Mokapo 4
Makambo nini ebongi te tósala?
Solo to lokuta . . .
Bato oyo balingani bakoki kosimbana na lobɔkɔ te, ata ndenge nini.
□ Solo
□ Lokuta
Bato bakoki kosala pite ata soki basangisi nzoto te.
□ Solo
□ Lokuta
Bolingo ekokola te soki bato oyo balingani bapesanaka babizi te to basimbanasimbanaka na nzoto te.
□ Solo
□ Lokuta
EKOKI kozala ete omituná mituna mingi na likambo yango. Kutu, soki olingani na mwana mobali to mwana mwasi, mbala mosusu ekoki kozala mpasi oyeba makambo oyo bokoki kosala te ntango bozali kokutana. Tótalela biyano na mituna misato oyo touti kotuna mpe tótala ndenge Liloba ya Nzambe ekosalisa biso tózwa eyano na motuna oyo: “Makambo nini ebongi te tósala?”
● Bato oyo balingani bakoki kosimbana na lobɔkɔ te, ata ndenge nini.
Lokuta. Biblia epekisi te koloba to kosala makambo oyo ezali mabe te mpo na kolakisa moninga ete olingi ye. Na ndakisa, Biblia elobeli ndenge elenge mwasi Moshulame ná elenge mobali moko oyo azalaki mobateli ya mpate balinganaki. Basalaki likambo moko te ya mabe ntango bazalaki kokutana. Kasi, ata liboso bábalana, bazalaki mpe kosimbana na ndenge ebongi. (Loyembo ya Salomo 1:2; 2:6; 8:5) Lelo oyo mpe, bilenge mosusu oyo balingi mpenza kobalana, bakoki komona malamu kosimbana to kopesana bizi na ndenge ebongi.a
Kasi, bato mibale oyo balingani, basengeli kokeba mpenza. Kopesana babizi, koyambana to kosala makambo mosusu oyo elamusaka mposa ya nzoto ekoki kotinda bango na etamboli ya mbindo. Ezali mpasi te ete bato oyo balingani, ata soki na ebandeli bazalaki na makanisi ya mabe te, bákende mosika mpe bákwea na pite.—Bakolose 3:5.
● Bato bakoki kosala pite ata soki basangisi nzoto te.
Solo. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “pite” (pornéïa) esangisi makambo mingi. Lolenge nyonso ya kosangisa nzoto liboso ya kobala mpe kosalela binama ya kobotela na lolenge ya mabe. Na yango, pite elimboli kaka te kosangisa nzoto, elimboli mpe kosakana na enama ya moto mosusu, kofiba yango to kokɔtisa yango na monɔkɔ, ata mpe kosangisa nzoto na nsima.
Longola yango, Biblia epekisi kaka pite te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Misala ya nzoto ezali komonana polele, mpe ezali pite, mbindo, etamboli ya nsɔni.” Abakisaki boye: “Baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”—Bagalatia 5:19-21.
“Mbindo” ezali nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mbindo” elimbolaka bosɔtɔ ya ndenge nyonso, ezala na maloba to na misala. Na ntembe te, ekozala mpenza mbindo soki mwana mobali to mwasi atiki moto mosusu akɔtisa mabɔkɔ na ye na nse ya elamba na ye, alongola ye bilamba, to asimbasimba ye na bisika lokola mabɛlɛ. Biblia etángi kosimbasimba mabɛlɛ na kati ya makambo oyo kaka bato oyo babalá nde bakoki kosala mpo na koyoka bilɛngi.—Masese 5:18, 19.
Bilenge mosusu bayokaka ata nsɔni te kobuka mibeko ya Nzambe. Bakendaka mosika na nko nyonso, to mpe basalaka na lokoso makambo ya nsɔni ná bato ndenge na ndenge. Bilenge yango bakoki kokóma na ezaleli oyo ntoma Paulo abengaki “etamboli ya nsɔni.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “etamboli ya nsɔni” elimboli ‘oyo ezangi komipekisa mpo na kosala mabe, kolekisa ndelo, kosala makambo na nko, mposa makasi.’ Na ntembe te, okosepela te okóma moto oyo ‘abungisá bizaleli nyonso ya malamu’ mpo omipesi na “etamboli ya nsɔni mpo na kosala mbindo ya ndenge nyonso na lokoso.”—Baefese 4:17-19.
● Bolingo ekokola te soki bato oyo balingani bapesanaka babizi te to basimbanasimbanaka na nzoto te.
Lokuta. Bato mingi bakanisaka ete bolingo ekómaka makasi soki mwana mobali ná mwasi bazali kosala makambo ya nsɔni; nzokande ezali bongo te. Kutu, kosala bongo, esalaka ete bato bábangana te mpe bátyelana lisusu motema te. Tótalela likambo oyo ekómelaki Laura. Alobi boye: “Mokolo moko, mwana mobali oyo nalinganaki na ye ayaki na ndako ntango mama azalaki te; alobaki ete ayei kaka kotala televizyo. Na nsima, abandaki kosimba ngai na lobɔkɔ. Na nsima, akómaki mbala moko kosimbasimba ngai na biteni mosusu ya nzoto. Nabangaki kopekisa ye mpo nakanisaki ete akosilika mpe akokende.”
Okanisi mpenza ete mwana mobali wana azalaki kokanisa bolamu ya Laura to azalaki kaka na mposa ya komisepelisa? Soki moto azali kosɛnga ete yo ná ye bósala likambo ya mabe, okoki mpenza koloba ete alingaka yo?
Soki elenge mobali moko azali kotya mwana mwasi mbamba ete asala ná ye likambo oyo ekotungisa makanisi na ye, azali kobuka mobeko ya Nzambe mpe azali kolakisa polele ete azali na bolingo ya solo te. Lisusu, elenge mwasi oyo andimi básala ye likambo ya ndenge wana, amitiki ete básambwisa ye. Mpe oyo eleki mabe, asali likambo ya mbindo; mbala mosusu mpe akwei na pite.b—1 Bakorinti 6:9, 10.
Bóyokana makambo oyo bosengeli kosala te
Ntango ozali kokutana na moto oyo olingani na ye, okoki kosala nini mpo bókwea te na makambo ya mabe? Likambo ya malamu ezali koyokana makambo oyo bosengeli kosala te. Masese 13:10 elobi boye: “Bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.” Yango wana, yo ná moto oyo bolakani libala, bosengeli koyokana mpo na koyeba makambo ya malamu oyo bokobanda kosala. Soki bozeli naino bókóma na esika oyo lolango ekokosa bino bongo bómityela mibeko, ekozala lokola koluka koboma mɔtɔ ya makasi oyo ezali kozikisa ndako.
Ya solo, ekoki kozala mpasi, mbala mosusu nsɔni mpo bósolola likambo ya ndenge wana, mingimingi soki bolingani sika. Kasi, koyokana liboso mpo na makambo oyo bokosala ná oyo bokosala te, ekoki mpenza kobatela bino mpo makama minene ebima na nsima te. Koyokana liboso ezali lokola koboma mɔtɔ liboso ekóma makasi. Lisusu, kosolola malamu na likambo yango, ekoki komonisa ete libala na bino ekozala malamu. Kutu, bizaleli lokola komipekisa, motema molai, mpe koluka bolamu ya moninga nde esalisaka mpo mwasi ná mobali oyo babalani báyoka esengo ya kosangisa nzoto.—1 Bakorinti 7:3, 4.
Ya solo, kotosa mibeko ya Nzambe ezali pɛtɛɛ te. Kasi, osengeli kotosa batoli ya Yehova. Kutu, na Yisaya 48:17, Yehova alobi ete azali “Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.” Yehova alingaka ozala malamu!
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 24, NA VOLIMI 1
Osengeli komitungisa te soki oyebi naino mibali (to basi) te. Kutu, yango nde likambo ya malamu. Luká koyeba ntina.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mikili mosusu, bato bamonaka mabe soki bato oyo babalani te basimbani ntango bazali kotambola. Bakristo balingaka te kosala makambo oyo ekoki kobɛtisa basusu libaku.—2 Bakorinti 6:3.
b Makambo oyo ezali na paragrafe oyo etaleli kaka mibali te, etali mpe basi.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Bolingo . . . esalaka makambo ya nsɔni te.”—1 Bakorinti 13:4, 5.
TOLI
Esengeli kokutanaka ná fianse na yo na esika oyo bato bazali ebele; to kosala makasi ete bózala na chaperon. Kebá na bisika oyo bokoki komekama, na ndakisa kozala kaka bino moko na kati ya motuka oyo etɛlɛmi, na kati ya ndako to apartema.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Ntango bolingani, bosengeli kolobela makambo mosusu oyo etali kosangisa nzoto. Kasi tokoki koloba ete bato bakómi na ezaleli ya mbindo, soki bakómi kolobela makambo ya kosangisa nzoto na ndenge oyo ekolamwisa bamposa ya mabe, ata soki basololi na telefone to batindelani bamesaje.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Nakoki kokwea te na makambo ya mbindo soki nazali ․․․․․
Soki fianse na ngai alingi kondimisa ngai na makasi ete tósala na ye makambo ya mabe, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Makambo nini okolinga te mwana mwasi to mwana mobali asala na nzoto na yo?
● Monisá bokeseni oyo ezali kati na pite, mbindo, mpe etamboli ya nsɔni.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 46]
‘‘Ngai ná fianse na ngai tozalaki kotánga masolo oyo elobeli ndenge ya kotikala pɛto. Tomonaka ete esalisaki biso mpenza tóbatela lisosoli ya malamu.’’—Lætitia
[Etanda na lokasa 44]
Bongo soki tokendaki mosika?
Osengeli kosala nini soki bosalaki makambo ya mbindo? Kokanisa te ete okoki kobongisa makambo yo moko. Elenge moko alobi boye: “Nazalaki kobondela Nzambe ete, ‘Salisá biso tózongela lisusu te likambo yango. Ntango mosusu ezalaki kosimba; kasi, ntango mosusu ezalaki kosimba te.’” Soki ezali bongo, sololá na baboti na yo. Biblia epesi mpe toli oyo ya malamu: ‘Bengá bankulutu ya lisangá.’ (Yakobo 5:14) Babateli yango ya mpate bakoki kopesa yo toli, makanisi, mpe mpamela oyo ekosalisa yo ozongisa boyokani na yo ná Nzambe.
[Bililingi na lokasa 47]
Okozela tii ntango mɔtɔ ekokóma makasi mpo obanda koboma yango? Yango wana, bózela te tii ntango oyo lolango ekokóma makasi mpo bómityela mibeko na makambo oyo bokosala mpe oyo bokosala te