Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 54 lok. 130-lok. 131 par. 1
  • Yehova amoniselaki Yona motema molai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova amoniselaki Yona motema molai
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Ayekolaki komonisa motema mawa
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekoli koyokela basusu mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mokanda ya Biblia nimero 32—Yona
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yona azwi liteya na motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 54 lok. 130-lok. 131 par. 1
Yona azali kokita na kati ya mbu wana mbisi moko monene ezali koya pene na ye

LITEYA 54

Yehova amoniselaki Yona motema molai

Na Ninive, engumba moko ya Asiri, bato bazalaki kosala makambo ya mabe mpenza. Yehova atindaki mosakoli na ye Yona akende koyebisa bato ya Ninive bátika kosala mabe. Kasi Yona akendaki esika mosusu. Amataki na masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarasisi mpo na kokima mosika mpenza.

Ntango bazalaki na masuwa na kati ya mbu, mopɛpɛ makasi eyaki, mpe bato ya masuwa babangaki. Babondelaki banzambe na bango mpe batunaki: ‘Likambo oyo euti wapi?’ Nsukansuka, Yona ayebisaki bango: ‘Ezali mpo na ngai. Nazali kokima kosala likambo oyo Yehova asɛngaki ngai. Soki bobwaki ngai na mbu, mopɛpɛ yango ekosila.’ Bato ya masuwa yango baboyaki kobwaka Yona na mbu, kasi atyaki bango mbamba. Nsukansuka ntango babwakaki ye na mbu, mopɛpɛ yango esilaki.

Yona akanisaki ete akokufa. Wana azalaki kozinda se kozinda na mbu, abondelaki Yehova. Yehova atindaki mbisi moko ya monene. Emɛlaki Yona, kasi ebomaki ye te. Na kati ya libumu ya mbisi yango, Yona abondelaki mpe alakaki ete: ‘Nakoboya lisusu kotosa yo te.’ Yehova abatelaki Yona na libumu ya mbisi mikolo misato mpe na nsima atindaki mbisi esanza Yona na mokili.

Yona akokende lisusu na Ninive te lokola Yehova abikisaki ye? Akokende. Yehova ayebisaki ye lisusu akende kuna. Na mbala oyo, Yona atosaki. Akendaki kuna mpe ayebisaki bato yango ya mabe ete: ‘Etikali mikolo 40, Ninive ekobebisama.’ Na nsima, likambo moko ya kokamwa esalemaki; bato ya Ninive bayokaki mpe batikaki kosala mabe. Mokonzi ya Ninive ayebisaki bato: ‘Bóbelela Nzambe, mpe bóbongola motema. Mbala mosusu akoboma biso te.’ Ntango Yehova amonaki ete bato yango babongoli motema, abebisaki lisusu Ninive te.

Yona akómi pene ya Ninive

Yona asilikaki mpo Yehova abebisaki engumba yango te. Kanisá naino: Yehova amoniselaki Yona motema molai mpe ayokelaki ye mawa, kasi Yona aboyaki koyokela bato ya Ninive mawa. Akendaki kofanda libándá ya engumba na nse ya nzete moko ya ekutu, akangi elongi. Na nsima, nzete yango ekufaki, mpe Yona asilikaki. Yehova alobaki na ye: ‘Ozali komitungisa mingi mpo na mwa nzete oyo koleka bato ya Ninive. Nayokeli bango mawa, mpe nabomi bango te.’ Alingaki koteya ye nini? Bato ya Ninive bazalaki na ntina mingi koleka ata nzete nini.

“Yehova . . . azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.”​—2 Petro 3:9

Mituna: Liteya nini Yehova apesaki Yona? Likambo oyo ekómelaki Yona ekoki koteya biso nini?

Yona 1:1–4:11

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto