Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 76 lok. 180-lok. 181 par. 2
  • Yesu apɛtoli tempelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu apɛtoli tempelo
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yesu apɛtoli Tempelo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yesu amonisi molende mpo na losambo ya solo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Molende mpo na ndako na Jéhovah
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Apɛtoli lisusu tempelo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 76 lok. 180-lok. 181 par. 2
Yesu asaleli fimbo mpo na kobengana banyama na tempelo mpe abaloli bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo

LITEYA 76

Yesu apɛtoli tempelo

Na eleko ya prɛnta ya mobu 30 ya ntango na biso, Yesu akendaki na Yerusaleme. Bato mingi bayaki na engumba yango mpo na Elekeli. Na fɛti yango, bazalaki kotumba banyama mpo na kopesa mbeka na tempelo. Bato mosusu bazalaki koya na banyama na bango, bato mosusu bazalaki kosomba yango na Yerusaleme.

Ntango Yesu akómaki na tempelo, amonaki bato bazali kotɛka banyama kuna. Bazalaki kosala mombongo wana na ndako ya losambo ya Yehova! Yesu asalaki nini? Asalaki fimbo mpe abenganaki bampate ná bangɔmbɛ na tempelo. Abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe asopaki mbongo na bango ya bibende na mabele. Yesu alobaki na baoyo bazalaki kotɛka bibenga ete: ‘Bólongola biloko oyo awa! Bókómisa ndako ya Tata na ngai esika ya mombongo te!’

Bato oyo bazalaki na tempelo bakamwaki makambo oyo Yesu asalaki. Bayekoli na ye bakanisaki esakweli oyo elobaki mpo na Masiya ete: ‘Nakotonda na molende mpo na ndako ya Yehova.’

Na nsima, na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu apɛtolaki tempelo mpo na mbala ya mibale. Alingaki moto moko te asambwisa ndako ya Tata na ye.

“Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya bomɛngo.”​—Luka 16:13

Mituna: Yesu asalaki nini ntango amonaki bato bazali kotɛka banyama na tempelo? Mpo na nini asalaki bongo?

Matai 21:12, 13; Marko 11:15-17; Luka 19:45, 46; Yoane 2:13-17; Nzembo 69:9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto