokonzi likoló na ngai te.’ Soki tokangami na Nzambe, ye akobatela biso liboso ya Zabolo ná bademo na ye.​—Yoane 14:30.

Ezali na ntina mingi tóyeba makambo ya mabe oyo bademo bakoluka kotinda biso tósala. Yango wana, kanisá naino. Makambo nini ya mabe bademo basalaki ntango bayaki na mabelé?— Liboso ya Mpela, basangisaki nzoto na basi, likambo oyo ezali malamu te mpo na baanzelu. Lelo oyo, bademo basepelaka ntango bato babukaka mobeko ya Nzambe oyo etali kosangisa nzoto. Tiká natuna yo naino: Kaka banani nde bakoki kosangisa nzoto?— Olobi solo, kaka bato oyo babalaná nde bakoki kosangisa nzoto.

Lelo oyo, bana mibali mpe bana basi mosusu basangisaka nzoto, kasi ezali mabe. Biblia emonisi ete ezali Yehova nde asalaki enama ya kobotela ya mobali mpe oyo ya mwasi. Asalaki binama wana ya nzoto mpo na ntina moko monene oyo etali kaka bato oyo babalaná. Bademo basepelaka ntango bato bazali kosala makambo oyo Yehova apekisi. Na ndakisa, bademo basepelaka ntango mwana mwasi azali kosakana na enama ya kobotela ya mwana mobali, to mwana mobali azali kosakana na enama ya kobotela ya mwana mwasi. Biso tolingi kosepelisa bademo te, ezali bongo te?—

Ezali na likambo mosusu oyo bademo balingaka kasi Yehova ayinaka yango. Oyebi likambo yango?— Ezali mobulu. (Nzembo 11:5) Mobulu, ezali ntango moto azali na motema mabe mpe azali komonisa baninga mpasi. Soki ozali koyeba lisusu, ezali nde makambo oyo bilombe, bana ya bademo, bazalaki kosala.

Bademo balingaka mpe kobangisa bato. Na bantango mosusu, basalaka makambo mpo na komonisa ete bato oyo bakufá nde basali yango. Bakoki ata koloba na mongongo oyo ekokani na mongongo ya moto oyo akufá. Ezali ndenge wana nde bademo bazali kokosa bato mingi bákanisa ete bato oyo bakufá bazalaka kaka mpe bakoki kosolola na bato oyo bazali na bomoi. Ya solo, bademo batindaka bato mingi bándima ete bilima bazali.

Yango wana tosengeli kokeba ete Satana ná bademo na ye bákosa biso te. Biblia epesi likebisi oyo: ‘Satana amekaka komibimisa lokola anzelu moko ya malamu, basaleli na ye mpe basalaka bongo.’ (2 Bakolinti 11:14, 15) Kasi, bademo bazali mpenza mabe. Tótala ndenge balukaka ete biso mpe tókóma lokola bango.

Epai wapi mpenza bato bamonaka ebele ya makambo ya mobulu, ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo, makambo ya bilimo mpe ya bilima?— Bamonaka yango soki bazali kotala baemisyo mpe bafilme mosusu na televizyo, soki bazali kosala masano mosusu na ordinatɛrɛ mpe na video, soki bazali kotala Internet, to soki bazali kotánga mikanda mosusu ya kosɛkisa mpe soki bazali na baninga mabe. Soki tozali kosala makambo wana, tokopusana penepene na Nzambe to nde penepene na Satana ná bademo na ye? Okanisi nini?—

Bana mibale ya mibali bazali kotala masano ya mobulu na TV, mpe na nsima bazali komeka yango

Nini ekoki kokómela biso soki tozali kotala makambo ya mobulu?

Mpo na yo, nani alingi biso tóyokaka mpe tótalaka makambo ya mabe?— Ezali Satana ná bademo na ye. Sikoyo, ngai ná yo tosengeli kosala nini?— Tosengeli kotánga, koyoka mpe kotala makambo oyo ezali malamu mpo na biso mpe oyo ekosalisa biso tósalela Yehova. Okoki kotánga mwa makambo ya malamu yango oyo tokoki kosala?—

Bana mibale ya basi bazali kotánga elongo buku moko

Nini tosengeli kosala mpo tózala malamu?

Soki tosalaka makambo ya malamu, ezali na ntina te tóbanga bademo. Yesu azali na nguya mingi koleka bango mpe babangaka ye. Mokolo moko, bademo batunaki Yesu na mongongo makasi ete: “Oyaki nde mpo na kobebisa biso?” (Malako 1:24) Tokosepela ntango Yesu akoya kobebisa Satana ná bademo na ye, ezali bongo te?— Sikoyo, tokoki kozala na elikya ete Yesu akobatela biso na makambo mabe ya bademo soki tokangami na ye mpe na Tata na ye ya likoló.

Mpo na koyeba oyo tosengeli kosala, tótánga 1 Petelo 5:8, 9 mpe Yakobo 4:7, 8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto