Kobotama ya sika—Ezali na ntina?
NA LISOLO na ye na Nikodeme, Yesu amonisaki ete kobotama lisusu ezali na ntina mingi. Ndenge nini amonisaki yango?
Talá ndenge Yesu amonisaki ntina ya kobotama lisusu ntango asololaki na Nikodeme. Alobaki boye: “Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Maloba “soki moto abotami lisusu te” mpe “akoki komona bokonzi ya Nzambe te” emonisi ntina ya kobotama lisusu. Tózwa ndakisa moko: Soki moto moko alobi ete, “soki moi ebimi te, ntɔngɔ ekotana te,” moto yango alingi koloba ete ntɔngɔ ekoki kotana kaka soki moi ebimi. Ndenge moko, Yesu alingaki koloba ete mpo na ‘komona Bokonzi ya Nzambe,’ moto asengeli kobotama lisusu.
Mpo na moto oyo akoki kokakatana na likambo yango, Yesu alobaki boye: “Bosengeli kobotama lisusu.” (Yoane 3:7) Na ntembe te, mpo na Yesu moto asengeli kobotama lisusu mpo na “kokɔta na Bokonzi ya Nzambe.”—Yoane 3:5.
Lokola mpo na Yesu kobotama lisusu ezalaki likambo ya ntina mingi, Baklisto basengeli kosala nyonso mpo báyeba likambo yango malamumalamu. Na ndakisa, okanisi ete moklisto ye moko nde akoki kopona kobotama lisusu?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Ntɔngɔ ekoki kotana kaka soki moi ebimi”