Kobotama ya sika—Mokano na yango ezali nini?
BATO mingi bakanisaka ete mpo na kozwa bomoi ya seko, moto asengeli kobotama lisusu. Nzokande, talá oyo Yesu alobaki mpo na mokano ya kobotama lisusu. Alobaki boye: “Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Na yango, moto asengeli kobotama lisusu mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, kasi te mpo na kozwa lobiko. Bato mosusu bakoki kotuna boye: ‘Kasi, maloba yango mibale—kokɔta na Bokonzi mpe kozwa lobiko—ezali kolobela kaka mbano moko te?’ Te, ezali kolobela mbano moko te. Mpo na komona bokeseni yango, tótalela naino ndimbola ya maloba “bokonzi ya Nzambe.”
Bokonzi ezali guvɛrnema. Na yango, maloba “bokonzi ya Nzambe” elimboli “guvɛrnema ya Nzambe.” Biblia eteyaka ete Yesu Klisto, “mwana ya moto,” azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe mpe ete akoyangela elongo na bato mosusu. (Danyele 7:1, 13, 14; Matai 26:63, 64) Lisusu, emonaneli moko oyo ntoma Yoane azwaki emonisaki ete bato oyo bakoyangela elongo na Klisto bakoponama “na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso” mpe “basengeli koyangela mabelé.” (Emoniseli 5:9, 10; 20:6) Liloba ya Nzambe emonisi lisusu ete bato yango bazali “etonga moke,” ya bato 144 000 oyo “basombamaki na mabelé.”—Luka 12:32; Emoniseli 14:1, 3.
Bokonzi ya Nzambe ezali wapi? “Bokonzi ya Nzambe” ebengamaka mpe “bokonzi ya likoló”; yango emonisi ete Yesu ná baninga na ye bakoyangela uta na likoló. (Luka 8:10; Matai 13:11) Na yango, Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló oyo etambwisami na Yesu Klisto mpe mwa etuluku ya bato oyo baponami na mabelé mpo na koyangela elongo na ye.
Kasi, Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete moto asengeli kobotama lisusu mpo na “kokɔta na Bokonzi ya Nzambe”? Alingaki koloba ete moto asengeli kobotama lisusu mpo na koyangela elongo na Klisto na likoló. Yango wana, tokoki koloba ete mokano ya kobotama lisusu ezali ya kobongisa mwa etuluku ya bato mpo bákende koyangela na likoló.
Tosili komona ete kobotama lisusu ezali na ntina mingi, Nzambe nde aponaka ete moto abotama lisusu, mpe yango ezali kobongisa mwa etuluku ya bato mpo bákende koyangela na likoló. Kasi ndenge nini likambo yango esalemaka?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Mokano ya kobotama lisusu ezali ya kobongisa mwa etuluku ya bato mpo bákende koyangela na likoló
[Elilingi na lokasa 7]
Bokonzi ya Nzambe esangisi Yesu Klisto ná baninga na ye oyo baponami awa na mabelé