Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 39 lok. 96
  • Mokonzi ya liboso na Yisraele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokonzi ya liboso na Yisraele
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mokonzi ya liboso na Yisraele
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Kotosa eleki mbeka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ayikaki mpiko atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaka nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ayikaki mpiko atako makambo ebebaki
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 39 lok. 96
Mokonzi Saulo abendi elamba ya Samwele mpe epasuki

LITEYA 39

Mokonzi ya liboso na Yisraele

Yehova apesaki Bayisraele basambisi mpo bátambwisa bango, kasi bango balingaki bázala na mokonzi. Balobaki na Samwele: ‘Bikólo nyonso oyo ezali penepene na biso ezali na bakonzi. Biso mpe tolingi tózala na mokonzi.’ Samwele amonaki likambo yango mabe mpe abondelaki Yehova mpo na yango. Yehova alobaki na ye: ‘Bato baboyi yo te. Baboyi nde ngai. Yebisá bango ete bakozwa mokonzi, kasi mokonzi yango akosɛnga bango makambo ebele.’ Atako bongo, bato balobaki: ‘Etali biso te. Tolingi mokonzi!’

Yehova ayebisaki Samwele ete Saulo nde akozala mokonzi na bango. Ntango Saulo akendaki kotala Samwele na Rama, Samwele atyaki ye mafuta na motó mpo akóma mokonzi.

Na nsima, Samwele asangisaki Bayisraele nyonso mpo alakisa bango mokonzi na bango ya sika. Kasi, Saulo azalaki komonana te. Mpo na nini? Mpo abombanaki na kati ya biloko. Nsukansuka ntango bamonaki ye, babimisaki ye mpe batɛlɛmisaki ye na katikati ya bato. Azalaki molai koleka bato nyonso mpe azalaki kitoko mingi mpenza. Samwele alobaki: ‘Bótala moto oyo Yehova aponi.’ Bato babelelaki: ‘Mokonzi aumela na bomoi!’

Na ebandeli, mokonzi Saulo azalaki koyokela Samwele mpe kotosa Yehova. Kasi na nsima abongwanaki. Na ndakisa, mokonzi azalaki na ndingisa ya kotumba mbeka te. Mokolo moko, Samwele ayebisaki Saulo azela ye tii akoya, kasi aumelaki mpo na koya. Na yango, Saulo amonaki malamu ye moko atumba mbeka. Samwele asalaki nini ntango ayaki? Ayebisaki ye: ‘Osengelaki te kobuka mobeko ya Yehova.’ Saulo azwaki liteya na libunga oyo asalaki? Te.

Na nsima, ntango Saulo akendaki kobunda na Baamaleke, Samwele ayebisaki ye aboma bato nyonso. Kasi Saulo amonaki malamu atika mokonzi Agage na bomoi. Yehova alobaki na Samwele: ‘Saulo atiki ngai, mpe azali koyokela ngai te.’ Samwele ayokaki mawa mingi, mpe ayebisaki Saulo: ‘Lokola otiki kotosa Yehova, akopona mokonzi mosusu.’ Ntango Samwele abalukaki mpo akende, Saulo akangaki nsɔngɛ ya kazaka na ye mpe epasukaki. Samwele alobaki na Saulo: ‘Yehova abɔtɔli yo bokonzi.’ Yehova akopesa bokonzi yango na moto oyo akolinga ye mpe akotosa ye.

“Kotosa eleki kopesa mbeka.”​—1 Samwele 15:22

Mituna: Bayisraele basɛngaki nini? Mpo na nini Yehova abɔtɔlaki Saulo bokonzi?

1 Samwele 8:1-22; 9:1, 2, 15-17; 10:8, 20-24; 13:1-14; 15:1-35

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto