Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/10 lok. 3
  • Elimo santu—Mpo na nini makanisi ndenge na ndenge?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elimo santu—Mpo na nini makanisi ndenge na ndenge?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Elimo santu: bokasi na Nzambe bokosalaka mosala
    Osengeli kondima Trinité?
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/10 lok. 3

Elimo santu​—Mpo na nini makanisi ndenge na ndenge?

ELIMO SANTU ezali nini? Motuna yango ekoki komonana pɛtɛɛ, kasi koyanola yango na maloba ya mindɔndɔ te ezali pɛtɛɛ te. Pápa Bénoît XVI alobaki liboso ya ebele ya bato na Australie boye: “Ezali mpenza mpasi tóyeba soki elimo santu ezali nini.”

Ya solo, na motuna: Elimo santu ezali nini? Bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge, mpe mingi bayebaka te bápesa eyano nini. Talá mwa biyano oyo bamosusu bapesaka:

• Elimo santu ezali mpenza moto ya solo oyo azalaka na kati ya bayekoli ya Kristo.

• Elimo santu ezali nguya oyo emonisaka ete Nzambe azali kosala mosala na mokili.

• Elimo santu ezali persona ya misato na kati ya Bosato.

Mpo na nini makanisi ndenge na ndenge? Yango ebandá kala, na ekeke ya minei ya ntango na biso, ntango bato mosusu ya teoloji balobaki ete elimo santu ezali moto oyo akokani na Nzambe. Nzokande, likanisi yango eutaki na Makomami te mpe bayekoli ya liboso ya Kristo bateyaki likambo yango te. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Emonani polele ete Testamá ya kala elobi te ete elimo ya Nzambe ezali moto . . . Elimo ya Nzambe ezali kaka nguya ya Nzambe.” Buku yango ebakisi boye: “Mikanda mingi ya Testamá ya sika elobeli elimo ya Nzambe lokola eloko, kasi te lokola moto; yango emonani mingimingi ntango ezali kolobela boyokani oyo ezali kati na elimo mpe nguya ya Nzambe.”

Yango wana, ezali mpasi mpo bato bákanisa ete nguya ezali moto. Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema na États-Unis emonisi ete bato mingi baboyaka kondima ete elimo santu ezali moto to “eloko moko oyo ezali na bomoi.” Bazali na elonga? To tosengeli nde kondimela bato ya teoloji oyo balobaka ete “elimo santu ezali mpenza Persona ndenge moko na Tata mpe Mwana”?

Mpo na kozwa eyano oyo ebongi, tosengeli kotalela Liloba ya Nzambe, Biblia, oyo elobeli malamumalamu elimo santu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela.”​—2 Timote 3:16.

Mpo na nini osengeli koluka koyeba solo na ntina na elimo santu? Mpo yango ekopesa yo nzela ya kozwa lisalisi ya Nzambe. Ekómaka oyoka ete osili makasi mpe okokoka lisusu te? Yesu alakaki bayekoli na ye boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino . . . Soki bino . . . boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?”​—Luka 11:9, 13.

Na masolo oyo elandi, tokotalela Makomami mpo na koyeba soki elimo santu ezali nini. Mpe tokomona ndenge oyo ekoki komemela biso matomba na bomoi.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

Makomami emonisi biso soki elimo santu ezali nini

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto