Mayele mpo na kosilisa mokakatano
BILENGE mibali misato na Afrika ya Ntei bazalaki na mposa ya kokende na liyangani ya etúká oyo esalemaki na mboka na bango. Longwa na esika bazalaki kofanda tii na esika ya liyangani ezali kilomɛtrɛ 90, banzela ezali malamu te mpe mituka ezalaka te. Ndenge nini bakokaki kokóma kuna? Bazwaki ekateli ya kodefa bavelo misato, kasi bamonaki ata moko te oyo ebongaki mpo na mobembo yango.
Nkulutu moko amonaki mokakatano na bango mpe apesaki bango velo na ye—ezalaki ya kala kasi ezalaki naino malamu. Alimbwelaki bango ndenge oyo ye ná bandeko mosusu bazalaki kosala kala mpo na kokende na liyangani ya etúká. Nkulutu yango ayebisaki bango básalela velo moko bango misato. Likanisi yango ezalaki malamu kasi ezalaki mpasi. Ndenge nini bato misato bakokaki kosalela velo moko?
Lokola moi ezalaka makasi, bandeko yango misato bakutanaki na ntɔngɔntɔngɔ mpe bakangisaki bisaka na bango na velo. Moto ya liboso amataki na velo mpe mibale mosusu bazalaki kolanda na makolo. Nsima ya mɛtrɛ soki 500, elenge oyo azalaki na velo akitaki mpe atikaki velo pembeni ya nzete moko. Atikaki yango na esika oyo bilenge mosusu mibale bazalaki komona yango mpo báyiba yango te. Elenge oyo atikaki velo akobaki mobembo na makolo.
Ntango bilenge mibale bakómaki esika velo ezalaki, moko na bango amataki mpe mosusu akobaki lisusu kotambola na ntaka ya mɛtrɛ 500 tii ntango ngala na ye ekómaki. Lokola bamibongisaki malamu mpe bamityelaki mokano, mokomoko na bango atambolaki ntaka ya kilomɛtrɛ 60 na esika ya kotambola kilomɛtrɛ 90. Milende na bango ezalaki na litomba. Bakutanaki na bandeko na bango baklisto mpe bazalaki na esengo ya kozala na liyangani ya etúká. (Det. 31:12) Na mbula oyo, yo mpe okosala nyonso mpo na kokende na liyangani ya etúká oyo ekosalama na esika ofandi?