Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jd mok. 2 nk. 14-28
  • Basakoli oyo bansango na bango ekoki kosalisa biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basakoli oyo bansango na bango ekoki kosalisa biso
  • Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BASAKOLI 12 NA ELEKO NA BANGO
  • BALUKAKI KOSALISA BIKÓLO YA MITÓ MAKASI
  • BASAKOLAKI LIKAMA MONENE OYO EZALAKI KOYA
  • BANSANGO YA KOLENDISA, YA KOBƆNDISA, MPE YA KOKEBISA
  • BAZALAKI KOZELA MASIYA
  • Mokolo ya Yehova—likambo ya ntina mingi
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Yehova—Nzambe oyo ayebisaka makambo liboso mpe akokisaka yango
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • “Bósakola likambo oyo na bikólo”
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Obadia, ya Yona mpe ya Mika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
jd mok. 2 nk. 14-28

Mokapo 2

Basakoli oyo bansango na bango ekoki kosalisa biso

1. Mpo na nini osengeli koluka koyeba basakoli 12 oyo bakomaki mikanda ya nsuka ya Makomami ya Ebre?

OKOLINGA koyeba bamemi-nsango 12 ya Nzambe? Bamemi-nsango yango bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele, yango wana okoki kokutana na bango te. Kasi, okoki koyeba bango, koyeba ndenge oyo babatelaki “mokolo monene ya Yehova” na makanisi na bango. Mpe makambo oyo okoyekola ezali mpenza na ntina mingi mpo na mokristo nyonso oyo azali kosala milende mpo na kobatela mokolo monene ya Yehova na makanisi na ye.​—Sefania 1:14; 2 Petro 3:12.

2, 3. Ndenge nini makambo oyo basakoli 12 bakutanaki na yango etaleli mpe biso?

2 Na Makomami ezali na bato mingi oyo babengami basakoli—mikanda mingi ya Biblia ezali na bankombo ya basakoli. Ndenge moko na basakoli mosusu, mibali 12 oyo tokolobela, batiká ndakisa na oyo etali bosembo mpe mpiko. Bamosusu kati na bango bayokaki esengo mingi ya komona ndenge nsango na bango ebongolaki mitema mpe makanisi ya bato, mpe etindaki bato bázongela Nzambe. Bamosusu bayokaki mpasi na motema komona ndenge bato mabe bazalaki kobuka mibeko ya Yehova mpe kotɛmɛla mokano na ye. Kati na bato yango 12, bamosusu bayokaki mawa mpenza na ndenge bamonaki bato oyo bazalaki zingazinga na bango, oyo bazalaki koloba ete bazali basambeli ya Yehova bazalaki mafumafu mpe bazalaki komipesa na bisengo.

3 Lokola biso, basakoli yango 12 bazalaki na bomoi na eleko oyo yikiyiki ezalaki na makambo ya politiki, matata ezalaki kati na bato, mpe makambo ya losambo ezalaki se kobeba. Lokola bazalaki bato “lokola biso,” na ntembe te bazalaki na makambo oyo ezalaki kobangisa bango mpe kotungisa bango. (Yakobo 5:17) Atako bongo, batikelá biso bandakisa malamu, mpe tosengeli kobosana te bansango na bango oyo ezali na kati ya “makomi ya basakoli” oyo ekomamá mpo na biso “baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.”—Baroma 15:4; 16:26; 1 Bakorinti 10:11.

BASAKOLI 12 NA ELEKO NA BANGO

4. Likambo nini osimbi mpo na ndenge oyo basakoli 12 balandanaki, mpe baoyo wapi Yehova asalelaki liboso mpo na kokebisa mpe kolendisa libota na ye?

4 Ntango mosusu okoki kokanisa ete ndenge mikanda yango elandani na Biblia na yo, kobanda na Hosea tii na Malaki emonisi ete basakoli yango balandanaki na bomoi ndenge wana. Ezali bongo te. Na ndakisa, mosakoli Yona, Yoele, Amose, Hosea, mpe Mika bango nyonso bazalaki na bomoi na ekeke ya libwa mpe ya mwambe L.T.B.a Na boumeli ya eleko yango, bakonzi mingi, ezala baoyo bazalaki na bokonzi ya Yuda na sudi to baoyo bazalaki na bokonzi ya Yisraele na nɔrdi bazalaki sembo te. Mpe bato oyo bango bazalaki koyangela bazalaki kaka kolanda ndakisa na bango ya mabe, mpe nkanda ya Nzambe ezalaki kokwela bango. Ezalaki na eleko wana nde bato ya Asiri mpe na nsima bato ya Babilone balukaki koyangela mokili mobimba. Bayisraele bakanisaki ata moke te ete Yehova akokaki kosalela banguya wana mibale ya mokili mobimba mpo na kopesa bitumbu na ye! Kasi, ndenge oyebi yango, Nzambe azalaki ntango nyonso kokebisa Bayisraele mpe bato ya Yuda na nzela ya basakoli na ye ya sembo.

5. Etuluku nini ya basakoli bayebisaki bitumbu ya Yehova liboso ete Yuda mpe Yerusaleme ekwea?

5 Lokola ntango ya kopesa bitumbu na Yuda mpe na Yerusaleme ekómaki mpenza pene, Yehova abimisaki etuluku mosusu ya balobeli ya molende. Banani bazalaki na etuluku yango? Mosakoli Sefania, Nahumu, Habakuku, mpe Obadia. Bango nyonso basalaki mosala na bango na boumeli ya ekeke ya nsambo L.T.B. Makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki na eleko wana ezalaki kobomama ya Yerusaleme na bato ya Babilone na mobu 607 L.T.B. mpe komemama ya Bayuda na boombo. Na mbala oyo mpe makambo esalemaki kaka ndenge Nzambe akebisaki na bisakweli oyo atindaki mibali yango báloba mpo na ye. Balukaki kokebisa bato mpo na makambo oyo ezalaki mabe, na ndakisa, kolangwa masanga mpe mobulu, kasi bato yango baboyaki kobongwana.—Habakuku 1:2, 5-7; 2:15-17; Sefania 1:12, 13.

6. Ndenge nini Yehova alendisaki ndambo ya Bayuda oyo bautaki na boombo?

6 Ntango libota ya Nzambe bautaki na boombo, bazalaki na mposa ya batambwisi ya makoki oyo bakobɔndisa mpe bakokebisa bango mpo bákangama na losambo ya solo. Etuluku mosusu ya basakoli—Hagai, Zekaria, mpe Malaki bakokisaki mposa yango. Basalaki mosala na bango na ekeke ya motoba mpe ya mitano L.T.B. Soki oyekoli makambo mingi na ntina na basakoli wana 12 ya molende oyo balobelaki bokonzi ya Nzambe mpe oyekoli makambo oyo basalaki, okomona mateya ya ntina oyo okoki kosalela na mosala na yo ya kosakola na eleko na biso oyo ya mabe mingi. Tiká tótalela sikoyo basakoli yango na molɔngɔ ndenge basalaki mosala na bango.

BALUKAKI KOSALISA BIKÓLO YA MITÓ MAKASI

7, 8. Ndenge nini lisolo ya Yona ekoki kolendisa biso soki tozali lisusu kotyela Nzambe motema te?

7 Esilá kokómela yo otyela lisusu Nzambe motema te, omona ntango mosusu ete kondima na yo elɛmbi? Soki ezali bongo, makambo oyo ekómelaki Yona ekosalisa yo. Yona azalaki na bomoi na ekeke ya libwa L.T.B. Na ntembe te oyebi ete Nzambe atindaki Yona na Ninive, mboka-mokonzi ya Ampire ya Asiri oyo ezalaki kokóma na nguya mingi. Yona asengelaki komonisa polele mabe ya bato ya Ninive. Kasi, na esika akende epai Nzambe atindaki ye—na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 900 na nɔrdi ya Yerusaleme—Yona azwaki masuwa mpo na kokende na libongo moko oyo ntango mosusu ezalaki na Espagne. Ya solo, azalaki kokende na ngámbo mosusu, na ntaka ya kilomɛtrɛ 3 500! Okanisi boni? Yona akimaki mpo azalaki kobanga, mpo kondima na ye elɛmbaki mpo na mwa ntango, to mpe mpo azalaki koyoka mabe mpo bato ya Ninive bakokaki kobongola motema mpe na nsima kosala Bayisraele mabe? Biblia eyebisi biso mpenzampenza te. Kasi, ndakisa ya Yona emonisi biso ntina oyo tosengeli kosɛnzɛla ete tótika te makanisi na biso elongwa na nzela ya malamu.

8 Oyebi oyo Yona asalaki ntango Nzambe asembolaki ye. Ntango azalaki na kati ya libumu ya “mbisi moko ya monene” oyo emelaki ye, Yona andimaki ete: “Lobiko ezali ya Yehova.” (Yona 1:17; 2:1, 2, 9) Ntango Nzambe abikisaki ye na ndenge ya likamwisi, Yona akokisaki mokumba na ye, kasi eumelaki te ayokaki mabe ntango Yehova aboyaki koboma bato ya Ninive mpo bayokaki nsango ya Yona mpe babongolaki motema. Na mbala oyo mpe, na bolingo na ye Yehova asembolaki mosakoli yango oyo azalaki komibanzabanza kaka na matomba na ye moko. Mpe atako bato mosusu bakoki kotya likebi kaka na mabunga oyo Yona asalaki, Nzambe atalelaki ye lokola mosaleli na ye ya botosi mpe ya sembo.—Luka 11:29.

9. Matomba nini okoki kozwa na nsango ya esakweli ya Yoele?

9 Esilá kokómela yo olɛmba nzoto ntango bato balobi na yo ete nsango oyo osakolaka ezali kaka mpo na kobangisa bato? Nsango ya mosakoli Yoele, oyo nkombo na ye elimboli “Yehova azali Nzambe,” etalelamaki mpe bongo na bato ya ekólo na ye. Emonani ete akomaki bisakweli na ye na Yuda, na mobu soki 820 L.T.B., na mikolo ya Mokonzi Uzia. Emonani lokola ete Yoele ná Yona basalaki mosala na bango na eleko moko. Yoele alobelaki bolɔzi ya mayoyo oyo esengelaki mpenza kobebisa ekólo. Ya solo, mokolo ya nsɔmɔ ya Nzambe ekómaki pene. Kasi, okomona ete nsango ya Yoele elobelaki kaka bitumbu te. Okosepela koyeba ete, amonisaki ete mosembwi ‘akozala na kati ya bato oyo bakobika.’ (Yoele 2:32) Bato oyo babongolaka motema bakoki kozala na esengo ete Yehova akopambola mpe akolimbisa bango. Yango esalisi biso tókóma na elikya makasi ete likambo yango ezali na kati ya makambo oyo biso mpe tozali kosakola lelo oyo! Yoele asakolaki ete nguya ya Nzambe, elimo santu na ye, ekosopama likoló ya “bato ya ndenge nyonso.” Omoni ndenge oyo esakweli yango etaleli mpe yo? Mpe Yoele abendaki likebi na likambo kaka moko oyo ekopesa lobiko: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova, akobika.”—Yoele 2:28, 32.

10. Ndenge nini Yehova asalelaki mosali mpamba ya bilanga?

10 Okoki koyoka lokola Amose soki ntango mosusu nsango ozali komema eleki yo kilo, mingimingi soki bato bazali koboya koyoka nsango yango. Amose azalaki mwana ya mosakoli te, mpe azalaki na etuluku ya basakoli te; kasi azalaki mobɔkɔli ya bampate mpe na bileko mosusu azalaki mosali bilanga. Asakolaki na eleko oyo Uzia azalaki mokonzi ya Yuda, pene na nsuka ya ekeke ya libwa L.T.B. Atako autaki na libota ya bozwi te, Amose (oyo nkombo na ye elimboli “kozala mokumba to momemi-mokumba”) azalaki komema bansango ya ntina mingi oyo asengelaki koyebisa na Yuda, Yisraele mpe na bikólo ya zingazinga. Elendisi yo te koyeba ete Yehova akoki kopesa makoki na moto ya mpamba mpo akokisa mokumba ya ntina mingi?

11. Tii wapi Hosea andimaki kosala mokano ya Nzambe?

11 Osilá komituna ‘makambo nini nakoki kondima kotika mpo nasala mokano ya Yehova’? Kanisá Hosea, oyo azalaki na bomoi na eleko ya Yisaya mpe Mika mpe oyo asalaki mosala na ye na boumeli ya mbula soki 60. Yehova ayebisaki Hosea abala Gomere, “mwasi oyo akosala pite.” (Hosea 1:2) Na kati ya bana misato oyo Gomere abotaki na nsima, ekoki kozala ete kaka moko nde azalaki ya Hosea. Mpo na nini Yehova akokaki kosɛnga na moto ayika mpiko na nsɔni ya kozala na mwasi oyo asali ekobo? Yehova azalaki kopesa liteya na likambo etali kozala sembo mpe kolimbisaka. Ndenge kaka mwasi ya ekobo akosaka mobali na ye, bokonzi ya nɔrdi ekosaki Nzambe. Atako bongo, Yehova amonisaki bolingo na ye epai ya basaleli na ye mpe alukaki kosalisa bango bábongola motema, mpe likambo yango ezali mpenza liteya monene oyo tosengeli kotalela.

12. Matomba nini okoki kozwa soki otaleli ndakisa ya Mika mpe matomba oyo mosala na ye ebimisaki?

12 Omoni te ete eleko oyo ya mpasi ezali kosala ete ezala pɛtɛɛ te mpo na yo komonisa mpiko mpe kotyela Yehova motema mobimba? Soki omonisi bizaleli yango, okozala lokola Mika. Mika asalaki mosala na ye na eleko moko na Hosea mpe Yisaya, asakolaki bansango ya bitumbu oyo esengelaki kokómela bikólo ya Yuda mpe ya Yisraele na boyangeli ya Mokonzi Yotame, Ahaze, mpe Hizikiya oyo bayangelaki Yudea na ekeke ya mwambe L.T.B. Bizaleli mabe mpe losambo ya bikeko ebebisaki bokonzi ya Yisraele na nɔrdi, oyo ebebisamaki ntango Samaria ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Asiri na mobu 740 L.T.B. Bayuda basengelaki kopona likambo moko, kotosa Yehova to koboya kotosa ye. Atako makambo mabe ezalaki liboso, Mika abɔndisamaki na komona ete nsango ya Nzambe oyo ye asakolaki, epekisaki mpo na mwa ntango ete Yuda ekwea te na mbindo ya elimo mpe ebebisama te. Biso mpe tobɔndisamaka ntango tomonaka ete bato mosusu bazali koyoka nsango ya lobiko oyo tomemelaka bango!

BASAKOLAKI LIKAMA MONENE OYO EZALAKI KOYA

13, 14. (a) Ndenge nini ndakisa ya Sefania ekoki kosalisa yo na losambo na yo? (b) Mosala ya Sefania ememaki mbongwana nini na losambo?

13 Lokola Ezipito mpe Asiri, bikólo oyo ezalaki na nguya na eleko wana ezalaki kobungisa nguya na yango, Babilone ebandaki kokóma makasi. Mosika te, lokola Babilone ekómaki makasi esengelaki kobimisela Yuda bampasi. Basakoli ya Nzambe basengelaki kokebisa mpe kopesa basambeli ya Yehova toli. Tótalela basakoli yango mosusu, tóbosana te ete bakristo lelo oyo bazali mpe kosakola nsango ya kokebisa bato.

14 Soki otiká kosala mimeseno mosusu ya libota mpo na kosala mokano ya Yehova, okomitya na esika ya Sefania. Ekoki kozala ete Sefania azalaki nkɔnkɔ ya nkɔkɔ ya Mokonzi Hizikiya mpe ndeko ya Mokonzi Yosiya—na yango azalaki moto ya libota ya bokonzi ya Yuda. Atako bongo, na botosi nyonso Sefania amemaki nsango moko oyo ezalaki komonisa polele mabe ya bakonzi ya Yuda. Nkombo na ye elimboli “Yehova abombi.” Amonisaki ete kaka na motema mawa na Nzambe nde moto ‘akobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova.’ (Sefania 2:3) Likambo ya esengo nsango ya mpiko oyo Sefania asakolaki ebotaki mbuma. Mokonzi Yosiya, oyo azalaki elenge abandaki kosala mbongwana na makambo ya losambo ya Yehova, kolongola bikeko, kobongisa tempelo, mpe kozongisa losambo ya pɛto. (2 Bakonzi, mokapo 22, 23) Ekoki kozala ete Sefania mpe baninga na ye basakoli mosusu (Nahumu mpe Yirimia) bapesaki mokonzi mabɔkɔ to toli. Kasi, likambo ya mawa Bayuda mingi babongolaki motema kaka likolólikoló. Nsima ya liwa ya Yosiya na etumba moko, bazongelaki losambo ya bikeko. Eumelaki mingi te, bamemamaki na boombo na Babilone.

15. (a) Mpo na nini ebongaki mpenza ete Nahumu apesa nsango ya makasi epai ya bato ya Ninive? (b) Liteya nini okoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Ninive?

15 Ntango mosusu okoki kokanisa ete ozali na ntina te, moto moko te atyelaka yo likebi. Bakristo bazali na libaku monene ya “kosala elongo na Nzambe,” atako mingi na bango bayebani te. (1 Bakorinti 3:9) Ndenge moko mpo na mosakoli Nahumu toyebi kaka ete autaki na engumba moko ya moke oyo ebengami Elkoshe, ekoki kozala na Yuda. Kasi, nsango na ye ezalaki ya ntina mingi. Ndenge nini? Nahumu asakolaki makambo oyo ekokómela Ninive, mboka-mokonzi ya ampire ya Asiri. Bato ya Ninive bayokaki nsango ya Yona, kasi nsima ya mwa ntango bazongelaki banzela na bango ya kala. Mayemi oyo ezalaki likoló ya mabanga na Ninive, emonisi ndenge Nahumu alobaki yango ete ezalaki “engumba oyo esopaka makila.” (Nahumu 3:1) Mayemi yango ezali komonisa makambo ya nsɔmɔ oyo bazalaki kosala na banguna oyo bazalaki kokanga na bitumba. Na maloba ya polele mpe ya elilingi, Nahumu asakolaki ete Ninive ekobomama nyɛɛ. Nsango na ye ekokisamaki, ndenge kaka nsango oyo tozali kosakola lelo oyo ekokokisama.

16, 17. Soki bilikya na biso mpo na nsuka ya mokili ekokisami naino te tokoki kozwa liteya nini na ndakisa ya Habakuku?

16 Na boumeli ya bikeke, batángi mosusu ya Biblia bazalaki na bilikya oyo ekokisamaki te na oyo etali mokolo ya Yehova. Ekoki kozala ete bamosusu bayokaki mabe komona ete Nzambe azali koumela mpo na kopesa bato mabe etumbu. Yo oyokaka ndenge nini? Komibanzabanza ya Habakuku ezalaki mabe te; atunaki: “Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe yo okoyoka te? . . . Mpo na nini kopunza ná mobulu ezali liboso na ngai?”—Habakuku 1:2, 3.

17 Habakuku asakolaki na eleko oyo yikiyiki ezalaki makasi na Yudea, nsima ya boyangeli ya mokonzi malamu Yosiya, kasi liboso Yerusaleme ebebisama na mobu 607 L.T.B. Kozanga bosembo mpe mobulu etondaki mpenza. Habakuku akebisaki Yuda ete komitya na ngámbo ya Ezipito ekobikisa bango te na mabɔkɔ ya bato ya Babilone, bato oyo balingá kosopa makila. Akomaki na ndenge ya polele mpe na nguya, na maloba ya kobɔndisa ete “moyengebene, na bosembo na ye akokoba kozala na bomoi.” (Habakuku 2:4) Maloba wana ezali mpenza na ntina mpo na biso, mpo ntoma Paulo atángaki yango na mikanda misato ya Makomami ya Grɛki ya bokristo. (Baroma 1:17; Bagalatia 3:11; Baebre 10:38) Lisusu, na nzela ya Habakuku, Yehova apesi biso elikya oyo: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá . . . ekokóma nsima ya ngonga te.”—Habakuku 2:3.

18. Mpo na nini Yehova atindaki Obadia asakola bitumbu na ye epai ya Edome?

18 Mosakoli Obadia akeseni na basakoli mosusu mpo akomaki buku ya Makomami ya Ebre oyo ezali mokuse mpenza—ezali kaka na bavɛrsɛ 21. Nyonso oyo toyebi mpo na ye ezali ete asakolaki bitumbu oyo esengelaki kokómela Edome. Bato ya Edome bazalaki bakitani ya ndeko ya Yakobo, na ndenge yango bazalaki ‘bandeko’ ya Bayisraele. (Kolimbola Mibeko 23:7) Kasi, bato ya Edome bamoniselaki basaleli ya Nzambe motema mabe lokola nde bazalaki bandeko na bango te. Na mobu soki 607 L.T.B. ntango Obadia akomaki buku na ye, bato ya Edome bakangelaki Bayuda nzela mpe bapesaki Bayuda oyo bazalaki kokima na mabɔkɔ ya bato ya Babilone, banguna na bango. Yehova asakolaki ete Edome ekobebisama nyɛɛ, esakweli yango ekokisamaki. Ndenge moko na Nahumu, toyebi mpe makambo mingi te na ntina na Obadia, kasi ezali mpenza kolendisa koyeba ete Nzambe akoki kosalela ata bato oyo bazali komonana mpamba ete bázala bamemi-nsango na ye!—1 Bakorinti 1:26-29.

BANSANGO YA KOLENDISA, YA KOBƆNDISA, MPE YA KOKEBISA

19. Ndenge nini Hagai asalaki mpo na kolendisa libota ya Nzambe?

19 Hagai, azali moko ya basakoli misato ya liboso oyo basalaki mosala na bango ntango ndambo ya bato ya sembo oyo batikalaki, oyo babimaki na boombo na Babilone na mobu 537 L.T.B. Ekoki kozala ete Hagai azalaki na kati ya etuluku ya liboso ya bato oyo bazongaki. Elongo na guvɛrnɛrɛ Zorobabele, nganga-monene Yosua mpe na boyokani na mosakoli Zekaria, Hagai alendisaki Bayuda bálonga botɛmɛli ya bato ya bikólo mosusu mpe mposa oyo bakómaki na yango ya koluka bozwi ya mokili. Basengelaki kokokisa mosala oyo mpo na yango bazongaki na mboka na bango: kotonga lisusu tempelo ya Yehova. Bansango minei ya polelepolele oyo Hagai asakolaki na mobu 520 L.T.B., elobelaki mingi nkombo ya Yehova mpe bokonzi na ye. Ntango ozali kotánga mokanda yango okomona ete maloba “Yehova ya mampinga” esalelami mbala 14. Bansango ya nguya oyo Hagai apesaki elendisaki bato bázongela mosala na bango ya kotonga tempelo. Yo mpe olendisami te lokola oyebi ete Yehova azali na nguya oyo ezangi nsuka lokola Mokonzi oyo Aleki Nyonso mpe ete atambwisaka ebele ya mampinga ya bikelamu ya elimo?—Yisaya 1:24; Yirimia 32:17, 18.

20. Ezaleli nini ya mabe Zekaria atɛmɛlaki?

20 Ntango mosusu ekómelá yo olɛmba nzoto mpo basaleli mosusu ya Nzambe bakitisi milende oyo bazalaki na yango na mosala ya Nzambe. Soki ezali bongo, okoki komitya na esika ya Zekaria. Ndenge moko na Hagai, mosakoli oyo asalaki mosala na eleko na ye, Zekaria akutanaki na mokakatano ya kolendisa baninga na ye bákangama na mosala tii ntango tempelo ekosila. Zekaria asalaki mosala makasi ya kolendisa bato bábanda mosala wana monene. Atako bato oyo bazalaki zingazinga na bango bazalaki kosala makambo ndenge balingi, asalaki makasi alendisa kondima ya baninga na ye mpe bámonisa yango na mosala. Mpe alongaki. Zekaria akomaki bisakweli mingi oyo etali Kristo. Biso mpe tokoki kozwa makasi na nsango oyo ete “Yehova ya mampinga” akobosana te bato oyo balukaka kondimama epai na ye.—Zekaria 1:3.

BAZALAKI KOZELA MASIYA

21. (a) Mpo na nini nsango ya Malaki ezalaki mpenza na ntina? (b) Nsango nini ya kolendisa oyo ezali na mokanda ya Malaki esukisi Makomami ya Ebre?

21 Malaki, mosakoli ya nsuka na basakoli 12, asalaki na boyokani na nkombo na ye oyo elimboli “momemi-nsango na ngai.” Toyebi makambo mingi te na ntina na mosakoli yango oyo azalaki na bomoi na katikati ya ekeke ya mitano L.T.B. Kasi, na nzela ya esakweli na ye, toyebi ete azalaki molobeli oyo azalaki kobanga te, oyo apamelaki basaleli ya Nzambe mpo na masumu mpe bokosi na bango. Makambo oyo Malaki alobeli ezali ndenge moko na oyo Nehemia alobeli, oyo na ntembe te asalaki mosala na ye na eleko moko na Malaki. Mpo na nini nsango ya Malaki ezalaki na ntina? Molende mpe esengo oyo mosakoli Zekaria mpe Hagai bakolisaki epai ya bato mwa bambula liboso ekitaki. Elimo ya Bayuda ekitaki mpenza makasi. Malaki ayebisaki na nguya nyonso bitumbu ya Yehova epai ya banganga-nzambe oyo bazalaki na lolendo mpe lokuta, mpe apamelaki bato mpo na ndenge bazalaki kosambela Nzambe na mitema mibale mpe mpo na bambeka oyo bazalaki kopesa. Kasi, ndenge Liloba ya Nzambe elobeli bomoi kitoko oyo ekozala na mikolo ezali koya, Malaki asakolaki koya ya Yoane mobatisi, oyo asengelaki kobongisa nzela mpo na Masiya, mpe na nsima asakolaki mpo na Kristo ye moko. Nsango ya Malaki nde esukisi Makomami ya Ebre na maloba ya kolendisa, mpe elaki biso ete “moi ya boyengebene ekobima mpenza” mpo na baoyo babangaka nkombo ya Nzambe.—Malaki 4:2, 5, 6.

22. Okómi na makanisi nini na ntina na bizaleli mpe nsango ya basakoli 12?

22 Okoki komona ete mibali oyo bakomaki mikanda 12 ya nsuka ya Makomami ya Ebre bazalaki na elikya mpe kondima makasi. (Baebre 11:32; 12:1) Ndakisa mpe nsango na bango ekoki koteya biso makambo ya ntina lokola tozali kozela na motema likoló “mokolo ya Yehova.” (2 Petro 3:10) Tótalela sikoyo ndenge oyo bansango yango ya esakweli ekoki kosalisa yo ozala na bomoi ya seko na mikolo ezali koya!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kokanisá yango na tablo ya badati oyo ezali na lokasa 20 mpe 21. Na ndakisa, okomona kuna ete Mika mpe Hosea basalaki mosala na bango na boumeli ya eloko oyo Yisaya azalaki mosakoli ya Nzambe na Yerusaleme.

LITOMBA NINI OKOKI KOZWA?

• Omoni nini na lolenge oyo mikanda ya basakoli 12 elandani na Biblia?

• Ndenge nini okoki kozwa litomba na makambo oyo ekómelaki basakoli lokola Yona mpe Amose?—Baebre 11:32, 33, 39, 40.

• Tii wapi Hosea andimaki kosala mokano ya Yehova?—Matai 16:24.

MAKAMBO OYO OKOKI KOSALELA

• Ndenge ndakisa ya Sefania emonisi yango, etamboli ya basaleli ya Nzambe ekoki kosala nini epai ya basusu?

• Mpo na nini nsango ya Habakuku ezali na ntina mingimingi lelo oyo?—2 Petro 3:12.

• Ndenge nini motema mawa ya Yehova epai ya bato mpamba emonisamaki epai ya basakoli na ye mosusu?—Nzembo 113:1, 6, 7; Yisaya 57:15.

[Etanda na lokasa 20]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Basakoli Basakoli Basakoli Bakonzi Bakonzi

12 oyo mosusu ya ya

basalaki oyo Yudab Yisraelec

na eleko basalaki

moko na

eleko

moko

Amazia

850 L.T.B.

Yeroboame II

1. YONA

Uzia

(Azaria)

825

2. YOELE

3. AMOSE

4. HOSEA

Zekaria

800

Menaheme

Yisaya

Peka

5. MIKA

Yotame

Ahaze

Hosea

750

Hizikiya

Kokwea ya Samaria, mobu 740

725

Manase

700

675

6. SEFANIA

Yosiya

7. NAHUMU

650

Yirimia

Kobomama ya Ninive, mobu 632

8. HABAKUKU

Yehoyakime

Danyele

9. OBADIA

Ezekiele

Zidikiya

Kobomama ya Yerusaleme, mobu 607

600

575

550

Danyele

Kokwea ya Babilone, mobu 539

Kobima na boombo, mobu 537

525

10. HAGAI

11. ZEKARIA

Tempelo etongami lisusu, mobu 515

500

Ezera

Nehemia

Bifelo etongami lisusu, mobu 455

450

12. MALAKI

425

400

[Maloba na nse ya lokasa]

b Bakonzi oyo bayangelaki mbula koleka mibale

c Bakonzi oyo bayangelaki mbula koleka mibale

[Karte na lokasa 19]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Mbu Mediterane (Mbu Monene)

Damasi

Bokonzi ya Yisraele ya nɔrdi (Efraime, to Samaria)

EFRAIME

Sidone

Zarefate

Tire

Dani

BASHANE

Mbu ya Galile

Ng. Karamele

Ng. Tabore

Megido

Yizireele

Hadadrimone

SAMARIA

Shekeme

GILEADE

Mizipa

Gilgale

Raba

Betele

Shitime

Ebale Yordani

Bokonzi ya Yuda na sudi (Yuda mpe Benyamina)

YUDA

Ashedode

Ashekelone

Gaza

Ekrone

Gate

Moreshete

Lakishi

Adulame

Akazibe

Maresha(h)

Shafire

Beteleme

Tekoa

YERUSALEME (SIONA)

Gibea

Rama

Gilgale

Rimone

Beere-sheba

AMONE

MOABE

Mbu ya Mungwa

Sodoma?

EDOME

Bozera

[Karte na lokasa 22]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

GRƐSI

KRƐTƐ

ASIRI

Ninive

BABILONE

Babilone

SIRI

Hamate

Damasi

AMONE

MOABE

EDOME

Ng. Horebe

EZIPITO

Memfisi

Sidone

Tire

Raba

YERUSALEME

[Elilingi na lokasa 17]

YONA

[Elilingi na lokasa 18]

YOELE

[Elilingi na lokasa 18]

AMOSE

[Elilingi na lokasa 21]

HOSEA

[Elilingi na lokasa 22]

MIKA

[Elilingi na lokasa 23]

SEFANIA

[Elilingi na lokasa 24]

NAHUMU

[Elilingi na lokasa 25]

HABAKUKU

[Elilingi na lokasa 25]

OBADIA

[Elilingi na lokasa 26]

HAGAI

[Elilingi na lokasa 27]

ZEKARIA

[Elilingi na lokasa 27]

MALAKI

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto