Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Soki moto akufi akendaka wapi?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
    • MOKAPO YA MOTOBA

      Soki moto akufi akendaka wapi?

      1-3. Mituna nini bato bamitunaka mpo na liwa, mpe biyano nini mangomba mosusu epesaka?

      BIBLIA elaki biso ete mokolo mosusu “liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:4) Na Mokapo 5, tomonaki ete lisiko epesi biso nzela ya kozwa bomoi ya seko. Kasi, bato bazali kaka kokufa. (Mosakoli 9:5) Na yango, motuna monene yango oyo: Soki moto akufi akendaka wapi?

      2 Tolukaka eyano na motuna yango mingimingi soki ndeko to moninga na biso akufi. Ntango mosusu tomitunaka: ‘Akei wapi? Azali komona biso? Akoki kosalisa biso? Tokomona ye lisusu?’

      3 Mangomba epesaka biyano ndenge na ndenge na mituna wana. Mangomba mosusu eteyaka ete bato ya malamu bakendaka na likoló mpe bato ya mabe bakendaka na lifelo ya mɔtɔ. Mosusu elobaka ete soki moto akufi akómaka elimo mpe afandaka esika moko na bandeko ya libota na ye oyo bakufá. Mpe mosusu elobaka ete soki moto akufi, basambisaka ye, na nsima abotamaka lisusu, to azongaka na bomoi na nzoto mosusu, na ndakisa na nzoto ya moto to ya nyama.

      4. Likanisi nini mangomba eteyaka mpo na liwa?

      4 Emonani lokola ete mangomba eteyaka makambo oyo ekeseni. Nzokande, mangomba yango nyonso eteyaka kaka likanisi moko. Eteyaka ete soki moto akufi, eloko moko na nzoto na ye ekufaka te, etikalaka na bomoi. Ezali solo?

      SOKI MOTO AKUFI AKENDAKA WAPI?

      5, 6. Nini ekómelaka moto soki akufi?

      5 Yehova ayebi nini ekómelaka moto soki akufi, mpe ayebisi biso ete soki moto akufi, bomoi na ye esuki. Liwa ezali kozanga bomoi. Na yango, soki moto akufi, bolingo na ye, nkanda na ye, zuwa na ye mpe makanisi na ye ezalaka na bomoi esika mosusu te.a Soki moto akufi akoki komona te, koyoka te mpe kokanisa lisusu te.

      6 Mokonzi Salomo akomaki ete “bakufi bayebi ata eloko moko te.” Moto oyo akufi akoki kolinga to koyina bato te mpe “mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda.” (Tángá Mosakoli 9:5, 6, 10.) Mpe Nzembo 146:4 elobi ete soki moto akufi “makanisi na ye” ekufi.

      YESU ALOBAKI NINI MPO NA LIWA?

      Mwasi ná mobali bafandi na elanga bazali kotala fololo

      Yehova akelaki bato mpo bázala na bomoi libela na libela na mabele

      7. Yesu alobaki nini mpo na liwa?

      7 Ntango Lazare, moninga ya motema ya Yesu akufaki, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Lazare moninga na biso akei kopema.” Kasi Yesu alingaki te koloba ete Lazare azali kopema na mpɔngi. Na nsima, Yesu alobaki ete: “Lazare akufi.” (Yoane 11:11-14) Na yango, Yesu amonisaki ete liwa ezali lokola mpɔngi. Alobaki te ete Lazare azalaki na likoló to azalaki elongo na bandeko na ye oyo bakufá. Alobaki mpe te ete Lazare azalaki konyokwama na lifelo ya mɔtɔ to azalaki kobotama lisusu lokola moto mosusu to nyama. Te, Yesu alingaki nde koloba ete Lazare azali lokola moto oyo alali mpɔngi ya makasi. Bavɛrsɛ mosusu mpe emonisi ete liwa ezali lokola mpɔngi ya makasi. Ntango babomaki Stefano, Biblia elobi ete “alalaki na kati ya liwa.” (Misala 7:60) Ntoma Paulo mpe akomaki ete bakristo mosusu “balalá na kati ya liwa.”​—1 Bakorinti 15:6.

      8. Ndenge nini toyebi ete Nzambe akelaki bato te mpo bákufaka?

      8 Nzambe akelaki Adama ná Eva mpo nsukansuka bákufa? Te! Yehova akelaki bango mpo bázala na bomoi ya seko na nzoto ya kokoka. Ntango Yehova asalaki bato, atyaki kati na bango mposa ya kozala na bomoi libela na libela. (Mosakoli 3:11) Baboti balingaka te komona bana na bango bákóma mibange mpe bákufa; Yehova mpe ayokaka ndenge wana mpo na biso. Kasi, soki Nzambe akelá biso mpo tózala na bomoi libela na libela, mpo na nini bato bakufaka?

      MPO NA NINI MOTO AKUFAKA?

      9. Mpo na nini mobeko oyo Yehova apesaki Adama ná Eva elekaki makasi te?

      9 Na elanga ya Edene, Yehova ayebisaki Adama: “Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:9, 16, 17) Mobeko wana ezalaki polele, mpe ezalaki mpasi te kotosa yango; Yehova azalaki na lotomo ya koyebisa Adama ná Eva oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Soki bátosaka Yehova, balingaki komonisa ete bazali komemya bokonzi na ye. Balingaki mpe komonisa ete bazali na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo apesi bango.

      10, 11. (a) Ndenge nini Satana abungisaki Adama ná Eva nzela? (b) Mpo na nini tokoki kokɔtela bango te mpo na likambo oyo basalaki?

      10 Likambo ya mawa, Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova. Satana atunaki Eva: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?” Eva azongisaki: “Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali kolya mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga, Nzambe alobaki ete: ‘Bosengeli kolya yango te, ɛɛ, bosengeli kosimba yango te mpo bókufa te.’”​—Ebandeli 3:1-3.

      11 Na nsima, Satana alobaki: “Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.” (Ebandeli 3:4-6) Satana alingaki Eva akanisa ete ye moko akoki kopona nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Na ntango yango, akosaki ye mpo na likambo oyo ekokómela ye soki aboyi kotosa Nzambe. Satana alobaki ete Eva akokufa te, na yango Eva alyaki mbuma yango mpe na nsima apesaki mpe mobali na ye. Adama ná Eva bayebaki ete Yehova ayebisaki bango bálya mbuma wana te. Lokola balyaki yango, baboyaki nde kotosa mobeko ya polele mpe ya pɛtɛɛ oyo Yehova apesaki bango. Na ndenge yango, bamonisaki ete bazangi limemya epai ya Tata na bango ya likoló, oyo azali kolinga bango. Tokoki kokɔtela bango te mpo na likambo oyo basalaki!

      12. Mpo na nini ezali mpenza mawa ndenge Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova?

      12 Ezali mawa mpenza ndenge baboti na biso ya liboso bazangaki limemya epai ya Mozalisi na bango! Okoyoka ndenge nini soki obomaki nzoto mpo na kobɔkɔla bana na yo, ya mwasi ná ya mobali, kasi na nsima babalukeli yo mpe basali nde makambo oyo opekisaki bango? Okoyoka motema mpasi, boye te?

      Ntango Nzambe akelaki Adama

      Adama autaki na putulu, mpe azongaki na putulu

      13. Yehova alingaki koloba nini ntango ayebisaki Adama ete “okozonga na putulu”?

      13 Ntango Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe, babungisaki libaku ya kozala na bomoi ya seko. Yehova ayebisaki Adama: “Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.” (Tángá Ebandeli 3:19.) Yango elimbolaki ete Adama asengelaki kokóma lisusu putulu, lokola nde akelamaki te. (Ebandeli 2:7) Nsima ya kosala lisumu, Adama akufaki mpe azalaki lisusu te.

      14. Mpo na nini bato bakufaka?

      14 Soki Adama ná Eva bátosaka Nzambe, balingaki kozala na bomoi tii lelo. Kasi lokola babukaki mobeko ya Nzambe, basalaki lisumu mpe nsukansuka bakufaki. Lisumu ezali lokola maladi moko ya mabe oyo tozwá epai ya baboti na biso ya liboso. Biso nyonso tobotamaka bato ya masumu, yango wana bato bakufaka. (Baroma 5:12) Kasi, yango te nde Nzambe akanaki mpo na bato. Nzambe alingaki ata moke te ete bato bákufaka, mpe Biblia ebengi liwa “monguna.”​—1 Bakorinti 15:26.

      KOYEBA SOLO EPESAKA BONSOMI

      15. Na ndenge nini mateya ya solo oyo etali liwa epesaka biso bonsomi?

      15 Koyeba mateya ya solo oyo etali liwa elongolaka moto na boombo ya makanisi ndenge na ndenge ya lokuta. Biblia eteyaka ete bato oyo bakufá bayokaka mpasi te, mawa mpe te. Tokoki kosolola na bango te, bango mpe bakoki kosolola na biso te. Tokoki kosalisa bango te, bango mpe bakoki kosalisa biso te. Bakoki kosala biso mabe te, yango wana ntina ya kobanga bango ezali te. Kasi, mangomba mingi eteyaka ete bato oyo bakufá bazali na bomoi esika moko boye mpe ete tokoki kosalisa bango soki tofuti mbongo epai ya basango to bapastɛrɛ. Kasi soki toyebi mateya ya solo oyo etali liwa, tokokosama te na mateya wana ya lokuta.

      16. Wapi mateya ya lokuta oyo mangomba mingi eteyaka mpo na bato oyo bakufá?

      16 Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kokosa bato mpe kotinda bango bákanisa ete bato oyo bakufá bazali kaka na bomoi. Na ndakisa, mangomba mosusu eteyaka ete soki moto akufi, eloko moko kati na ye ekobaka kozala na bomoi esika mosusu. Lingomba na bino mpe eteyaka bongo, to eteyaka nde makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa? Satana azali kokosa bato mpo báboya Yehova.

      17. Mpo na nini koloba ete bato ya mabe bazikaka na lifelo efingisaka nkombo ya Yehova?

      17 Mangomba mingi eteyaka makambo ya nsɔmɔ mpenza. Na ndakisa, mangomba mosusu eteyaka ete bato mabe bakozika libela na libela na lifelo. Lokuta wana efingisaka nkombo ya Yehova. Yehova akoki ata moke te kondima bato bányokwamaka ndenge wana! (Tángá 1 Yoane 4:8.) Okokanisa nini mpo na moto oyo azikisi mwana na ye mabɔkɔ na mɔtɔ mpo na kopesa ye etumbu? Okomona ete azali moto mabe mpenza. Okolinga kutu koyeba makambo na ye te. Yango nde Satana alingi bato básala mpo na Yehova!

      18. Mpo na nini tosengeli te kobanga bato oyo bakufá?

      18 Mangomba mosusu eteyaka ete soki bato bakufi, bakómaka bilimo. Mangomba yango eteyaka ete tosengeli komemya bilimo yango, ata mpe kobanga bango mpo bakoki kokóma baninga oyo bakoki kosalisa biso to banguna oyo bakoki kosala biso mabe. Bato mingi bandimaka lokuta wana. Babangaka bato oyo bakufá, yango wana basambelaka bango na esika ya kosambela Yehova. Kobosana te ete bato bakufá bayokaka te mpe bamonaka te; na yango ntina ya kobanga bango ezali te. Yehova nde Mozalisi na biso. Azali Nzambe ya solo, mpe tosengeli kosambela kaka ye.​—Emoniseli 4:11.

      19. Koyeba solo oyo etali liwa ekosalisa biso na nini?

      19 Koyeba solo oyo etali liwa elongolaka biso na boombo ya mateya ya mangomba ya lokuta. Mateya yango ya solo esalisaka biso mpe tókanga ntina ya bilaka oyo Yehova apesi biso mpo na bomoi na mikolo ezali koya.

      20. Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

      20 Yobo, mosaleli ya Nzambe na ntango ya kala, atunaki: “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?” (Yobo 14:14) Moto oyo akufi akoki mpenza kozonga na bomoi? Eyano oyo Nzambe apesi biso na Biblia esepelisaka mpenza. Tokomona yango na mokapo oyo elandi.

      a Bato mosusu bakanisaka ete molimo to elimo ya moto etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Etanda 17 mpe 18.

      NA MOKUSE

      LITEYA 1: NTANGO MOTO AKUFI, BOMOI NA YE ESUKI

      “Bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—Mosakoli 9:5

      Soki moto akufi akendaka wapi?

      • Nzembo 146:3, 4; Mosakoli 9:6, 10

        Soki moto akufi akoki komona te, koyoka te, mpe kokanisa te.

      • Yoane 11:11-14

        Yesu amonisaki ete liwa ezali lokola mpɔngi.

      LITEYA 2: YEHOVA ALINGAKI ATA MOKE TE ETE BATO BÁKUFAKA

      “Nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.”​—Ebandeli 2:17

      Mpo na nini bato bakufaka?

      • Ebandeli 3:1-6

        Satana akosaki Eva mpo na likambo oyo ekokómela ye soki abuki mobeko ya Nzambe. Lokola Adama ná Eva batosaki Yehova te, basalaki lisumu, nsukansuka bakufaki.

      • Ebandeli 3:19

        Nsima ya liwa ya Adama, azalaki lisusu te.

      • Baroma 5:12

        Lisumu ezali lokola maladi ya mabe oyo tozwá epai ya baboti na biso ya liboso. Biso nyonso tobotamaka bato ya masumu, yango wana tokufaka.

      • 1 Bakorinti 15:26

        Biblia ebengi liwa monguna.

      LITEYA 3: KOYEBA SOLO NA OYO ETALI LIWA EPESAKA BONSOMI

      “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi? . . . Nakozela, tii ntango kobɔndisama na ngai ekoya.”​—Yobo 14:14

      Ndenge nini koyeba solo na oyo etali liwa elongolaka moto na boombo ya makanisi ya lokuta?

      • 1 Yoane 4:8

        Liteya ya lifelo ya mɔtɔ efingisaka nkombo ya Yehova. Akoki ata moke te kondima bato bányokwamaka ndenge wana.

      • Emoniseli 4:11

        Bato mingi babangaka bato oyo bakufá, yango wana basambelaka bango na esika ya kosambela Yehova. Yehova azali Nzambe ya solo, mpe tosengeli kosambela kaka ye.

  • Lisekwa ekozala!
    Makambo oyo Biblia eteyaka
    • MOKAPO YA NSAMBO

      Lisekwa ekozala!

      1-3. Nini ekangá biso nyonso na bolɔkɔ, mpe ndenge nini Yehova akobimisa biso na bolɔkɔ yango?

      KANISÁ ete bakateli yo etumbu ya kolekisa bomoi mobimba na bolɔkɔ mpo na mabe oyo osali te. Elikya ya kobima na bolɔkɔ yango ezali te. Ozali komona ete osuki, mpe eloko mosusu ya kosala ezali te. Kasi, kaka ntango omoni ete esili mpo na yo, oyoki ete moto moko azali na likoki ya kobimisa yo mpe alaki ete akosalisa yo! Okoyoka ndenge nini?

      2 Liwa ezali bolɔkɔ oyo ekangá biso nyonso. Ata soki tosali nini, ndenge ya kokima ezali te. Kasi, Yehova azali na nguya ya kosikola biso na liwa. Mpe alaki ete “liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”​—1 Bakorinti 15:26.

      3 Kanisá ndenge motema ekokita yo ntango nsɔmɔ ya liwa ekozala lisusu te! Kasi, Yehova akolongola kaka liwa te. Akozongisa mpe bato oyo bakufá na bomoi. Kanisá esengo oyo okoyoka mpo na yango. Alaki ete “baoyo bazangi makasi kati na liwa” bakozonga lisusu na bomoi. (Yisaya 26:19) Biblia ebengi yango lisekwa.

      NTANGO NDEKO TO MONINGA MOKO AKUFI

      4. (a) Nini ekoki kokitisa biso motema ntango ndeko to moninga moko akufi? (b) Banani bazalaki baninga ya Yesu ya motema?

      4 Ntango ndeko to moninga na biso moko ya motema akufi, toyokaka mpasi mpe mawa mpenza. Tomonaka ete tosuki mpe tomonaka eloko ya kosala te mpo na kozongisa ye na bomoi. Kasi, Biblia ekoki mpenza kokitisa biso motema. (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Tótalela lisolo moko oyo emonisi ete Yehova ná Yesu balingaka mpenza kozongisa na bomoi bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki mbala na mbala kokende kotala Lazare ná bandeko na ye ya basi, Marta ná Maria. Bango nyonso misato bazalaki baninga ya Yesu ya motema. Biblia elobi: “Yesu azalaki kolinga Marta ná ndeko na ye ya mwasi ná Lazare.” Kasi na nsima, Lazare akufaki.​—Yoane 11:3-5.

      5, 6. (a) Yesu asalaki nini ntango amonaki bandeko ya Lazare ná baninga na ye bazali kolela? (b) Mpo na nini koyeba ndenge Yesu ayokaki mpo na liwa ezali kokitisa motema?

      5 Yesu akendaki kobɔndisa Marta ná Maria. Ntango Marta ayokaki ete Yesu azali koya, akendaki na libándá ya engumba kokutana na ye. Asepelaki mingi ntango amonaki Yesu, mpe alobaki na ye: “Nkolo, soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” Marta akanisaki ete Yesu ayei na retare. Na nsima, Yesu amonaki Maria, ndeko ya Marta, azali kolela. Ntango amonaki bango na mawa, ayokaki mpasi mingi mpe alelaki. (Yoane 11:21, 33, 35) Ayokaki mawa mpenza oyo toyokaka ntango ndeko to moninga na biso akufi.

      6 Koyeba ete Yesu mpe ayokaka mawa oyo toyokaka mpo na liwa ezali kokitisa motema. Mpe Yesu azali kaka lokola Tata na ye. (Yoane 14:9) Yehova azali na nguya ya kolongola liwa mpo na libela, mpe yango nde akosala mosika te.

      “LAZARE, BIMÁ!”

      7, 8. Mpo na nini Marta aboyaki bálongola libanga na lilita ya Lazare, kasi Yesu asalaki nini?

      7 Ntango Yesu akómaki na lilita oyo bakundaki Lazare, akutaki bazipi lilita yango na libanga moko monene. Yesu alobaki: “Bólongola libanga.” Kasi Marta aboyaki mpo nzoto ya Lazare esilaki kosala mikolo minei na kati ya lilita. (Yoane 11:39) Ayebaki te likambo oyo Yesu alingaki kosala mpo na ndeko na bango.

      Yesu asekwisi Lazare, mpe bandeko ná baninga na ye bazali kosepela

      Kanisá esengo oyo bandeko ná baninga ya Lazare bayokaki ntango asekwaki!​—Yoane 11:38-44

      8 Yesu alobaki: “Lazare, bimá!” Likambo oyo Marta ná Maria bamonaki na nsima ekamwisaki bango. “Moto oyo akufaki abimaki, makolo ná mabɔkɔ ekangami na bilamba ya kozinga.” (Yoane 11:43, 44) Lazare azongaki na bomoi! Akutanaki lisusu na bandeko mpe baninga na ye. Bayambaki ye, basimbaki ye, mpe basololaki na ye. Ezalaki likamwisi moko monene! Yesu asekwisi Lazare.

      “ELENGE MWASI, NALOBI NA YO: TƐLƐMÁ!”

      9, 10. (a) Nani apesaki Yesu nguya ya kosekwisa bato? (b) Mpo na nini masolo oyo elobeli lisekwa ezali na ntina mingi mpo na biso?

      9 Yesu azalaki kosekwisa bato na nguya na ye moko? Te. Liboso asekwisa Lazare, Yesu abondelaki Yehova, mpe Yehova apesaki ye nguya ya kosekwisa Lazare. (Tángá Yoane 11:41, 42.) Yesu asekwisaki kaka Lazare te. Biblia elobeli elenge mwasi moko ya mbula 12 oyo azalaki kobɛla makasi. Tata na ye Yairuse asilaki mayele, mpe asɛngaki Yesu abikisa mwana na ye. Azalaki kaka na mwana moko wana. Ntango azalaki kosolola na Yesu, bato balandaki ye mpe balobaki na ye: “Mwana na yo ya mwasi akufi! Mpo na nini kotungisa moteyi lisusu?” Kasi Yesu alobaki na Yairuse: “Kobanga te, monisá kaka kondima, mpe akobika.” Na nsima, akendaki elongo na Yairuse na ndako na ye. Ntango bakómaki pene na ndako, Yesu amonaki mpe ayokaki bato bazali kolela. Yesu ayebisaki bango: “Bótika kolela, mpo akufi te kasi alali nde mpɔngi.” Na ntembe te, tata ná mama ya mwana bamitunaki soki Yesu alingi koloba nini. Yesu asɛngaki bato nyonso bábima, kasi akɔtaki elongo na tata ná mama ya mwana yango na ndako, esika balalisaki mwana. Yesu asimbaki ye malɛmbɛ na lobɔkɔ mpe alobaki na ye: “Elenge mwasi, nalobi na yo: Tɛlɛmá!” Kanisá esengo ya baboti wana ntango mwana na bango atɛlɛmaki mbala moko mpe abandi kotambola! Yesu asekwisi mwana na bango. (Marko 5:22-24, 35-42; Luka 8:49-56) Kobanda mokolo wana, ntango bazalaki komona mwana na bango, bazalaki kokanisa likambo oyo Yehova asalelaki bango na nzela ya Yesu.a

      10 Bato oyo Yesu asekwisaki bakufaki lisusu na nsima. Kasi masolo ya bato yango ezali na ntina mingi mpo ezali kopesa biso elikya ya solosolo. Yehova azali na mposa ya kosekwisa bato, mpe akosala yango.

      MASOLO OYO ELOBELI LISEKWA ETEYI BISO NINI?

      Petro asekwisi Dorkasi mpe bato mosusu bazali kotala

      Ntoma Petro asekwisaki Dorkasi, mokristo moko ya mwasi.​—Misala 9:36-42

      Eliya asekwisi mwana ya mwasi moko oyo mobali na ye akufá, mpe mwasi yango ayambi mwana yango

      Eliya asekwisaki mwana ya mwasi moko oyo mobali na ye akufá.​—1 Bakonzi 17:17-24

      11. Mosakoli 9:5 eteyi biso nini mpo na Lazare?

      11 Biblia elobi polele ete “bakufi bayebi ata eloko moko te.” Ezalaki bongo mpo na Lazare. (Mosakoli 9:5) Kaka ndenge Yesu alobaki, ezalaki lokola nde Lazare alali mpɔngi. (Yoane 11:11) Ntango Lazare azalaki na lilita, ayebaki “ata eloko moko te.”

      12. Ndenge nini toyebi ete lisekwa ya Lazare esalemaki mpenza?

      12 Ntango Yesu asekwisaki Lazare, bato ebele bamonaki. Ata banguna ya Yesu bayebaki ete asalaki likamwisi yango. Lazare azongaki na bomoi, mpe yango emonisaki ete lisekwa yango esalemaki mpenza. (Yoane 11:47) Longola yango, bato mingi bakendaki kotala Lazare; yango wana, bakómaki kondima ete Nzambe nde atindaki Yesu. Banguna ya Yesu basepelaki na likambo yango te; yango wana bayokanaki ete báboma Yesu mpe Lazare.​—Yoane 11:53; 12:9-11.

      13. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akosekwisa bakufi?

      13 Yesu alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita” bakosekwa. (Yoane 5:28) Yango elimboli ete baoyo nyonso bazali na makanisi ya Yehova bakozonga na bomoi. Kasi, mpo Yehova asekwisa moto, esengeli ayeba lisusu makambo nyonso oyo etali moto yango. Akoki mpenza kosala yango? Na molɔ́ngɔ́ mobimba, minzoto ezali bamiliare ná bamiliare. Biblia elobi ete Yehova ayebi monzoto mokomoko na nkombo na yango. (Tángá Yisaya 40:26.) Soki ayebi malamu nkombo ya monzoto mokomoko, boye akoyeba mpe mbala moko likambo mokomoko oyo etali bakufi nyonso oyo akozongisa na bomoi. Kutu, lokola Yehova nde akelaki biloko nyonso, toyebi ete azali na nguya ya kozongisa bakufi na bomoi.

      14, 15. Maloba ya Yobo eteyi biso nini mpo na lisekwa?

      14 Yobo, moto ya sembo, azalaki kondima ete lisekwa ekozala. Atunaki: “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?” Na nsima, alobaki na Yehova ete: “Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.” Ya solo, Yobo ayebaki ete Yehova azelaka na mposa makasi mokolo oyo akosekwisa bato oyo bakufá.​—Yobo 14:13-15.

      15 Omiyokaka ndenge nini mpo na elikya ya lisekwa? Ntango mosusu okoki komituna: ‘Bongo bandeko na ngai ná baninga na ngai oyo bakufá, bango mpe bakosekwa?’ Koyeba ete Yehova alingi mpenza kozongisa bakufi na bomoi, ebɔndisaka biso. Tótalela eyano ya Biblia na motuna oyo: Banani bakosekwa mpe bakofanda wapi?

      “BAKOYOKA MONGONGO NA YE MPE BAKOBIMA”

      16. Bato oyo bakosekwa awa na mabele bakozala na bomoi ya ndenge nini?

      16 Na ntango ya kala, bato oyo basekwaki bakutanaki lisusu na bandeko na bango mpe baninga na bango awa na mabele. Ekozala mpe bongo na mikolo ezali koya, kasi ekozala malamu koleka. Mpo na nini? Mpo baoyo bakozonga na bomoi awa na mabele bakozwa libaku ya kozala na bomoi libela na libela mpe bakokufa lisusu te. Mpe bakofanda na mokili moko oyo ekeseni mosika na oyo tozali na yango lelo oyo. Bitumba, mobulu mpe maladi ekozala te.

      17. Banani bakosekwa?

      17 Banani bakosekwa? Yesu alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29, maloba na nse ya lokasa) Mpe Emoniseli 20:13 elobi: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna.” Ya solo, ebele ya bato bakozonga na bomoi. Ntoma Paulo mpe alobaki ete ‘bayengebene mpe bato oyo bazangi boyengebene’ bakosekwa. (Tángá Misala 24:15.) Yango elimboli nini?

      Na Paradiso, bato oyo bakosekwa bakokutana lisusu na bandeko na bango mpe baninga na bango

      Na Paradiso, bakufi bakosekwa mpe bakokutana lisusu na bandeko mpe baninga na bango

      18. “Bayengebene” oyo bakosekwa ezali banani?

      18 “Bayengebene” ezali basaleli ya sembo ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele. Bato lokola Noa, Abrahama, Sara, Moize, Ruta mpe Estere bakosekwa mpo na kofanda awa na mabele. Okoki kotánga makambo ya basi mpe mibali yango mosusu na mokanda ya Baebre mokapo 11. Bongo basaleli ya sembo ya Yehova oyo bazali kokufa na ntango na biso? Bango mpe bazali “bayengebene,” yango wana bakosekwa.

      19. “Banani bazali bato oyo bazangi boyengene”? Libaku nini Yehova akopesa bango?

      19 “Bato oyo bazangi boyengebene” ezali ebele ya bato oyo bazwaki libaku ya koyeba Yehova te. Atako bakufá, Yehova abosaná bango te. Akosekwisa bango, mpe bakozwa libaku ya koyekola makambo na ye mpe kosalela ye.

      20. Mpo na nini bato mosusu bakosekwa te?

      20 Yango elingi nde koloba ete bato nyonso oyo bakufá bakosekwa? Te. Yesu alobaki ete bato mosusu bakosekwa te. (Luka 12:5) Nani nde akokata soki moto boye to boye akosekwa to te? Yehova nde Mosambisi ya nsuka, kasi apesi mpe Yesu bokonzi ya “kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.” (Misala 10:42) Moto nyonso oyo bango bamoni ete azali moto mabe mpe abongolaki motema te akosekwa te.​—Talá Etanda 19.

      LISEKWA MPO NA KOKENDE NA LIKOLÓ

      21, 22. (a) Kosekwa mpo na kokende na likoló elimboli nini? (b) Nani moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló?

      21 Biblia eteyaka mpe ete bato mosusu bakokende na likoló. Soki moto asekwi mpo na kokende na likoló, akozonga na bomoi lokola moto te, na nzoto ya mosuni. Akosekwa mpo na bomoi na likoló, na nzoto ya elimo.

      22 Yesu azalaki moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló. (Yoane 3:13) Mikolo misato nsima ya liwa ya Yesu, Yehova asekwisaki ye. (Nzembo 16:10; Misala 13:34, 35) Yesu asekwaki na nzoto ya mosuni te. Ntoma Petro alobi ete Yesu “abomamaki na nzoto, kasi azongisamaki na bomoi na elimo.” (1 Petro 3:18) Yesu asekwaki lokola elimo moko ya nguya! (1 Bakorinti 15:3-6) Kasi Biblia elobi ete lisekwa yango esuki kaka na ye te.

      23, 24. “Etonga moke” oyo Yesu alobelaki ezali banani, mpe bakozala bato boni?

      23 Liboso Yesu akufa, ayebisaki bayekoli na ye ya sembo: “Nazali kokende kobongisela bino esika.” (Yoane 14:2) Yango elimboli ete bayekoli na ye mosusu bakosekwa mpo na kozala elongo na ye na likoló. Bakozala boni? Yesu alobaki ete bakozala moke mpenza, “etonga moke.” (Luka 12:32) Ntoma Yoane apesaki motángo na bango ntango amonaki Yesu “atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona [ya likoló], mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000).”​—Emoniseli 14:1.

      24 Ntango nini bakristo yango 144 000 basengelaki kosekwa? Biblia eyebisi biso ete yango esengelaki kosalema nsima ya ntango oyo Kristo abandaki koyangela na likoló. (1 Bakorinti 15:23) Tozali sikoyo na ntango yango, mpe mingi kati na bato 144 000 yango basilá kosekwa mpe bakendá na likoló. Baoyo bazali naino awa na mabele lelo oyo, soki bakufi bakosekwa mbala moko mpo na kokende na likoló. Kasi, bato mingi bakosekwa na mikolo ezali koya mpo na kofanda na Paradiso awa na mabele.

      25. Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

      25 Etikali moke Yehova asikola bato nyonso na liwa, mpe liwa ekolongolama mpo na libela! (Tángá Yisaya 25:8.) Kasi bato oyo bakokende na likoló bakosala nini kuna? Biblia elobi ete bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya Nzambe. Tokolobela guvɛrnema yango na mokapo oyo elandi.

      a Masolo mosusu ya Biblia elobeli bato mosusu oyo basekwaki, bilenge ná mikóló, basi ná mibali, Bayisraele ná bato ya bikólo mosusu. Okoki kotánga masolo yango na 1 Bakonzi 17:17-24; 2 Bakonzi 4:32-37; 13:20, 21; Matai 28:5-7; Luka 7:11-17; 8:40-56; Misala 9:36-42; 20:7-12.

      NA MOKUSE

      LITEYA 1: YEHOVA AKOLONGOLA LIWA

      “Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”​—1 Bakorinti 15:26

      Ndenge nini Biblia ekitisaka biso mpenza motema ntango moto akufi?

      • 2 Bakorinti 1:3, 4

        Ntango ndeko to moninga na biso akufi, tomonaka ete tosuki. Biblia ekitisaka biso mpenza motema.

      • Yisaya 25:8; 26:19

        Yehova azali na nguya ya kolongola liwa mpo na libela. Ata bato oyo bakufá, akozongisa bango na bomoi.

      LITEYA 2: TOKOKI KONDIMA ETE LISEKWA EKOZALA

      “Elenge mwasi, nalobi na yo: Tɛlɛmá!”​—Marko 5:41

      Mpo na nini tokoki kondima ete lisekwa ekozala?

      • Yoane 11:1-44

        Yesu asekwisaki Lazare.

      • Marko 5:22-24, 35-42

        Yesu asekwisaki elenge mwasi moko.

      • Yoane 11:41, 42

        Yesu asekwisaki bato na nguya ya Yehova.

      • Yoane 12:9-11

        Bato ebele bamonaki Yesu azali kosekwisa bato oyo bakufá. Ata banguna ya Yesu bayebaki ete akoki kosekwisa bato.

      LITEYA 3: YEHOVA AKOZONGISA BAMILIARE YA BATO NA BOMOI

      “Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—Yobo 14:13-15

      Banani bakosekwa?

      • Yoane 5:28, 29

        Baoyo nyonso oyo bazali na makanisi ya Yehova bakozonga na bomoi.

      • Misala 24:15

        Bayengebene mpe bato oyo bazangi boyengebene bakosekwa.

      • Yisaya 40:26

        Yehova ayebi nkombo ya monzoto mokomoko, akoyeba mpe mbala moko likambo mokomoko oyo etali bakufi nyonso oyo akozongisa na bomoi.

      LITEYA 4: BATO MOSUSU BAKOSEKWA MPO NA KOKENDE NA LIKOLÓ

      “Nazali kokende kobongisela bino esika.”​—Yoane 14:2

      Banani bazali kosekwa mpo na kokende na likoló?

      • 1 Petro 3:18

        Yesu nde moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló.

      • Luka 12:32

        Yesu alobaki ete bato moke kaka na kati ya bayekoli na ye bakosekwa mpo na kokende na likoló.

      • Emoniseli 14:1

        Bato nyonso oyo Yehova aponá mpo bákende na likoló bazali 144 000.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto