Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp2 mok. 11 nk. 99-104
  • Koluka baninga na Internet ezali mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koluka baninga na Internet ezali mabe?
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Luká koyeba makama
  • “Baoyo bazali kobomba ndenge bazali”
  • Zalá ekɛngɛ
  • “Kozela ezali na ntina!”
  • Ndenge ya koteya mwana asalelaka Internet na mayele
    Lamuká!—2014
  • Baninga nini ozalaka na bango na basite Internet ya kosolola na bato?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Tósalela site Internet na biso na boyekoli ya biso moko mpe ya libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ezali na ntina kozala na baninga mingi na basite ya kosolola na bato?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
yp2 mok. 11 nk. 99-104

Mokapo 11

Koluka baninga na Internet ezali mabe?

Lolenge nini ya kosolola na bato esepelisaka yo mingi?

□ Bozali kotalana boye na miso

□ Na telefone

□ Na nzela ya Internet

Omonaka ete ezali pɛtɛɛ kosolola ná nani?

□ Baninga ya kelasi

□ Bandeko ya libota

□ Bandeko ya lisangá

Esika nini omonaka ete osololaka malamu?

□ Na kelasi

□ Na ndako

□ Na makita ya lisangá

TALÁ eyano oyo opesi na motuna ya liboso. Olobi ete osepelaka mingi kosolola ná moto na nzela ya Internet na esika ya kosolola wana bozali kotalana boye na miso? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Bilenge mingi basalelaka Internet mpo na kobanda mpe kobatela boninga. Elenge mwasi moko na nkombo Elaine alobi boye: “Koyeba ete okoki kosolola na bato ya mokili mobimba​—bato oyo mbala mosusu okokaki kokutana na bango ata mokolo moko te​—epesaka mpenza esengo.” Tammy, oyo azali na mbula 19, alobeli likambo mosusu ya kitoko. Alobi boye: “Okoki koyeba ndenge bakotalela yo. Soki bozali kotalana ná moto boye na miso mpe soki asepeli na yo te, okokoka kosala eloko moko te.”

Sikoyo talá biyano oyo opesaki na motuna ya mibale mpe ya misato. Kokamwa te soki omoni ete kosolola na baninga ya kelasi ezali pɛtɛɛ mingi koleka kosolola na bandeko bakristo na makita ya lisangá. Jasmine, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Na kelasi, okoki kokutana na bato mingi oyo bakutanaka na makambo ndenge moko na oyo ya yo. Yango wana, ekoki kozala mpasi te mpo báyoka lisolo na yo.”

Nsima ya kotalela makambo oyo nyonso, ntango mosusu okomona ete ezali mabe te kosolola na baninga ya kelasi na nzela ya Internet. Tammy alobi ete asalaki yango na boumeli ya mwa ntango. Alobi boye: “Baninga nyonso ya kelasi bazalaki kosolola makambo na nzela ya Internet, mpe nalingaki kotikala nsima te.”a Natalie, oyo azali na mbula 20, afungolaki Site na ye moko mpo asololaka na baninga na ye. Alobi boye: “Teknoloji ezali kokende liboso. Tokómi na balolenge mingi ya kosolola ná bato. Internet ezali moko na yango, mpe nalelá yango.”

Luká koyeba makama

Ya solo, mpo na bato mosusu, kosala boninga na nzela ya Internet mpe kobatela yango ezalaka mpasi te. Natalie alobi boye: “Ntango ozali kosolola na moto bozali kotalana boye na elongi, ekoki kozala mpasi oyebisa ye makambo nyonso, kasi na Internet, okoki koloba makambo nyonso oyo ezali na motema na yo.” Tammy andimi mpe likanisi yango. Alobi boye: “Soki ozalaka nsɔninsɔni, kosolola na nzela ya Internet ekopesa yo libaku ya kobongisa malamumalamu makambo oyo okoloba.”

Kasi kosolola na nzela ya Internet ezali na makama mingi, mpe ekozala bozoba soki ozali kotyela yango likebi te. Tózwa ndakisa: Na balabala oyo makama ezalaka mingi, okotambola miso ekangami? Soki okosala bongo te, okosepela nde kolekisa ntango mingi na Internet kozanga koyeba makama na yango?

Talá makama ya koluka kozwa baninga na nzela ya Internet. Elaine, oyo azalaki kosepela kosolola na bato oyo ayebi te na nzela ya Internet, alobi boye: “Ezali mpasi te okwea na mabɔkɔ ya bato mabe.” Abakisi boye: “Ntango mosusu, nsima kaka ya mwa ntango moke ya kosolola na moto na nzela ya Internet, okoki kobanda komona maloba ya bosɔtɔ to mituna lokola oyo: ‘Oyebi naino mibali te? Osangisaka nzoto na monɔkɔ?’ Bamosusu kutu babandaka masolo mosusu oyo elamwisaka mposa ya kosangisa nzoto.”

Bongo soki ozali kosolola kaka na moninga moko oyo otyelaka motema? Atako bongo, osengeli kaka kokeba. Joan alobi boye: “Okoki kolekisa ntango mingi na kosolola na mwana mwasi to mwana mobali, ata soki moto yango azali ‘kaka moninga.’” “Ntango ozali kolekisa ntango mingi na kotindela moto yango bamesaje, bokolingana makasi, mpe na ntembe te masolo na bino ekoki kokóma ya bolingo.”

“Baoyo bazali kobomba ndenge bazali”

Mokonzi Davidi ayebaki malamu ntina ya kokeba na baninga ya mabe. Akomaki boye: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.”​—Nzembo 26:4.

Ntango osololaka na Internet, ekómelá yo osolola ná bato oyo Davidi alobeli? Na Internet, ntango nini bato babombaka “ndenge bazali”? ․․․․․

Epai mosusu, ekoki kosalema ete yo mpe obomba ndenge ozali ntango ozali kosolola na Internet? Abigail, oyo azalaká kosolola ná bato na Internet, alobi boye: “Nazalaki naino kobanda masolo na bato mpe na nsima nazalaki komonisa lokola nde ngai mpe nasalaka makambo yango.”

Elenge mwasi moko na nkombo Leanne asalelaki lolenge mosusu ya kokosa. Alobi boye: “Nazalaki mbala na mbala kosolola na mwana mobali moko ya lisangá mosusu. Eumelaki te tokómaki kokomelana makambo ya ‘bolingo.’ Nazalaki kokitisa bamesaje yango soki baboti na ngai baleki wana, mpo báyeba ata moke te nini nazali kosala. Nandimi te ete bakokaki kokanisa ete ekoki kosalema ete mwana na bango ya mbula 13 akomelaka mwana mobali ya mbula 14 maloba ya bolingo. Eyelá bango ata moke te na makanisi.”

Zalá ekɛngɛ

Ya solo, na ntango mosusu kosolola na Internet ezali mabe te. Na ndakisa, bato mingi​—ata mpe mikóló​—basalelaka Internet mpo na kosolola ná baninga na bango. Soki yo mpe osalelaka yango, okoki kosala nini mpo na kokima makama? Talá makambo oyo elandi.

● Yebá ngonga boni olekisaka na Internet, mpe kotikela yango te eyiba yo ntango ya kosala makambo oyo eleki ntina, ezala mpe kolala. Elenge moko na nkombo Brian alobi boye: “Na kelasi, bana mosusu balobaki ete basalelaki Internet tii na ngonga ya misato ya butu.”​—Baefese 5:15, 16.

● Sololáká kaka na bato oyo oyebi to baoyo okoki koyeba. Bato mabe balukalukaka na Internet mpo na kobebisa bilenge oyo bayebi makambo te.​—Baroma 16:18.

● Ntango ozali kosomba to kotɛka biloko na Internet, zalá ekɛngɛ. Zalá mpenza ekɛngɛ mpo na koyebisa makambo na yo. Soki te, bakoki kobuba yo​—to mpe kosala yo mabe koleka.​—Matai 10:16.

● Ntango ozali kotindela baninga bafɔtɔ, omituna boye: ‘Fɔtɔ oyo ezali mpenza komonisa moto oyo asalelaka Nzambe?’​—Tito 2:7, 8.

● Ndenge ezalaka na lisolo oyo bozali kotalana boye na miso, soki lisolo na Internet ebandi kokɔtisa ‘makambo oyo ebongi te,’ katá yango.​—Baefese 5:3, 4.

● Kokosaka bato te na Internet. Soki obombelaka baboti na yo ndenge ozali, yebá ete likambo ya mabe ezali. Jacky, elenge moko ya mbula 16 alobi boye: “Nabombelaka mama makambo te. Nalakisaka ye makambo oyo nasalaka na Internet.”​—Baebre 13:18.

“Kozela ezali na ntina!”

Kozala na mposa ya baninga ezali mabe te. Bato bakelamaki mpo bázalaka na baninga. (Ebandeli 2:18) Na yango, soki ozali na mposa ya kozala na baninga, ezali mpo Nzambe akelá biso bongo! Kasi osengeli kokeba na lolenge oyo ozali kopona bango.

Soki osaleli batoli ya Biblia, okopona baninga ya malamu. Elenge mwasi moko ya mbula 15 alobi boye: “Ezali mpasi kozwa baninga oyo balingaka Yehova mpe yo. Kasi soki ozwi bango, okomona ete kozela ezali na ntina!”

NA MOKAPO OYO ELANDI

Maloba mosusu oyo tobimisaka ekoki kopesa baninga mpasi na motema? Matɔngi ekoki kotɔbɔla moto lokola mopanga. Ndenge nini okoki kokima yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na mokapo 17, tokolobela na mozindo ndenge ya kofanda ná baninga ya kelasi.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; Mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.”—Nzembo 26:4.

TOLI

Ngonga ekendaka mbangu soki ozali na Internet! Na yango, omikatela ngonga boni okobanda kolekisa na Internet mpe tosá yango. Soki esengeli, saleláká eloko moko oyo ekosalisa yo oyeba ete ntango oyo otyaki ekoki.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Esɛngaka kaka makambo moke—na ndakisa nkombo na yo ya mboka, nkombo ya eteyelo na bino, mpe nimero na yo ya telefone—mpo moto oyo azali na makanisi ya mabe azwa yo.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Nakosepela ete ntango oyo nakolekisa na Internet eleka te ․․․․․ na pɔsɔ, mpe mpo na kosala yango nasengeli ․․․․․

Soki ekómeli ngai nasolola na Internet na moto oyo nayebi te, nasengeli ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Wapi malamu mpe mabe ya kosolola na Internet mpe ya kosolola na moto boye na miso?

● Mpo na nini ezalaka mpasi te komibimisa lokola moto mosusu ntango ozali kosolola na Internet?

● Ndenge nini okoki komityela ntango oyo okolekisa na Internet mpe kotosa yango?

● Na makambo nini kosolola na Internet ekoki kozala malamu?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 103]

‘‘Na Internet, nasololaka te na bato oyo nayebi te to baoyo nakoki kosolola na bango te boye na miso.’’​—Joanna

[Elilingi na lokasa 100, 101]

Okosepela kotambola miso ekangami na babalabala oyo makama esalamaka mingi? Soki te, mpo na nini kosolola na Internet kozanga koyeba makama na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto