Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 69 lok. 164-lok. 165 par. 2
  • Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Anzelu akei epai ya Maria
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Akumisami liboso ya kobotama na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu akumisami liboso ya kobotama na ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 69 lok. 164-lok. 165 par. 2
Anzelu Gabriele abimeli Maria

LITEYA 69

Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria

Anzelu abimeli Yozefe na ndɔtɔ

Elizabeti azalaki na ndeko moko ya mwasi na nkombo Maria, oyo azalaki naino elenge mpe azalaki kofanda na engumba Nazarete ya Galile. Maria ná Yozefe, mosali-mabaya, bayokanaki bábalana. Ntango Elizabeti azalaki na zemi ya sanza motoba, anzelu Gabriele abimelaki Maria. Alobaki na ye boye: ‘Mbote Maria. Yehova amoniseli yo boboto mingi.’ Kasi Maria akangaki ntina te ya likambo oyo anzelu Gabriele ayebisaki ye. Na nsima, anzelu yango ayebisaki ye: ‘Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu. Akozala mokonzi. Bokonzi na ye ekoumela libela.’

Maria azongisaki: ‘Nayebi mibali te. Ndenge nini nakobota?’ Anzelu Gabriele ayebisaki ye ete: ‘Mpo na Yehova makambo nyonso ekoki kosalema. Elimo santu ekokitela yo, mpe okobota mwana mobali. Kutu ndeko na yo Elizabeti akómi na zemi.’ Na nsima Maria alobaki: ‘Nazali moombo ya Yehova. Tiká makambo esalema kaka ndenge olobi.’

Yozefe abali Maria oyo azali na zemi

Maria akendaki kotala Elizabeti na engumba ya bangomba mike esika azalaki kofanda. Ntango Maria apesaki Elizabeti mbote, Elizabeti ayokaki mwana aningani makasi na libumu na ye. Lokola atondaki na elimo santu, alobaki boye: ‘Maria, Yehova apamboli yo. Nazwi libaku ya koyamba mama ya Nkolo na ngai.’ Maria azongisaki: ‘Nazali kokumisa Yehova na motema na ngai mobimba.’ Maria afandaki epai ya Elizabeti sanza misato, mpe na nsima azongaki epai na ye na Nazarete.

Ntango Yozefe ayokaki ete Maria azali na zemi, alingaki koboya ye. Kasi anzelu moko abimelaki ye na ndɔtɔ mpe alobaki na ye ete: ‘Kobanga kobala ye te. Asali likambo moko ya mabe te.’ Yozefe abalaki Maria, akendaki na ye na ndako na ye.

“Yehova asalaka nyonso oyo asepeli kosala na likoló mpe na mabele.”​—Nzembo 135:6

Mituna: Anzelu Gabriele ayebisaki Maria nini mpo na mwana na ye? Elizabeti ná Maria bayokaki ndenge nini mpo na makambo oyo ekómelaki bango?

Matai 1:18-25; Luka 1:26-56; Yisaya 7:14; 9:7; Danyele 2:44; Bagalatia 4:4

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto