Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Makambo nini okomona na makita na biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 5

      Makambo nini okomona na makita na biso?

      Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi na Argentine

      Argentine

      Makita ya Batatoli ya Yehova na Sierra Leone

      Sierra Leone

      Makita ya Batatoli ya Yehova na Belgique

      Belgique

      Makita ya Batatoli ya Yehova na Malaisie

      Malaisie

      Bato mingi bakendeke lisusu losambo te, mpo bazwaka te biyano na mituna na bango oyo etali bomoi mpe bazwaka libɔndisi te. Kasi, mpo na nini ebongi oyanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova? Makambo nini okomona kuna?

      Okoyoka esengo ya kozala elongo na bato oyo balinganaka mpe batyelanaka likebi. Bakristo ya liboso babongisamaki na kati ya masangá mpe bazalaki kosala makita mpo na kosambela Nzambe, koyekola Biblia mpe kolendisana. (Baebre 10:24, 25) Na makita yango epai bazalaki komonisana bolingo, bazalaki komiyoka ete bazali mpenza elongo na baninga ya solosolo, elingi koloba, bandeko na bango bakristo. (2 Batesaloniki 1:3; 3 Yoane 14) Biso mpe tolandaka ndakisa na bango mpe toyokaka esengo ya ndenge wana.

      Okomona ete koyekola kosalela toli ya Biblia epesaka matomba. Ndenge moko na ntango ya kala, lelo oyo mpe mibali, basi ná bana bayanganaka esika moko. Mibali oyo bayebi mpenza koteya basalelaka Biblia mpo na kosalisa biso tóyeba kosalela toli na yango na bomoi na biso. (Kolimbola Mibeko 31:12; Nehemia 8:8) Moto nyonso akoki koyemba, to kopesa biyano soki lisolo esɛngi bayangani báloba; yango epesaka biso nzela tólobela elikya na biso.​—Baebre 10:23.

      Okomona ete kondima na yo epai ya Nzambe ekokóma makasi. Ntoma Paulo ayebisaki lisangá moko ya ntango na ye ete: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, . . . mpo tólendisana, moto na moto alendisama na kondima ya mosusu, ya bino elendisa ngai mpe ya ngai elendisa bino.” (Baroma 1:11, 12) Ntango toyanganaka mbala na mbala na makita elongo na bandeko na biso bakristo, kondima na biso mpe ekateli na biso ya kotosa mibeko ya Biblia ekómaka makasi.

      Tosɛngi yo oya na makita na biso ya mbala oyo ekoya mpo yo moko omona makambo oyo touti kolobela! Tokoyamba yo na esengo mpenza. Makita nyonso ezali ofele, mpe tokɔngɔlaka mabonza te.

      • Tolandaka ndakisa ya banani na ndenge ya kosala makita na biso?

      • Matomba nini tokoki kozwa soki tozali koyangana na makita?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Soki olingi komona ndenge Ndako ya Bokonzi ezalaka na kati liboso okende na makita kuna, okoki kosɛnga Motatoli ya Yehova moko akende kolakisa yo.

  • Koyangana elongo na bandeko na biso bakristo esalisaka biso na nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 6

      Koyangana elongo na bandeko na biso bakristo esalisaka biso na nini?

      Batatoli ya Yehova elongo na bandeko na bango bakristo

      Madagascar

      Motatoli moko ya Yehova azali kosalisa moninga mokristo mosusu

      Norvège

      Bankulutu bakei kotala mokristo mosusu

      Liban

      Batatoli ya Yehova bayangani

      Italie

      Biso Batatoli ya Yehova tosalaka nyonso tózangisa te makita na biso, ezala moi makasi, mbula to malili makasi, to ata soki esɛngi tókatisa zamba monene to mai. Mpo na nini tosalaka milende tóyangana elongo na baninga na biso ata soki tolɛmbi nsima ya kosilisa mosala to tozali na mikakatano ya bomoi?

      Ezali mpo na bolamu na biso. Ntoma Paulo akomaki mpo na baoyo toyanganaka na bango na lisangá ete: “Tótyelanaka likebi.” (Baebre 10:24) Maloba yango emonisi ete tosengeli koluka koyebana malamumalamu na basusu. Na yango, maloba ya ntoma Paulo ezali kolendisa biso tókipaka basusu. Ntango tozali koluka koyeba bandeko mosusu ya lisangá, tokomona ete basusu kati na bango balongaki mikakatano oyo ekokani na oyo ya biso mpe bakoki kosalisa biso tólonga.

      Ekolisaka boninga na biso. Bato oyo toyanganaka na bango na makita na biso bazali mpenza baninga na biso, kasi te kaka bato oyo toyebani na bango. Ntango mosusu, tolekisaka ntango na bandeko mpo na kosepela elongo na ndenge ebongi. Matomba nini tozwaka? Esalisaka biso tóyeba mpe tósepela lisusu na bizaleli malamu ya baninga na biso, bango mpe básepela na oyo ya biso, mpe yango ekolisaka bolingo na biso. Boye, soki bandeko na biso bakutani na mikakatano, tosalisaka bango mbala moko mpo tokómá mpenza baninga. (Masese 17:17) Soki tozali koyangana na bandeko nyonso ya lisangá, tokomonisa ete biso nyonso totyelanaka likebi.​—1 Bakorinti 12:25, 26.

      Tozali kolendisa yo opona baninga kati na bato oyo bazali kosala mokano ya Nzambe. Okozwa baninga ya ndenge wana na kati ya Batatoli ya Yehova. Kotika eloko moko te epekisa yo koyangana na makita na biso.

      • Mpo na nini koyangana na makita ezali mpo na bolamu na biso?

      • Okosepela koyangana na makita ya lisangá na biso mokolo nini?

  • Makita na biso esalemaka ndenge nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 7

      Makita na biso esalemaka ndenge nini?

      Likita moko ya Batatoli ya Yehova na Nouvelle-Zélande

      Nouvelle-Zélande

      Likita moko ya Batatoli ya Yehova na Japon

      Japon

      Elenge Motatoli moko azali kotánga Biblia na Ouganda

      Ouganda

      Batatoli mibale na Lituanie bazali kosala elakiseli ya kosolola na moto na Biblia

      Lituanie

      Ntango bakristo ya liboso bazalaki kosala makita na bango, bazalaki mingimingi koyemba, kobondela, kotánga Makomami mpe kolimbola yango, kasi milulu ezalaki te. (1 Bakorinti 14:26) Okomona ete makita na biso mpe ezalaka mpenza ndenge wana.

      Mateya eutaka na Biblia mpe esalisaka mpenza. Na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, lisangá mokomoko eyanganaka mpo na koyoka Diskur ya bato nyonso oyo eumelaka miniti 30, mpe emonisaka ndenge oyo Biblia elobelaka makambo oyo etali bomoi na biso mpe eleko na biso. Moto na moto alendisamaka ete alanda na Biblia na ye. Nsima ya diskur, tozalaka na Boyekoli ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,” oyo eumelaka ngonga moko, mpe moto nyonso akoki kopesa biyano oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli. Boyekoli yango esalisaka biso tósalela toli ya Biblia na bomoi na biso. Lisangá mokomoko kati na masangá koleka 110 000 ya mokili mobimba eyekolaka kaka lisolo moko.

      Esalisaka biso tókolisa mayele na biso ya koteya. Tokutanaka mpe mokolo mosusu na kati ya pɔsɔ mpo na likita moko ya biteni misato, oyo ebengami Bomoi mpe mosala ya bakristo, oyo masolo na yango euti na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala oyo tozwaka sanza na sanza. Eteni ya liboso ya likita yango, Makambo ya motuya na Liloba ya Nzambe, esalisaka biso tóyeba malamu eteni moko ya Biblia oyo bandeko ya lisangá batángaki liboso. Eteni ya mibale, Omipesa na mosala ya kosakola, ezali na bilakiseli oyo emonisi ndenge ya kosolola na bato masolo ya Biblia. Ndeko moko apesaka toli mpo na kosalisa biso tókolisa mayele na biso ya kotánga mpe ya kosolola na bato. (1 Timote 4:13) Eteni ya nsuka, Bomoi ya bakristo, emonisi ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Ezali mpe na lisolo ya mituna mpe biyano, oyo esalisaka biso tóbakisa boyebi na biso ya Biblia.

      Soki oyei na makita na biso, na ntembe te okosepela na mateya ya Biblia oyo ebongisami malamu mpenza, oyo okozwa kuna.​—Yisaya 54:13.

      • Makambo nini okoyoka soki okei na makita ya Batatoli ya Yehova?

      • Okosepela koya na likita nini ya mbala oyo ezali koya?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Talelá makambo oyo tokolobela na makita ya mbala ya nsima. Talelá makambo oyo tokoyekola na Biblia, oyo ekosalisa yo na bomoi na yo ya mokolo na mokolo.

  • Mpo na nini tolataka malamu na makita na biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 8

      Mpo na nini tolataka malamu na makita na biso?

      Tata moko ná mwana na ye ya mobali bazali komibongisa mpo na makita ya lisangá

      Islande

      Mama moko na mwana na ye ya mwasi bazali komibongisa mpo makita

      Mexique

      Batatoli ya Yehova balati malamu, na Guinée-Bissau

      Guinée-Bissau

      Bato ya libota moko na Philippines bazali kokende makita

      Philippines

      Na bililingi ya mwa buku oyo, omoni ndenge biso Batatoli ya Yehova tolataka malamu na makita na biso? Mpo na nini tobongisaka molato mpe tosalaka monzɛlɛ ndenge wana?

      Mpo na kopesa Nzambe na biso limemya. Ezali solo ete Nzambe atyaka likebi mingi na motema ya moto koleka elongi na ye. (1 Samwele 16:7) Kasi, ntango toyanganaka mpo na kosambela ye, tozalaka na mposa makasi ya komonisa ete tomemyaka Nzambe mpe bandeko na biso. Na ndakisa, soki tolingi kokutana na mokonzi moko, na ntembe te tokolata malamu mpo na komonisa ete tozali kopesa ye limemya. Ndenge moko mpe, molato mpe monzɛlɛ na biso na makita emonisaka ete tozali komemya Yehova Nzambe, oyo azali “Mokonzi ya bikólo” nyonso mpe tozali komemya esika oyo tosambelaka ye.​—Yirimia 10:7.

      Mpo na komonisa ete tosalelaka mpenza mateya na biso. Biblia elendisi bakristo “bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu” na molato na bango. (1 Timote 2:9, 10) ‘Kolekisa ndelo te’ na molato elimboli koboya kobenda likebi ya bato epai na biso mpo tolati bilamba ya mindɔndɔmindɔndɔ, oyo etiki biteni mosusu ya nzoto polele to ekangi nzoto, to oyo ezali kolamwisa mposa ya nzoto. Lisusu, ‘kozala na makanisi malamu’ esalisaka biso tóyeba kopona bilamba oyo ebongi, kasi te bilamba ya bongobongo to ya mobulumobulu. Atako bongo, toli yango etikeli moto na moto bonsomi ya kopona molato oyo alingi. Molato na biso ya malamu mpe oyo ebongi ekoki kopesa lokumu na ‘mateya ya Mobikisi na biso’ mpe ‘kopesa Nzambe nkembo.’ (Tito 2:10; 1 Petro 2:12) Soki tozali kolata malamu na makita na biso, yango ekotinda basusu básepela na losambo ya Yehova.

      Kasi ata soki ozali na bilamba ya kitoko te, tokoyamba yo na esengo na makita na biso, na Ndako ya Bokonzi. Esɛngi te kolata bilamba ya ntalo to ya kitoko mingi mpo obima malamu mpe omonana pɛto na miso ya bato.

      • Mpo na nini ezali na ntina tólataka malamu ntango tozali kosambela Nzambe?

      • Wapi toli ya Biblia oyo tolandaka na likambo etali molato mpe monzɛlɛ?

  • Wapi lolenge ya malamu mpenza ya kobongisa makita?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 9

      Wapi lolenge ya malamu mpenza ya kobongisa makita?

      Motatoli ya Yehova moko azali kobongisa makita ya lisangá

      Cambodge

      Motatoli ya Yehova moko azali kobongisa makita ya lisangá
      Motatoli ya Yehova azali kopesa eyano na makita

      Ukraine

      Soki oyekolaka Biblia na Motatoli ya Yehova moko, na ntembe te osalaka makasi otalela liboso lisolo nyonso oyo bokoyekola. Soki osali mpe bongo liboso ya kokende na makita, ekosalisa yo mingi. Kasi soki okómisi yango momeseno, ekozala malamu mingi koleka.

      Poná ntango mpe esika oyo okoyekola. Ntango nini omoni ete okoyekola malamu mpenza? Na ntɔngɔntɔngɔ liboso obanda mosala, to na butu ntango bana balali? Ata soki okoki koyekola bangonga ebele te, poná ntango boni okoyekola, mpe kotika eloko moko te epekisa yo kosala yango. Luká esika ya kimya, kangá eloko nyonso oyo ekoki kolongola likebi na yo, na ndakisa radio, televizyo mpe telefone ya mabɔkɔ. Kobondela liboso ya koyekola ekosalisa yo otya makanisi nyonso na Liloba ya Nzambe, na esika otya yango na mitungisi ya mokolo wana.​—Bafilipi 4:6, 7.

      Tyá bilembo na lisolo oyo bokoyekola, mpe mibongisá mpo na kopesa biyano. Luká liboso koyeba likambo oyo lisolo yango elobeli. Talelá motó ya likambo ya lisolo to ya mokapo yango, ndenge mitó ya likambo moke mokomoko eyokani na motó ya likambo ya lisolo, talelá bililingi nyonso mpe tángá mituna ya bozongeli oyo esimbi makanisi ya ntina. Na nsima, tángá paragrafe mokomoko, mpe luká biyano na mituna oyo batye wana. Tángá bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na paragrafe te, mpe kanisá na ndenge eyokani na lisolo. (Misala 17:11) Soki omoni eyano, tyá mokɔlɔtɔ to elembo na mwa maloba ya ntina mpo esalisa yo omona eyano mbala moko ntango okozala na makita. Na nsima, ntango okozala na makita, okoki kotombola lobɔkɔ mpe kopesa eyano ya mokuse na maloba na yo moko.

      Soki ozali kobongisa masolo ndenge na ndenge oyo esalemaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ, okokolisa boyebi na yo ya Biblia.​—Matai 13:51, 52.

      • Momeseno nini okoki kozwa mpo na kobongisa makita?

      • Ndenge nini okoki komibongisa mpo opesa eyano na makita?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Na kolanda ndenge ya kosala oyo touti kolobela, bongisá Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Boyekoli ya Biblia na lisangá. Sɛngá ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia asalisa yo obongisa eyano oyo okoki kopesa na makita ya mbala ekoya.

  • Losambo na kati ya libota ezali nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 10

      Losambo na kati ya libota ezali nini?

      Bandeko ya libota moko bazali kosala losambo na kati ya libota

      Corée du Sud

      Mobali moko ná mwasi na ye bazali koyekola Biblia elongo

      Brésil

      Motatoli ya Yehova moko azali koyekola Biblia

      Australie

      Bandeko ya libota moko bazali kolobela lisolo moko ya Biblia

      Guinée

      Banda kala, Yehova alingaka ete bato ya libota moko bálekisaka ntango elongo mpo na kolendisa boyokani ya bango na Nzambe mpe ya bango na bango. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Yango wana, mabota ya Batatoli ya Yehova baponaka mokolo moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola Biblia elongo. Na ntango yango, basololaka makambo ya Nzambe oyo eyokani na bamposa ya libota na bango na ndenge oyo moto nyonso akomiyoka malamu. Ata soki ozali yo moko, okoki mpe kopona ntango mpo ozala elongo na Nzambe mpe oyekola lisolo moko ya Biblia oyo oponi.

      Ezali ntango ya kopusana penepene na Yehova. Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Tokómaka koyeba Yehova malamumalamu ntango tozali koyekola makambo etali bomoto mpe misala na ye na kati ya Biblia, Liloba na ye. Lolenge ya pɛtɛɛ ya kobanda losambo na kati ya libota na bino ezali ya kozwa mwa miniti mpo na kotánga Biblia elongo na mongongo makasi; bokoki kolanda programɛ ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo epesamaka na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Bokoki kopesa moto mokomoko ya libota eteni oyo akotánga, mpe na nsima bino nyonso bokoki kolobela makambo oyo boyekoli na Biblia.

      Ezali ntango ya kokómisa boyokani ya libota makasi. Boyokani ya mwasi ná mobali mpe ya baboti ná bana ekómaka makasi soki bazali koyekola Biblia elongo na libota. Esengeli kozala ntango moko ya nsai, ya kimya mpe oyo moto nyonso azelaka na esengo pɔsɔ na pɔsɔ. Baboti bakoki kopona masolo na kotalela mbula ya bana na bango, na ndakisa bakoki kosalela mitó ya masolo mosusu oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! to na site na biso ya Internet, jw.org. Bokoki mpe kolobela mokakatano moko oyo bana na bino bakutanaki na yango na kelasi mpe ndenge ya kolonga yango. Mpo na nini te kotala emisyo ya televizyo na biso JW télédiffusion (tv.jw.org) mpe na nsima kolobela yango elongo? Bokoki mpe koyekola nzembo oyo ekoyembama na makita, mpe kolya mwa eloko nsima ya boyekoli.

      Ntango wana oyo bozali kolekisa pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosambela Yehova elongo, ekosalisa mokomoko na kati ya libota asepela koyekola Liloba ya Nzambe mpe Nzambe akopambola milende na bino.​—Nzembo 1:1-3.

      • Mpo na nini toponaka mokolo moko na kati ya pɔsɔ mpo na losambo na kati ya libota?

      • Ndenge nini baboti bakoki kosala ete ntango wana epesa libota mobimba esengo?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Tuná bandeko mosusu ya lisangá báyebisa yo ndenge oyo basalaka losambo na bango na kati ya libota. Lisusu, luká koyeba mikanda nini ezali na Ndako ya Bokonzi oyo okoki kosalela mpo na koteya bana na yo makambo ya Yehova.

  • Mpo na nini tokendeke na mayangani na biso ya minene?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 11

      Mpo na nini tokendeke na mayangani na biso ya minene?

      Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na Mexique

      Mexique

      Mokanda ya sika ebimi na liyangani ya etúká na Allemagne

      Allemagne

      Batatoli ya Yehova na liyangani moko ya etúká na Botswana

      Botswana

      Elenge mobali moko azali kozwa batisimo na Nicaragua

      Nicaragua

      Drame oyo bato basanaki ezali kosalema na Italie

      Italie

      Mpo na nini bilongi ya bato oyo ezali esengo boye? Ezali mpo bazali na kati ya moko ya mayangani na biso. Ndenge moko na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, oyo bazwaki etinda ya koyanganaka mbala misato na mbula, biso mpe tozalaka na esengo ya kosala bongo. (Kolimbola Mibeko 16:16) Mbula na mbula, tozalaka na mayangani misato: mayangani ya zongazonga mibale ya mokolo moko mpe liyangani ya etúká ya mikolo misato. Matomba nini tozwaka na mayangani yango?

      Ekómisaka bondeko na biso bakristo makasi. Kaka ndenge Bayisraele bazalaki kosepela kosanzola Yehova “na kati ya ebele ya bato oyo bayangani,” biso mpe tosepelaka kosambela ye elongo na bandeko na biso na mayangani. (Nzembo 26:12; 111:1) Na mayangani yango, tozwaka libaku ya kokutana mpe kolekisa ntango elongo na Batatoli ya masangá mosusu to mpe ya bikólo mosusu. Na ntango ya bopemi na midi, tolyaka mwa eloko elongo na baninga na esika ya liyangani, yango esalaka mpe ete mayangani ezala ntango moko ya esengo mpenza. (Misala 2:42) Kuna tomonaka mpenza na miso bolingo oyo esangisi “lisangá [na biso] mobimba ya bandeko” na mokili mobimba.​—1 Petro 2:17.

      Esalisaka biso tókolisa boyokani na biso ná Nzambe. Bayisraele bazalaki mpe kozwa matomba na mayangani na bango mpo kuna ‘bazalaki kokanga ntina ya maloba’ ya Makomami oyo bazalaki kolimbwela bango. (Nehemia 8:8, 12) Biso mpe tosepelaka mingi na mateya ya Biblia oyo tozwaka na mayangani na biso. Liyangani mokomoko ezalaka na motó ya likambo oyo euti na Biblia. Toyekolaka ndenge ya kosala mokano ya Nzambe na nzela ya badiskur oyo esimbaka motema, badiskur ya biteni ebele, mpe na nzela ya bilakiseli oyo emonisaka ndenge makambo oyo bandeko bakutanaki na yango elekaki. Koyoka masolo ya bakristo oyo balongaka mikakatano oyo bakutanaka na yango mpo bazali kotosa mitinda ya Nzambe na mikolo oyo ya mpasi, elendisaka biso mingi. Na mayangani ya etúká, badrame oyo basani balataka bilamba lokola bato ya kala to ya mikolo na biso, esalisaka biso tómona ndenge masolo mosusu ya Biblia elekaki mpenza, mpe epesaka biso mateya mingi. Na mayangani nyonso, bato bazwaka batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe.

      • Mpo na nini mayangani ezalaka ntango ya esengo?

      • Matomba nini okoki kozwa soki okei na liyangani moko?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Soki olingi koyeba malamu lisangá na biso ya bandeko, tosɛngi yo oya na liyangani oyo ezali koya. Ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia akoki kolakisa yo lokasa ya programɛ ya liyangani mpo omona lolenge ya masolo oyo esalemaka kuna. Okoki kokoma na kalandriye na yo dati mpe esika liyangani oyo ekoya ekosalema, mpe kokende soki likoki ezali.

  • Mosala na biso ya kosakola ebongisami ndenge nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 12

      Mosala na biso ya kosakola ebongisami ndenge nini?

      Batatoli ya Yehova bazali kosakola ndako na ndako

      Espagne

      Motatoli ya Yehova moko azali kosakola na parkɛ

      Biélorussie

      Motatoli ya Yehova moko azali kosakola na nzela ya telefone

      Hong Kong

      Batatoli ya Yehova bazali kosakola na esika ya bato nyonso

      Pérou

      Mwa moke liboso Yesu akufa, alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Kasi ndenge nini mosala yango elingaki kosalema na mokili mobimba? Na kolanda ndakisa oyo Yesu atikaki ntango azalaki awa na mabele.​—Luka 8:1.

      Tosalaka makasi tókutana na bato na bandako na bango. Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosakola nsango malamu ndako na ndako. (Matai 10:11-13; Misala 5:42; 20:20) Bapesaki bapalanganisi ya nsango malamu yango ya liboso bisika oyo basengelaki kosakola. (Matai 10:5, 6; 2 Bakorinti 10:13) Ndenge moko mpe lelo oyo, mosala na biso ya kosakola ebongisami malamumalamu mpe bapesaka lisangá mokomoko esika oyo basengeli kosakola. Na ndenge yango, tokokisaka etinda ya Yesu ya “kosakwela bato mpe kopesa litatoli malamumalamu.”​—Misala 10:42.

      Tosalaka makasi tókutana na bato na bisika nyonso oyo bazali. Yesu atikaki mpe ndakisa na ndenge azalaki kosakola na bisika ya bato nyonso lokola pembeni ya ebale to ya libulu ya mai. (Marko 4:1; Yoane 4:5-15) Biso mpe tosololaka na bato makambo ya Biblia na bisika nyonso: na balabala, na bisika ya mombongo, to na telefone. Tosakwelaka mpe bato oyo bafandaka pene na biso, baninga na biso ya mosala to ya kelasi, mpe bandeko na biso ya libota soki libaku emonani. Milende nyonso wana esali ete bamilio ya bato na mokili mobimba báyoka “nsango malamu ya lobiko.”​—Nzembo 96:2.

      Ezali na moto moko oyo okosepela koyebisa ye nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe bolamu oyo yango ekomemela ye na mikolo ezali koya? Kobomba nsango malamu yango mpo na yo moko te. Bandá koyebisa bato nsango yango sikoyo!

      • “Nsango malamu” nini tosengeli kosakola?

      • Ndenge nini Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya Yesu na ndenge ya kosakola?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Okoki kosɛnga moto oyo ayekolaka na yo Biblia alakisa yo ndenge ya koyebisa na boboto mpenza moto moko oyo oyebani na ye makambo oyo oyekoli na Biblia.

  • Mobongisi-nzela azali nani?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 13

      Mobongisi-nzela azali nani?

      Mosakoli moko ya ntango nyonso azali kosakola na esika ya bato ebele

      Canada

      Basakoli ya ntango nyonso bazali na mosala ya kosakola

      Kosakola ndako na ndako

      Babongisi-nzela bazali koyekola na moto Biblia

      Koyekola na bato Biblia

      Mobongisi-nzela moko azali koyekola Biblia

      Koyekola yo moko

      Mbala mingi, “mobongisi-nzela” ezalaka moto ya liboso oyo akei na esika moko boye mpe afungoli nzela mpo basusu bálanda. Yesu azalaki lokola mobongisi-nzela mpo Nzambe atindaki ye awa na mabele asakola nsango oyo epesaka bomoi, mpe afungwela bato nzela ya lobiko. (Matai 20:28) Lelo oyo, bayekoli ya Yesu bamekolaka ye na ndenge basalaka mingi mpenza na mosala ya ‘kokómisa bato bayekoli.’ (Matai 28:19, 20) Bato mosusu kutu bazalaka na likoki ya kosala oyo tobengi mosala ya mobongisi-nzela.

      Mobongisi-nzela azali mosakoli ya ntango nyonso. Batatoli ya Yehova nyonso bazali basakoli ya nsango malamu. Kasi basusu babongisaka makambo ya bomoi na bango mpo bázala babongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe basakolaka ngonga 70 sanza na sanza. Mpo na kosala yango, mingi baponaka mosala oyo ezwaka bango ngonga mingi te na pɔsɔ. Basusu baponamaka mpo bázala babongisi-nzela monene na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te, mpe basakolaka ngonga 130 sanza na sanza. Babongisi-nzela basepelaka kozala na bomoi ya mindɔndɔ te, mpe batyaka motema ete Yehova akopesa bango biloko oyo basengeli na yango. (Matai 6:31-33; 1 Timote 6:6-8) Baoyo bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza te bakoki kopona kozala babongisi-nzela basungi soki likoki ezali, mpe kosakola ngonga 30 to 50 na sanza moko.

      Mobongisi-nzela asakolaka mingi mpo alingaka Nzambe mpe bato. Lokola Yesu, biso mpe tomonaka ndenge bato mingi bazangi elikya lelo oyo. (Marko 6:34) Kasi tozali na boyebi oyo ekoki kosalisa bango banda sikoyo, mpe kopesa bango elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Mobongisi-nzela alingaka bato mpe yango nde etindaka ye asalela ntango mpe makasi na ye mpo na kosalisa bango báyeba nsango malamu. (Matai 22:39; 1 Batesaloniki 2:8) Na yango, kondima na ye ekómaka makasi, apusanaka lisusu penepene na Nzambe, mpe akómaka na esengo mingi.​—Misala 20:35.

      • Mobongisi-nzela azali nani?

      • Nini etindaka moto akóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza?

  • Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 14

      Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?

      Basakoli ya ntango nyonso na mosala ya kosakola na esika ya bato ebele

      États-Unis

      Bana-kelasi na eteyelo ya Gileade
      Bana-kelasi bazali komibongisa mpo na mosala ya misionɛrɛ

      Eteyelo ya Gileade na Patterson, na New York

      Bamisionɛrɛ bazali kosakola na Panama

      Panama

      Banda kala mateya ya Teokrasi ezali elembo ya Batatoli ya Yehova. Biteyelo ya ntina mingi ebongisami mpo na baoyo bapesaka ntango na bango nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi mpo ‘bákokisa mosala na bango malamumalamu.’​—2 Timote 4:5.

      Eteyelo ya babongisi-nzela. Mobongisi-nzela ya sanza na sanza oyo asali mbula moko na mosala yango, akokɔta eteyelo yango ya mikolo motoba, mbala mosusu na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene ya esika oyo afandaka. Ntina ya eteyelo yango ezali ya kosalisa mobongisi-nzela apusana lisusu penepene na Yehova, akóma kosakola lisusu malamu koleka, mpe akoba na mosala yango.

      Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Eteyelo yango ya sanza mibale ebongisami mpo na kopesa formasyo na babongisi-nzela oyo baumelá na mosala, oyo bakondima kolongwa esika bafandaka mpo na kokende kosakola esika nyonso oyo mposa ya basakoli ezali. Ezali lokola balobi, “Ngai oyo! Tindá ngai!” na ndakisa ya Yesu Kristo, Mopalanganisi monene, oyo asalaki awa na mabele. (Yisaya 6:8; Yoane 7:29) Mbala mosusu kokende mosika ekosɛnga omesana na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Mimeseno, klima, mpe bilei ekoki kokesana mpenza na oyo ozalaki na yango liboso. Ekoki kosɛnga kutu koyekola monɔkɔ ya sika. Eteyelo yango esalisaka bandeko basi mpe mibali oyo bazali minzemba mpe bandeko oyo babalá, oyo bazali na mbula ya kobotama kobanda 23 tii 65, bákolisa bizaleli ya bokristo oyo esengeli mpo na mokumba oyo bakopesa bango mpe makoki oyo ekosala ete Yehova asalela bango, mpe ebongiseli na ye esalela bango lisusu mingi.

      Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na monɔkɔ ya Ebre, liloba “Gileade” elimboli “libondo ya litatoli.” Kobanda ntango eteyelo ya Gileade efungwamaki na 1943, bandeko koleka 8 000 oyo bazwaki diplome na eteyelo yango batindamaki lokola bamisionɛrɛ mpo na kopesa litatoli “tii na nsuka ya mabele,” mpe yango ebotaki mbuma mingi. (Misala 13:47) Ntango bamisionɛrɛ ya liboso bakómaki na ekólo Pérou, lisangá ata moko te ezalaki kuna. Kasi sikoyo masangá ekómi koleka 1 000. Ntango bamisionɛrɛ na biso bakendaki kosakola na Japon, Batatoli bazalaki ata zomi te. Kasi sikoyo bakómi koleka 200 000. Na Eteyelo ya Gileade oyo eumelaka sanza mitano, bayekolaka Liloba ya Nzambe na mozindo. Baoyo bazali babongisi-nzela monene to bamisionɛrɛ, baoyo basalaka na Babetele, to bakɛngɛli ya zongazonga, bazali kobengama na eteyelo yango mpo na kozwa formasyo ya malamu oyo ekosalisa bango bábongisa malamumalamu mpe báfandisa mosala na mokili mobimba.

      • Ntina ya Eteyelo ya babongisi-nzela ezali nini?

      • Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi ebongisami mpo na banani?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto