-
Ndenge nini bankulutu basalisaka bandeko ya lisangá?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 15
Ndenge nini bankulutu basalisaka bandeko ya lisangá?
Finlande
Koteya
Kolendisa bandeko
Kosakola
Na ebongiseli na biso, tozali te na bakonzi ya lingomba oyo bafutamaka mpo na mosala na bango. Tozali nde na bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami ya Biblia mpo na kozala bakɛngɛli oyo batyami “mpo na kobatela lisangá ya Nzambe,” kaka ndenge ezalaki na lisangá ya bakristo na ebandeli. (Misala 20:28) Bandeko yango bazali bankulutu oyo bazali na boyokani makasi na Yehova. Bakambaka lisangá mpe babatelaka yango “na kotindikama te, kasi na motema moko; . . . [basalaka yango] te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo.” (1 Petro 5:1-3) Misala nini basalelaka biso?
Bakɛngɛlaka mpe babatelaka biso. Bankulutu basalelaka toli ya Biblia mpo na kotambwisa lisangá mpe basalisaka bandeko bátikala penepene na Yehova. Lokola bankulutu bayebi ete Nzambe nde moto apesi bango mokumba wana ya ntina mingi, bakonzaka biso te kasi basalisaka nde biso tómiyoka malamu mpe tózala na esengo. (2 Bakorinti 1:24) Kaka ndenge mobateli ya mpate asalaka makasi akokisaka bamposa ya mpate na ye mokomoko, bankulutu mpe basalaka makasi báyeba ndeko mokomoko na lisangá.—Masese 27:23.
Bateyaka biso ndenge ya kosala mokano ya Nzambe. Pɔsɔ na pɔsɔ, bankulutu bakambaka makita ya lisangá oyo esalisaka biso tókóma na kondima makasi. (Misala 15:32) Mibali yango ya molende bakambaka mpe mosala ya kopalanganisa nsango malamu, basakolaka elongo na biso mpe balakisaka biso mitindo nyonso ya kosakola.
Balendisaka mokomoko na biso. Bankulutu ya lisangá balukaka kosalisa biso tókolisa boninga na biso na Yehova; yango wana basololaka na biso na bandako na biso to na Ndako ya Bokonzi mpo na kopesa biso lisalisi mpe libɔndisi oyo euti na Biblia.—Yakobo 5:14, 15.
Longola mikumba na bango ya lisangá, bankulutu mingi bakendeke mosala mpe bazali na mikumba ya libota oyo basengeli kokokisa. Ebongi mpenza tózala na limemya epai ya bandeko mibali yango oyo basalaka mosala makasi.—1 Batesaloniki 5:12, 13.
Mikumba nini bankulutu bazali na yango na lisangá?
Na ndenge nini batyelaka mokomoko na biso likebi?
-
-
Mokumba ya basaleli na misala ezali nini?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 16
Mokumba ya basaleli na misala ezali nini?
Birmanie
Lisolo na makita
Etuluku ya mosala ya kosakola
Kobatela Ndako ya Bokonzi
Biblia elobeli bituluku mibale ya bandeko mibali oyo bakokisaka mikumba na lisangá: “bakɛngɛli ná basaleli na misala.” (Bafilipi 1:1) Mbala mingi, lisangá mokomoko ezalaka na bankulutu mpe basaleli na misala ebele. Misala nini basaleli na misala basalaka mpo na bolamu na biso?
Bapesaka lisangani ya bankulutu mabɔkɔ. Basaleli na misala nyonso, ezala bilenge to mikóló, bazalaka na boyokani malamu na Yehova, babongi kotyelama motema mpe basalaka misala na motema moko. Basalaka misala ndenge na ndenge mpe ya ntina mbala na mbala mpo makambo etambola malamu na lisangá. Yango esalisaka bankulutu bámipesa na mokumba na bango ya koteya mpe kobatela bandeko ya lisangá.
Basalaka misala ya ntina. Basaleli na misala mosusu bazwaka mokumba ya koyamba bato nyonso oyo bayei na makita ya lisangá. Basusu batalelaka makambo etali mikro mpe bikoliseli-lolaka, bakabolaka mikanda, babatelaka mbongo ya lisangá to bapesaka bandeko bateritware epai bakosakola. Bapesaka mpe mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi malamu mpe pɛto. Bankulutu bakoki kosɛnga bango básalisa bandeko oyo bakómi mibange. Basaleli na misala bandimaka na motema moko kosala mosala nyonso oyo bapesi bango, yango wana bandeko ya lisangá bamemyaka bango.—1 Timote 3:13.
Bazali bandakisa malamu. Bapesaka mokumba ya mosaleli na misala na bandeko oyo bazali komonisa bizaleli ya bakristo. Balendisaka kondima na biso ntango basalaka masolo na makita. Ndakisa na bango na mosala ya kosakola elendisaka biso tósakola mpe na molende. Lokola basalaka na bomoko na lisangani ya bankulutu, yango esalaka ete lisangá mobimba ezala na bomoko mpe na esengo. (Baefese 4:16) Nsukansuka, bango mpe bakokokisa masɛngami mpo bákóma bankulutu.
Basaleli na misala bazali mibali ya bizaleli ya ndenge nini?
Ndenge nini basalisaka mpo makambo etambola malamu na lisangá?
-
-
Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka biso?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 17
Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka biso?
Malawi
Etuluku ya mosala ya kosakola
Na mosala ya kosakola
Likita ya bankulutu
Makomami ya Grɛki ya bokristo elobelaka mbala na mbala Barnabasi ná ntoma Paulo. Mibali yango bazalaki bakɛngɛli-batamboli, elingi koloba, bazalaki kosala mibembo mpo na kotala masangá ya liboso. Mpo na nini? Mpo bazalaki mpenza komitungisa mpo na bolamu ya bandeko na bango bakristo. Paulo alobaki ete azalaki na mposa ya ‘kozonga kotala bandeko’ mpo na komona soki bazali ndenge nini. Azalaki kondima kosala mibembo ya bankama ya bakilomɛtrɛ mpo na kolendisa bandeko. (Misala 15:36) Bakɛngɛli-batamboli na biso basalaka mpe bongo lelo oyo.
Bayaka mpo na kolendisa biso. Bakɛngɛli ya zongazonga batalaka masangá soki 20 mpe balekisaka pɔsɔ moko na lisangá mokomoko mbala mibale na mbula. Ndakisa na bango mpe ya basi na bango, soki babalá, ekoki kolendisa biso mingi. Basalaka makasi báyeba bandeko nyonso ezala bilenge to mikóló, mpe basepelaka kobima elongo na biso na mosala ya kosakola mpe ya koyekola na bato Biblia. Bakɛngɛli yango elongo na bankulutu, basololaka na bandeko mpo na kolendisa bango. Basalaka mpe badiskur ya kolendisa na makita mpe na mayangani.—Misala 15:35.
Batyelaka moto nyonso likebi. Bakɛngɛli ya zongazonga balukaka mpenza koyeba soki bandeko ya lisangá mokomoko bazali na boyokani malamu na Nzambe. Batalelaka elongo na bankulutu mpe basaleli na misala bokoli ya lisangá mpe bapesaka bango toli oyo ebongi mpo bákokisa mikumba na bango malamu. Basalisaka babongisi-nzela mpo bákokisa malamu mosala ya kosakola, mpe basepelaka koyebana na bato ya sika mpe koyoka ndenge kondima na bango ezali kokola. Mokɛngɛli mokomoko amipesaka mpenza mpo azali ‘moto oyo asalaka na biso mpo na matomba na biso.’ (2 Bakorinti 8:23) Tosengeli komekola kondima mpe molende na bango na mosala ya Nzambe.—Baebre 13:7.
Mpo na nini bakɛngɛli ya zongazonga bakendeke kotala masangá?
Ndenge nini boyei na bango na lisangá ekoki kosalisa yo?
-
-
Ndenge nini tosalisaka bandeko na biso na ntango ya mpasi?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 18
Ndenge nini tosalisaka bandeko na biso na ntango ya mpasi?
République dominicaine
Japon
Haïti
Ntango likama ekwei, Batatoli ya Yehova babongisaka lisungi mbala moko mpo na kosalisa bandeko na bango oyo bazwi mpasi. Kosala bongo emonisaka ete balinganaka mpenza. (Yoane 13:34, 35; 1 Yoane 3:17, 18) Lisungi nini topesaka?
Topesaka makabo ya mbongo. Ntango nzala moko monene ekwelaki bandeko ya Yudea, bakristo ya Antiokia batindelaki bango mbongo. (Misala 11:27-30) Ndenge moko mpe, ntango toyokaka ete bandeko na biso ya ekólo moko boye bazali na mpasi, totindaka makabo ya mbongo na nzela ya lisangá mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga.—2 Bakorinti 8:13-15.
Topesaka lisungi oyo esengeli. Bankulutu oyo bazali na esika likama ekwei balukaka koyeba esika ndeko mokomoko ya lisangá azali mpe ndenge azali. Komite ya lisungi ekoki kotambwisa mosala ya kokabola bilei, mai ya pɛto mpo na komɛla, bilamba, bisika ya kolala mpe kopesa lisalisi ya monganga. Batatoli mingi oyo bayebi misala ndenge na ndenge bafutaka bango moko tike mpo na kokende na bisika yango mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi mpasi to kobongisa bandako ya bandeko mpe Bandako ya Bokonzi oyo ebebi. Lokola tozalaka na bomoko mpe tomesaná kosala elongo, esalisaka biso tóbongisa biloko ya kopesa lisungi nokinoki. Atako tosalisaka libosoliboso “bandeko na biso na kati ya kondima,” tosalisaka mpe bato mosusu soki likoki ezali, ezala bazali bato ya lingomba nini.—Bagalatia 6:10.
Tobɔndisaka bango na lisalisi ya Biblia. Bato oyo bakweli likama bazalaka mingimingi na mposa ya libɔndisi. Na ntango ya ndenge wana, tozwaka makasi epai ya Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4) Tosepelaka mpenza koyebisa bato oyo bazali na mpasi bilaka oyo Biblia epesi, mpe ete Bokonzi ya Nzambe ekosukisa makama nyonso oyo ezali konyokola bato.—Emoniseli 21:4.
Mpo na nini Batatoli baumelaka te kopesa lisalisi ntango likama ekwei?
Ndenge nini tosalelaka Biblia mpo na kobɔndisa baoyo babiki na likama?
-
-
Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 19
Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?
Bilei ya elimo esalisaka biso nyonso
Mwa moke liboso Yesu akufa, asololaki na bayekoli na ye minei: Petro, Yakobo, Yoane ná Andre, na esika oyo bazalaki kaka bango moko. Wana Yesu azalaki koyebisa bango elembo ya kozala na ye na mikolo ya nsuka, atunaki motuna oyo ya ntina mingi: “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?” (Matai 24:3, 45; Marko 13:3, 4) Yesu alingaki bayekoli na ye báyeba ete lokola azali “nkolo” na bango, akotya bato oyo bakokoba kopesa bango bilei ya elimo, elingi koloba boyebi ya Nzambe, na ntango ya nsuka. Esengelaki kozala banani?
Ezali mwa etuluku ya bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo. “Moombo” yango nde Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Moombo yango apesaka basambeli ya Yehova bilei ya elimo na ntango ebongi. Totyaka motema epai ya bandeko yango mpo na kozwa ‘bilei oyo tosengeli na yango na ntango oyo ebongi.’—Luka 12:42.
Batambwisaka ndako ya Nzambe. (1 Timote 3:15) Yesu apesaki moombo yango mokumba monene ya kotambwisa mosala ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele, elingi koloba, kobatela biloko na yango nyonso, kotambwisa mosala ya kosakola mpe koteya biso na nzela ya masangá na biso. Na yango, mpo tózwa oyo tosengeli na yango na ntango oyo ebongi, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kokabola bilei ya elimo na nzela ya mikanda oyo tosalelaka na mosala ya kosakola, mpe ya mateya oyo tozwaka na makita mpe na mayangani.
Moombo yango azali sembo na mateya ya solo ya Biblia mpe na mokumba bapesá ye ya kosakola nsango malamu; azali mpe na mayele na ndenge abatelaka na bwanya mpenza biloko ya Kristo awa na mabele. (Misala 10:42) Yehova azali kopambola mosala ya moombo yango mpo bato ebele bazali se kokóma Batatoli mpe azali kokoba kobimisa bilei ya elimo ebele.—Yisaya 60:22; 65:13.
Yesu atyaki nani mpo apesaka bayekoli na ye bilei ya elimo?
Na ndenge nini moombo azali sembo mpe na mayele?
-
-
Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka ndenge nini lelo oyo?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 20
Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka ndenge nini lelo oyo?
Lisangani ya mikóló-bakambi na siɛklɛ ya liboso
Bazali kotánga mokanda ya lisangani ya mikóló-bakambi
Na siɛklɛ ya liboso, mwa etuluku ya “bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme” bazalaki lisangani ya mikóló-bakambi oyo bazalaki kozwa bikateli ya ntina na nkombo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo. (Misala 15:2) Mpo na kozwa ekateli oyo bango nyonso bakondima, bazalaki naino kotalela oyo Makomami elobi mpe kotika ete elimo ya Nzambe etambwisa bango. (Misala 15:25) Lelo oyo esalemaka mpe ndenge wana.
Nzambe azali kosalela yango mpo na kokokisa mokano na ye. Bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, balingaka mpenza Liloba ya Nzambe mpe bamesaná kozwa bikateli na makambo etali losambo mpe mosala na biso. Basalaka likita pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kotalela mposa ya bandeko ya mokili mobimba. Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, masangá ezwaka malako oyo euti na Biblia na nzela ya mikanda, to bakɛngɛli-batamboli to bandeko mosusu. Yango esalaka ete libota ya Nzambe ezala na bomoko. (Misala 16:4, 5) Lisangani ya Mikóló-Bakambi etambwisaka mosala ya kobongisa bilei ya elimo, elendisaka biso nyonso tómipesa na mosala ya kosakola Bokonzi, mpe etalelaka makambo ya koponama ya bandeko mibali oyo bakoki kozwa mikumba na lisangá.
Elandaka litambwisi ya elimo ya Nzambe. Lisangani ya Mikóló-Bakambi elandaka litambwisi ya Yehova, Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe Yesu, Mokonzi ya lisangá. (1 Bakorinti 11:3; Baefese 5:23) Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bamimonaka te ete bazali bakonzi ya basaleli ya Nzambe. Kasi, elongo na bakristo mosusu nyonso oyo batyami mafuta na elimo, bazali “kokoba kolanda Mwana-Mpate [Yesu] epai nyonso oyo azali kokende.” (Emoniseli 14:4) Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basepelaka ndenge tosambelaka mpo na bango.
Na siɛklɛ ya liboso, banani bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi?
Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi elukaka litambwisi ya Nzambe lelo oyo?
-
-
Betele ezali nini?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 21
Betele ezali nini?
Departema ya kosala mayemi na États-Unis
Allemagne
Kenya
Colombie
Nkombo Betele euti na monɔkɔ ya Ebre mpe elimboli “Ndako ya Nzambe.” (Ebandeli 28:17, 19) Nkombo yango ebongi mpenza mpo na kolobela bandako oyo Batatoli ya Yehova babongisá na miliki mingi, epai mosala ya kosakola ezali kotambwisama mpe kobongisama. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basalaka na Biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na engumba New York, na États-Unis, mpe kuna bakambaka misala ya babiro ya filiale mosusu nyonso. Baoyo basalaka na bisika yango babengami bango nyonso libota ya Betele. Ndenge ezalaka na libota, bandeko ya libota ya Betele mpe bafandaka esika moko, basalaka esika moko, balyaka esika moko, mpe bayekolaka Biblia elongo na bomoko.—Nzembo 133:1.
Esika moko ya ntina mingi epai bandeko ya libota yango bamonisaka elimo ya komipimela. Na Babetele nyonso, bandeko mibali mpe basi bamipesaka mpenza ntango nyonso mpo na kosala mokano ya Nzambe mpe mpo na makambo etali Bokonzi ya Nzambe. (Matai 6:33) Bafutamaka te, kasi bapesaka bango esika ya kofanda, biloko ya kolya mpe mwa mbongo mpo na bamposa na bango ya mikemike. Moto nyonso na Betele azali na mosala oyo bapesá ye: ekoki kozala na biro, esika balambaka, to na esika balyaka. Basusu basalaka na esika ya konyata to kokangisa mikanda, basusu batyaka bopɛto, basukolaka bilamba, babongisaka bamasini ndenge na ndenge mpe bongo na bongo.
Esika oyo mosala esalemaka makasi mpo mosala ya kosakola ya Bokonzi ekende liboso. Ntina ya libosoliboso ya Betele ezali ete solo ya Biblia ekómela bato mingi mpenza. Na ndakisa, mwa buku oyo osimbi ezali kosalisa bato mingi báyeba solo. Ekomamaki na litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe etindamaki na nzela ya Internet na bankama ya baekipi ya babongoli na mokili mobimba, mpe enyatamaki na bamasini oyo ebimisaka mikanda ebele na ntango moke; na nsima, etindamaki na masangá koleka 110 000. Libota ya Betele epesaka mabɔkɔ na misala nyonso wana, mpe yango ezali kosala ete mosala ya kosakola nsango malamu, oyo esengeli kosalema na lombangu mpenza, ekokisama.—Marko 13:10.
Banani basalaka na Betele, mpe nini ebongisami mpo na bango?
Mosala nini oyo esengeli kosalema na lombangu bandeko ya Betele mokomoko bapesaka mabɔkɔ?
-
-
Nini esalemaka na biro ya filiale?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 22
Nini esalemaka na biro ya filiale?
Bisanga ya Salomon
Canada
Afrika ya Sudi
Bandeko ya Betele bapesaka mabɔkɔ na badepartema ndenge na ndenge, mpe mosala na bango esimbaka mosala ya kosakola na ekólo moko to na bikólo mingi. Bakoki kosala na ekipi ya kobongola mikanda, konyata bazulunalo, kokangisa babuku, na badepo ya mikanda, kobimisa ba-CD to bavideo, to kosala makambo mosusu.
Komite ya filiale etambwisaka mosala ya kosakola. Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaka Komite ya filiale oyo ezali na bankulutu misato to koleka oyo babongi mpenza mpo bákamba biro ya filiale. Bandeko yango bayebisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi ndenge makambo ezali kotambola mpe mikakatano nyonso oyo ebimaka na mboka oyo bango bazali kotambwisa mosala. Yango esalisaka bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bápona makambo oyo ekolobelama na mikanda oyo ekobima, na makita mpe na mayangani. Mbala na mbala, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaka bamonisi na yango mpo na kotala babiro ya filiale mpe kopesa bandeko ya Komite ya filiale malako mpo bákokisa mikumba na bango. (Masese 11:14) Momonisi ya biro monene asalaka mpe diskur mpo na kolendisa bandeko ya masangá ya filiale yango.
Etalelaka mosala ya masangá. Bandeko mibali mosusu na biro ya filiale bazali na mokumba ya kondima ete masangá ya sika efungwama. Bandeko mibali mosusu batalelaka mosala ya babongisi-nzela, bamisionɛrɛ, bakɛngɛli ya zongazonga oyo bazali kosala na teritware ya filiale yango. Babongisaka mayangani ya mike mpe ya minene, batambwisaka mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika, mpe basalaka nyonso mpo mikanda ekómela bandeko na masangá. Nyonso oyo esalemaka na biro ya filiale ezali mpo mosala ya kosakola esalema na molɔngɔ.—1 Bakorinti 14:33, 40.
Ndenge nini Komite ya filiale esungaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi?
Makambo nini esalemaka na biro ya filiale?
-
-
Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka mpe ebongolamaka?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 23
Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka mpe ebongolamaka?
Departema ya Bokomi na États-Unis
Corée du Sud
Arménie
Burundi
Sri Lanka
Mpo “nsango malamu” esakolama na ndenge ebongi mpenza na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso,” tozali kobimisa mikanda na minɔkɔ soki 750. (Emoniseli 14:6) Ndenge nini tosalaka mosala monene yango? Tosalaka yango na lisalisi ya bakomi oyo bazali na mokili mobimba mpe babongoli oyo bamepesi na bolingo na bango moko, mpe bango nyonso bazali Batatoli ya Yehova.
Ekomamaka liboso na Lingelesi. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakambaka mosala ya Departema ya Bokomi na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Departema yango etalelaka mosala ya bakomi oyo bazali na biro monene mpe na babiro ya filiale mosusu. Lokola bakomi na biso bazali bato ya mikili ndenge na ndenge, balobelaka mimeseno ndenge na ndenge, mpe yango esalaka ete mikanda na biso esepelisa bato ya mokili mobimba.
Na nsima etindamaka epai ya babongoli. Nsima ya kokoma lisolo moko, babongisaka yango lisusu mpe soki endimami, etindamaka na nzela ya Internet na baekipi ya babongoli na mokili mobimba. Bandeko yango babongolaka lisolo yango, na nsima batalaka na likebi mpenza soki makanisi yango ebongolami malamu, mpe na nsuka batángaka yango mpo na komona soki eyokani malamu na mibeko ya lokota. Babongoli yango basalaka nyonso bápona “maloba ya solo na bosikisiki” mpo bábimisa mpenza likanisi mobimba ya Lingelesi na monɔkɔ oyo bazali kobongola.—Mosakoli 12:10.
Baordinatɛrɛ esalisaka mpo mosala ekende mbangu. Ordinatɛrɛ ekoki te kozwa esika ya bakomi to babongoli. Nzokande, mosala na bango esalemaka na lombangu mpo bazali kosalela badiksionɛrɛ, biloko ya kosalela bolukiluki mpe bisaleli mosusu oyo ezali na kati ya ordinatɛrɛ. Batatoli ya Yehova babimisá programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo babengi MEPS (Système électronique d’édition multilingue), oyo esalisaka bandeko bábongola, bátya bililingi mpe bábongisa mikanda na minɔkɔ ebele mpo enyatama na imprimerie.
Mpo na nini tosalaka makasi boye ata mpo na minɔkɔ oyo elobamaka kaka na mwa bato moke? Mpo mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Timote 2:3, 4.
Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka?
Mpo na nini tobongolaka mikanda na biso na minɔkɔ ebele?
-
-
Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 24
Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?
Népal
Togo
Grande-Bretagne
Mbula na mbula, ebongiseli na biso ebimisaka bamilio ya Babiblia ná mikanda mosusu mpe tokabolaka yango ofele. Totongaka Bandako ya Bokonzi ná babiro ya filiale mpe tobatelaka yango. Tosungaka bankóto ya bandeko ya libota ya Betele mpe bamisionɛrɛ, mpe tosalisaka bandeko na ntango ya likama. Na ntembe te, okoki komituna: ‘Mbongo nyonso wana eutaka wapi?’
Tosɛngaka dime te, tokɔngɔlaka mpe mabonza te. Atako mosala na biso ya kopalanganisa nsango malamu esɛngaka mbongo mingi, tosɛngaka bato mbongo te. Eleki sikoyo mbula koleka nkama moko, nimero ya mibale ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete tondimi ete Yehova moto azali kosunga biso mpo na kobimisa yango mpe “tokoki te kosɛnga to koluka mbongo epai ya bato,” mpe tosalá yango ata moke te!—Matai 10:8.
Mosala na biso esimbami na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. Bato mingi basepelaka na mosala na biso ya koteya Biblia mpe bapesaka makabo mpo na yango. Batatoli bango moko mpe basepelaka kopesa na esengo ntango na bango, makasi na bango, mbongo na bango mpe biloko na bango mosusu mpo mokano ya Nzambe esalema na mabele mobimba. (1 Ntango 29:9) Na Ndako ya Bokonzi mpe na mayangani na biso, tozali na bakɛsi ya makabo esika baoyo balingi bakoki kotya makabo. Makabo ekoki mpe kopesama na nzela ya site Internet na biso, jw.org. Mbongo mingi eutaka na bato oyo bazali na bozwi mingi te, oyo bakokani na mwasi mobola oyo mobali akufá, oyo Yesu alobelaki, oyo atyaki mbongo ya bibende mibale na kɛsi ya makabo na tempelo. (Luka 21:1-4) Na yango, moto na moto akoki mbala na mbala ‘kobomba mwa eloko pembeni’ mpo na kopesa “ndenge akani na motema na ye.”—1 Bakorinti 16:2; 2 Bakorinti 9:7.
Tondimi mpenza ete Yehova akokoba kosimba mitema ya baoyo balingi ‘kokumisa ye na biloko na bango ya motuya’ mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi, mpo mokano na ye ekokisama.—Masese 3:9.
Nini ekesenisaka ebongiseli na biso na mangomba mosusu?
Ndenge nini mbongo ya makabo esalelamaka?
-
-
Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 25
Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?
Bolivie
Nigeria, liboso mpe na nsima
Tahiti
Ndenge nkombo Ndako ya Bokonzi emonisi yango, mateya ya Biblia oyo eteyamaka kuna etali libosoliboso Bokonzi ya Nzambe, motó ya likambo oyo Yesu alobelaki mingi na mateya na ye.—Luka 8:1.
Ezali bisika ya losambo ya solo na mboka to na kartye. Bandako ya Bokonzi ezali bisika oyo Batatoli ya Yehova babongisaka mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Bandako ya Bokonzi nyonso ezalaka ndenge moko te, kasi nyonso ezalaka ya mindɔndɔ te; mpe na bisika mingi Ndako ya Bokonzi moko esalelamaka na masangá ebele. Na bambula oyo euti koleka, totongi bankóto ya Bandako ya Bokonzi ya sika (elingi koloba mokolo na mokolo Ndako ya Bokonzi mitano etongamaki) mpo masangá ezali se kobakisama. Ndenge nini yango ezali kosalema?—Matai 19:26.
Etongamaka na mbongo ya makabo oyo euti na mokili mobimba. Makabo yango etindamaka na biro ya filiale mpe masangá oyo esengeli kotonga to kobongisa Ndako ya Bokonzi ekoki kosalela mbongo yango.
Etongamaka na bandeko ndenge na ndenge oyo bafutamaka te. Na mikili mingi Baekipi ya kotonga Bandako ya Bokonzi ebongisami. Baekipi yango ya batongi mpe bandeko oyo bapesaka bango mabɔkɔ bakendeke kotonga Bandako ya Bokonzi na masangá na mboka mpe ata na bisika mosusu ya mosika; basungaka Batatoli ya bisika yango na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Na mikili mosusu, Batatoli oyo bayebi malamu mosala ya kotonga baponamaka mpo na kokamba mosala ya kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi. Atako bandeko mingi oyo bayebi mosala bapesaka mabɔkɔ na esika nyonso oyo bazali kotonga, mosala makasi esalemaka nde na bandeko ya lisangá wana. Elimo ya Yehova mpe milende oyo bandeko basalaka na motema moko nde esalaka ete mosala yango esalema.—Nzembo 127:1; Bakolose 3:23.
Mpo na nini bisika na biso ya losambo ebengamaka Ndako ya Bokonzi?
Nini esalaka ete Bandako ya Bokonzi etongama na mokili mobimba?
-
-
Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako na biso ya Bokonzi?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 26
Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako na biso ya Bokonzi?
Estonie
Zimbabwe
Mongolie
Porto Rico
Ndako ya Bokonzi nyonso ya Batatoli ya Yehova ezali na nkombo mosantu ya Nzambe. Yango wana tomonaka ete kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela yango mpo ezala pɛto, kitoko mpe malamu ezali likambo ya lokumu mpe ya ntina mingi na losambo na biso. Biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ.
Pesá mabɔkɔ mpo na kotya bopɛto nsima ya makita. Nsima ya makita nyonso, bandeko mibali mpe basi batyaka bopɛto na Ndako ya Bokonzi na esengo mpenza. Mbala moko na pɔsɔ, batyaka bopɛto mingi koleka. Nkulutu moko to mosaleli na misala moko atambwisaka mosala yango, mpe mbala mingi atalelaka liste ya makambo oyo esengeli kosalema. Soki esengeli, bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko bakɔmbɔlaka yango, basukolaka yango na mai, bapangwisaka bamesa ná bakiti to bisika mosusu ya kofanda, babongisaka bakiti, basukolaka maninisa mpe batalatala, babwakaka bosɔtɔ na esika na yango mpe bapɛtolaka libándá mpe na kati ya lopango. Ata mbala moko na mbula, toponaka mokolo moko mpo na kopɛtola Ndako ya Bokonzi malamumalamu. Topesaka mpe bana na biso mikumba mosusu mpo na koteya bango bámemyaka esika na biso ya losambo.—Mosakoli 5:1.
Pesá mabɔkɔ soki esɛngi kobongisa eloko moko oyo ebebi. Mbula na mbula, totalaka malamumalamu Ndako ya Bokonzi na biso, ezala na kati to na libándá. Yango esalisaka biso tóbongisaka yango mbala na mbala mpo ezala ntango nyonso malamu mpo tóbebisa mbongo mpambampamba te. (2 Ntango 24:13; 34:10) Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto mpe oyo ebatelami malamu ezali esika oyo ebongi mpo na kosambela Nzambe na biso. Soki tozali kopesa mabɔkɔ na mosala yango, tokomonisa ete tolingaka mpenza Yehova mpe esika na biso ya losambo. (Nzembo 122:1) Yango ekosala mpe ete bato bákumisa losambo na biso.—2 Bakorinti 6:3.
Mpo na nini tosengeli kozwa na lisɛki te likambo ya kotya bopɛto na esika na biso ya losambo?
Bibongiseli nini ezwamá mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi na biso pɛto?
-
-
Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 27
Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?
Israël
République tchèque
Bénin
Îles Caïmans
Okosepela kosala bolukiluki mpo na kobakisa boyebi na yo ya Biblia? Ozali na mposa ya kokanga ntina ya vɛrsɛ moko ya Biblia to koyeba moto moko to esika moko oyo Biblia elobeli? To osilá komituna soki Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo na likambo moko oyo etungisaka yo? Soki bongo, okoki kosalela bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi.
Ezali na mikanda mpe biloko mosusu mpo na kosala bolukiluki. Na ntembe te, ozali na mikanda nyonso te ya Batatoli ya Yehova oyo elimbolaka Biblia oyo ebimá na monɔkɔ oyo olobaka. Nzokande, bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ezali na mikanda mingi oyo eutaki kobima sika. Ekoki mpe kozala na mabongoli mosusu ya Biblia, diksionɛrɛ moko ya malamu mpe babuku mosusu mpo na kosala bolukiluki. Okoki kosalela biloko nyonso oyo ezali na bibliotɛkɛ, liboso mpe nsima ya makita. Soki ordinatɛrɛ ezali, ekoki kozala na Watchtower Library. Yango ezali programɛ ya ordinatɛrɛ oyo ezali na mikanda na biso ebele mpe ezali pɛtɛɛ kosala bolukiluki na likambo, liloba to vɛrsɛ moko boye.
Esalisaka bana-kelasi na likita Bomoi mpe mosala. Okoki kosalela mikanda ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ntango ozali kobongisa masolo na yo. Mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala azali na mokumba ya kotalela bibliotɛkɛ yango. Azali mpe na mokumba ya kobakisa mokanda nyonso oyo euti kobima mpe kotya mikanda na molɔngɔ. Ye, to ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia bakoki kolakisa yo ndenge oyo okoki komona likambo oyo ozali koluka. Kasi, moto moko te asengeli kozwa buku ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi mpe kobima na yango libándá. Mpe tosengeli mpenza kosalela mikanda yango na bokɛngi mpe kokoma na kati te.
Biblia elobi ete mpo na kozwa “boyebi ya Nzambe,” tosengeli koluka yango “lokola biloko ya motuya oyo ebombani.” (Masese 2:1-5) Bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa yo mpo obanda koluka boyebi yango.
Bisaleli nini ya kosala bolukiluki ezali na Ndako ya Bokonzi?
Nani akoki kosalisa yo mpo oyeba kosalela bibliotɛkɛ malamu?
-
-
Makambo nini okokuta na site Internet na biso?Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
-
-
LITEYA 28
Makambo nini okokuta na site Internet na biso?
France
Pologne
Russie
Yesu Kristo ayebisaki bayekoli na ye ete: “Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.” (Matai 5:16) Yango wana, tozali kosalela malamu mayele ndenge na ndenge ya mikolo oyo, ezala mpe Internet. Site na biso, jw.org, ezali Site officiel ya Batatoli ya Yehova esika bayebisi makambo oyo bandimaka mpe misala na bango. Makambo nini okokuta na site yango?
Okokuta biyano ya Biblia na mituna oyo etunamaka mingi. Okoki kozwa biyano na mituna ya ntina mingi oyo bato batunaka. Na ndakisa trakte Bampasi ekosila mokolo mosusu? mpe trakte Bakufi bakozonga mpenza na bomoi? ebimisami na Internet na minɔkɔ koleka 600. Okomona mpe Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ koleka 130, mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia, ezala mpe buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo ebimi sika. Okoki kotánga mikanda yango mingi to koyoka yango na Internet, to okoki kozwa yango na Internet mpo na koyoka, na format oyo bato mingi basalelaka, na ndakisa MP3, PDF, to EPUB. Okoki kutu kobimisa na papye masolo mosusu mpo na kopesa moto na monɔkɔ oyo alobaka. Ezali mpe na mikanda mosusu oyo batye na video na minɔkɔ ya bababa ya mikili ndenge na ndenge. Okoki kozwa badrame ya botángi ya Biblia, badrame mosusu, mpe miziki ya kitoko oyo okoki koyoka na ntango olingi.
Okokuta mpe makambo mosusu oyo etali Batatoli ya Yehova. Okokuta mpe bansango ya sika mpe bavideo oyo etali mosala na biso na mokili mobimba, mpe makambo oyo ekómeli Batatoli ya Yehova, mpe lisungi oyo topesi bandeko oyo bakweli makama. Okoki mpe kozwa bansango oyo etali mayangani na biso oyo ezali koya mpe baadrɛsi ná banimero ya telefone ya babiro ya filiale.
Nyonso wana ezali kosalisa biso tóngɛngisa solo ya Biblia tii na nsuka ya mokili. Ezali kosalisa bato ya mikili nyonso, ezala mpe na mikili ya malili makasi lokola Antarctique. Tozali kobondela ete “liloba ya Yehova ekoba kotambola nokinoki” na mokili mobimba, mpo na nkembo ya Nzambe.—2 Batesaloniki 3:1.
Ndenge nini site officiel na biso jw.org ezali kosalisa ebele ya bato báyekola solo ya Biblia?
Makambo nini okosepela koluka na site na biso ya Internet?
-