Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 9 lok. 28-lok. 29 par. 1
  • Nsukansuka babotaki mwana!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsukansuka babotaki mwana!
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Sara “Mama ya Bakonzi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Abalayama ná Sala​—Okoki komekola kondima na bango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Ozali mwasi moko kitoko mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 9 lok. 28-lok. 29 par. 1
Sara na kati ya hema ntango baanzelu bazali kosolola na Abrahama

LITEYA 9

Nsukansuka babotaki mwana!

Abrahama ná Sara baumelaki na libala bambula ebele mpenza. Batikaki ndako na bango ya kitoko na engumba Ure mpe bakómaki kofanda na hema. Kasi Sara azalaki komilelalela te, mpo atyelaki Yehova motema.

Lokola Sara azalaki mpenza na mposa ya mwana, ayebisaki Abrahama ete: ‘Soki mosaleli na ngai Agare aboti na yo mwana, nakoki kozwa ye lokola mwana na ngai.’ Nsima ya mikolo, Agare abotaki mwana mobali. Nkombo na ye ezalaki Yishimaele.

Sara azali na zemi

Bambula ebele na nsima, ntango Abrahama akómaki na mbula 99 mpe Sara na mbula 89, bapaya misato bayaki epai na bango. Abrahama asɛngaki bango bápema na nse ya nzete moko, mpe balyaki elongo. Bapaya yango ezalaki banani? Ezalaki baanzelu! Bayebisaki Abrahama ete: ‘Na ntango lokola oyo, na mbula oyo ekoya, mwasi na yo akobota mwana mobali.’ Sara azalaki koyoka bango na kati ya hema. Asɛkaki na motema mpe alobaki: ‘Ngai nakobota mpenza awa nakómi mobange boye?’

Na mbula oyo elandaki, Sara abotaki mwana mobali, kaka ndenge anzelu ya Yehova alobaki. Abrahama apesaki ye nkombo Yisaka, oyo elimboli “Kosɛka.”

Ntango Yisaka akómaki na mbula soki mitano, Sara amonaki ete Yishimaele azalaki kotyola ye. Sara alingaki kobatela mwana na ye; asololaki na Abrahama mpe asɛngaki ye abengana Agare ná Yishimaele. Na ebandeli, Abrahama alingaki te. Kasi Yehova ayebisaki Abrahama ete: ‘Yokelá Sara. Nakobatela Yishimaele. Kasi nakokokisa mpenza kondimana na ngai nde na nzela ya Yisaka.’

Sara asimbi Yisaka wana Agare ná Yishimaele bazali kokende

“Na kondima mpe, Sara azwaki nguya ya kozwa zemi ya mwana, . . . mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.”​—Baebre 11:11

Mituna: Sara ayokaki baanzelu bazali koyebisa Abrahama nini? Ndenge nini Yehova abatelaki Yisaka?

Ebandeli 16:1-4, 15, 16; 17:25-27; 18:1-15; 21:1-14; Baebre 11:11

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto