-
Batatoli ya Yehova bazali bato ya ndenge nini?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 1
Batatoli ya Yehova bazali bato ya ndenge nini?
Danemark
Taïwan
Vénézuéla
Inde
Batatoli ya Yehova boni oyebi? Ekoki kozala ete basusu kati na biso bafandaka penepene na yo, bazali baninga na yo ya mosala to ya kelasi, to basololá na yo masolo ya Biblia. Tozali mpenza bato ya ndenge nini, mpe mpo na nini toyebisaka bato nyonso makambo oyo tondimaka?
Tozali kaka lokola bato nyonso. Tozali bato ya mikili ndenge na ndenge, babola mpe bazwi. Liboso, basusu kati na biso bazalaki na mangomba mosusu, mpe basusu bazalaki kondimela Nzambe te. Kasi, mokomoko na biso atalelaki naino malamumalamu mateya ya Biblia. (Misala 17:11) Tondimaki makambo oyo toyekolaki, mpe na nsima mokomoko na biso aponaki kosambela Yehova Nzambe.
Koyekola Biblia ememelaka biso matomba. Biso mpe tokutanaka na mikakatano mpe tozalaka na bolɛmbu lokola bato nyonso. Kasi, lokola tosalaka makasi tósalela toli ya Biblia na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, yango ebongisi bomoi na biso mingi. (Nzembo 128:1, 2) Yango ezali mpe moko ya makambo oyo etindaka biso tóyebisa basusu makambo ya malamu oyo toyekoli na Biblia.
Tolandaka mitinda ya Nzambe na bomoi na biso. Mitinda yango oyo Biblia eteyaka, esalisaka biso tómiyoka malamu, tómemya basusu, mpe tómonisa bizaleli lokola bosembo mpe boboto. Esalisaka mpe biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ, tózala bato oyo basalaka mosala malamu mpe tózala na bomoko na libota mpe na bizaleli ya malamu. Lokola tondimaka mpenza ete “Nzambe aponaka bilongi te,” tozali mpenza libota ya bandeko oyo bauti na mokili mobimba, tozali na bomoko na makambo oyo tondimaka, mpe tokabwani te na mposo to bikólo. Atako tozali kaka lokola bato nyonso, libota na biso ya mokili mobimba ekokani na libota mosusu te.—Misala 4:13; 10:34, 35.
Na makambo nini Batatoli ya Yehova bazali lokola bato nyonso?
Bizaleli nini Batatoli bazali na yango oyo bayekoli na Biblia?
-
-
Mpo na nini tobengami Batatoli ya Yehova?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 2
Mpo na nini tobengami Batatoli ya Yehova?
Noa
Abrahama ná Sara
Moize
Yesu Kristo
Bato mingi bakanisaka ete Batatoli ya Yehova ezali nkombo ya lingomba moko ya sika. Nzokande, eleki sikoyo mbula koleka 2 700, Nzambe ya solo abengaki basaleli na ye “batatoli.” (Yisaya 43:10-12) Tii na mobu 1931, tozalaki kobengama Bayekoli ya Biblia. Kasi, mpo na nini tokómá kobengama Batatoli ya Yehova?
Nkombo yango emonisaka Nzambe na biso. Na bamaniskri ya kala ya Biblia, nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali komonana mbala soki 7 000. Na mabongoli mingi ya Biblia, na esika ya nkombo yango batyá nde bibengeli ya lokumu lokola Nkolo to Nzambe. Nzokande, Nzambe ya solo ye moko amimonisaki epai ya Moize na nkombo na ye mpenza, Yehova, mpe alobaki boye: “Wana nde nkombo na ngai mpo na seko.” (Kobima 3:15) Na ndenge yango, amikesenisaki na banzambe mosusu nyonso ya lokuta. Kobengama na nkombo mosantu ya Nzambe ezali mpenza lokumu mpo na biso!
Nkombo yango emonisaka mosala na biso. Kobanda na Abele moto ya sembo, ezali na molɔngɔ molai ya bato ya kala oyo batatolaki ete bazalaki kondimela Yehova. Na boumeli ya bambula, Noa, Abrahama, Sara, Moize, Davidi mpe bato mosusu bakɔtaki na molɔngɔ ya bato yango oyo babengami ‘lipata monene ya batatoli.’ (Baebre 11:4–12:1) Kaka ndenge moto apesaka litatoli na tribinale mpo na moto oyo azali na ngambo te, biso mpe tozali na mokano ya koyebisa solo na ntina na Nzambe.
Tolandaka ndakisa ya Yesu. Na Biblia, Yesu abengami “motatoli ya sembo mpe ya solo.” (Emoniseli 3:14) Yesu ye moko alobaki ete ‘ayebisaki bato nkombo’ ya Nzambe mpe ete ntango nyonso ‘apesaki litatoli na ntina na solo’ mpo na Nzambe. (Yoane 17:26; 18:37) Na yango, bayekoli ya solosolo ya Kristo basengeli mpe kobengama na nkombo ya Yehova mpe koyebisa bato nkombo yango. Yango nde likambo Batatoli ya Yehova basalaka makasi bákokisa.
Mpo nini Bayekoli ya Biblia bakómá kobengama Batatoli ya Yehova?
Kobanda ntango nini Yehova azali na Batatoli awa na mabele?
Nani azali Motatoli ya Yehova oyo aleki Batatoli nyonso?
-
-
Ndenge nini solo ya Biblia emonanaki lisusu?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 3
Ndenge nini solo ya Biblia emonanaki lisusu?
Bayekoli ya Biblia na bambula 1870
Nimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na 1879
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli lelo oyo
Biblia esakolaki ete nsima ya liwa ya Kristo, bateyi ya lokuta bakobima na kati ya bakristo ya liboso mpe bakobebisa mateya ya solo. (Misala 20:29, 30) Na nsima, esalemaki mpenza bongo. Bateyi yango ya lokuta basangisaki mateya ya Yesu ná makanisi ya bapakano, mpe yango ebimisaki bokristo ya lokuta. (2 Timote 4:3, 4) Kasi lelo oyo, ndenge nini tokoki mpenza koyeba oyo Biblia eteyaka?
Ntango ekokaki mpo Yehova amonisa solo. Yehova asakolaki ete ‘na ntango ya nsuka, boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.’ (Danyele 12:4) Na mobu 1870, mwa etuluku ya bato oyo bazalaki koluka koyeba solo bamonaki ete mateya mingi ya mangomba eutaki na Biblia te. Na yango, babandaki koluka koyeba mpenza ndenge mateya ya Biblia ezalaki na ebandeli, mpe Yehova asalisaki bango bákanga ntina ya Makomami.
Bato ya sembo bayekolaki Biblia malamumalamu. Bayekoli wana ya molende, basalelaki lolenge ya koyekola Biblia oyo biso mpe tosalelaka tii lelo oyo. Bazalaki koyekola liteya moko ya Biblia nsima ya mosusu. Soki bakangi ntina te ya eteni moko ya Biblia, bazalaki kotalela bavɛrsɛ mosusu mpo na kozwa ndimbola na yango. Soki bango nyonso bandimi ete ndimbola oyo bazwi eyokani na biteni mosusu ya Biblia, bazalaki kokoma yango. Lokola bazalaki kotika Biblia emilimbola yango moko, bayaki koyeba solo etali nkombo ya Nzambe mpe Bokonzi na ye, mokano na ye mpo na bato mpe mabele, solo na ntina ya bakufi, mpe elikya ya lisekwa. Boyebi oyo bazwaki na bolukiluki na bango elongolaki bango na boombo ya bindimeli mpe mimeseno mingi ya lokuta.—Yoane 8:31, 32.
Na 1879, Bayekoli ya Biblia basosolaki ete ntango ekokaki mpo na kopalanganisa solo. Yango wana, na mbula yango babandaki kobimisa zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova oyo tobimisaka tii lelo. Lelo oyo, tozali koyebisa solo ya Biblia na mikili 240 mpe na minɔkɔ soki 750. Boyebi ya solo ekómá naino mingi boye te!
Nsima ya liwa ya Kristo, nini ekómelaki mateya ya solo ya Biblia?
Nini esalisaki biso tómona lisusu solo ya Liloba ya Nzambe?
-
-
Mpo na nini tobimisaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 4
Mpo na nini tobimisaki Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika?
Congo (Kinshasa)
Rwanda
Eteni ya makomi ya Symmaque oyo ezali na nkombo ya Nzambe na Nzembo 69:31, ekomamaki na siɛklɛ ya misato to ya minei T.B.
Na boumeli ya bambula mingi, Batatoli ya Yehova bazalaki kosalela, konyata mpe kokabola mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia. Kasi toyaki komona ete esengeli kobimisa libongoli moko ya sika ya Biblia, oyo ekosalisa bato bázwa “boyebi ya sikisiki ya solo,” mpo yango nde mokano ya Nzambe mpo na bato nyonso. (1 Timote 2:3, 4) Yango wana, na mobu 1950 tobandaki kobimisa biteni ya Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi, na elobeli ya mikolo na biso. Biblia yango ebongolami na bosembo mpe na bosikisiki na minɔkɔ koleka 130.
Esengelaki kobimisa Biblia moko na elobeli ya pɛtɛɛ. Minɔkɔ oyo bato balobaka ebongwanaka nsima ya mikolo, mpe mabongoli mingi ya Biblia esalelaka elobeli ya kala to oyo ebimisaka likanisi polele te. Lisusu, bamaniskri ya kala ya Biblia oyo ekokani mpenza na mikanda ya ebandeli, mpe oyo bakomaki mwa moke nsima na oyo ya ebandeli, eyaki komonana na nsima mpe yango esalisaki bato báyeba malamu koleka monɔkɔ ya Ebre, ya Aramɛyɛ mpe ya Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli.
Esengelaki libongoli moko oyo eyokani mpenza na maloba ya Nzambe. Na esika ya kobakisa to kolongola makambo mosusu, bato oyo babongolaka Biblia basengeli nde kobimisa na bosembo nyonso makanisi ya mokomi. Nzokande, na mabongoli mingi ya Biblia, nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali te.
Esengelaki kobimisa Biblia moko oyo ekopesa lokumu epai ya nkolo na yango. (2 Samwele 23:2) Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisi nkombo Yehova mbala soki 7 000, na bisika oyo ezalaki na bamaniskri ya kalakala ya Biblia, ndenge emonisami na elilingi awa na nse. (Nzembo 83:18) Babongoli ya Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika basalaki bolukiluki ya mozindo bambula ebele mpo na kobimisa libongoli oyo esepelisaka na kotánga mpe ebimisaka polele makanisi ya Nzambe. Ezala ozali na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ oyo olobaka to te, tolendisi yo otángaka Liloba ya Yehova mokolo na mokolo.—Yosua 1:8; Nzembo 1:2, 3.
Mpo na nini tomonaki ete esengeli tóbimisa libongoli moko ya sika ya Biblia?
Moto oyo azali na mposa ya koyekola mokano ya Nzambe asengeli kosala nini mokolo na mokolo?
-