Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?
Biyano oyo bato bapesaka:
▪ “Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”
▪ “Yesu azali kaka Nzambe oyo ayaki na nzoto ya mosuni.”
Yesu ateyaki nini?
▪ “Soki bolingaki ngai, bolingaki kosepela na ndenge nazali kokende epai ya Tata, mpamba te Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Yesu alobaki ete Tata na ye aleki ye.
▪ “Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” (Yoane 20:17) Yesu alobaki te ete azali Nzambe, kasi amonisaki ete ye ná Nzambe bazali bato mibale bakeseni.
▪ “Nalobaki na ndenge na ngai moko te, kasi Tata moto atindaki ngai apesaki ngai komandema na oyo etali makambo nasengeli koyebisa mpe oyo nasengeli koloba.” (Yoane 12:49) Makambo oyo Yesu azalaki koteya ezalaki kouta epai na ye moko te, kasi epai ya Tata.
YESU alobaki ete azali Mwana ya Nzambe, kasi te Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Soki Yesu azalaki Nzambe, azalaki kobondela nani ntango azalaki awa na mabelé? (Matai 14:23; 26:26-29) Azalaki nde kokosa ete azali kosolola na moto mosusu?
Ntango bayekoli na ye mibale basɛngaki ye atya bango na esika moko ya lokumu na Bokonzi na ye, Yesu ayanolaki boye: “Kofanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali ya ngai te mpo napesa yango, kasi ezali nde ya baoyo yango ebongisamá mpo na bango na Tata na ngai.” (Matai 20:23) Yesu akosaki bango ntango alobaki ete ye te nde akoki kopesa bango likambo oyo basɛngaki? Te, akosaki te! Kutu, ayebaki ete kaka Nzambe nde akokaki kozwa ekateli ya ndenge wana. Kutu, Yesu amonisaki ete ezali na makambo mosusu oyo ye ná baanzelu bayebi te, kasi kaka Tata nde ayebi yango.—Malako 13:32.
Yesu azalaki na nse ya Nzambe kaka ntango azalaki awa na mabelé? Te. Ata nsima ya lisekwa na ye, Biblia emonisi ete Yesu azalaki kaka na nse ya Nzambe. Ntoma Paulo alobaki ete: “Mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Biblia elobi ete na mikolo ezali koya “ntango biloko nyonso ekosila kotyama na nse na ye, na ntango yango Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”—1 Bakolinti 15:28.
Tomoni polele ete Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Yango wana abengaki Tata na ye “Nzambe na ngai.”—Emoniseli 3:2, 12; 2 Bakolinti 1:3, 4.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 201-204, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Yesu alobaki ete ezali na makambo mosusu oyo ye ná baanzelu bayebaki te, kasi kaka Tata nde ayebaki yango