Oyebaki yango?
Nani azalaki “kapitɛni ya tempelo,” mpe mokumba na ye ezalaki nini?
“Kapitɛni ya tempelo” azalaki na kati ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo bakangaki Petro ná Yoane ntango bazalaki koteya. (Misala 4:1-3) Biblia eyebisi te mikumba oyo azalaki na yango na tempelo, kasi mikanda mosusu ya masolo ya kala eyebisi makambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso tóyeba.
Emonani ete na ntango ya Yesu, mokumba wana ezalaki ya nganga-nzambe oyo azalaki na nsima ya nganga-nzambe monene. Kapitɛni ya tempelo azalaki kotya makambo na molɔngɔ na libándá mpe na kati ya tempelo na Yerusaleme. Azalaki kokamba makambo ya losambo ata mpe bato oyo bazalaki kokɛngɛla tempelo. Azalaki kokamba bakapitɛni oyo balandi ye, kokɛngɛla bato oyo bazalaki kofungola baporte ya tempelo na ntɔngɔ mpe kokanga yango na butu, kosɛnzɛla ete moto moko te akɔta na bisika oyo epekisami, mpe kobatela kɛsi ya makabo ya tempelo.
Banganga-nzambe mpe Balevi oyo bazalaki kosala na tempelo babongisamaki na bituluku 24, oyo etuluku mokomoko ezalaki kosala na boumeli ya pɔsɔ moko, mbala mibale na mbula. Etuluku mokomoko ezalaki na kapitɛni na yango.—1 Ntango 24:1-18.
Bakapitɛni yango ya tempelo bazalaki bato ya lokumu. Biblia etángi bango esika moko na banganga-nzambe bakonzi oyo basalaki mwango mpo na koboma Yesu, mpe basalelaki bato oyo bazalaki na nse na bango mpo na kokanga Yesu.—Luka 22:4, 52.
Matai 3:4 elobi ete Yoane Mobatisi azalaki kolya “mayoyo ná mafuta ya nzoi ya zamba.” Bato bazalaki kolya mayoyo na ntango wana?
Bato mosusu bandimaka te ete Yoane azalaki mpenza kolya banyama-nkɛkɛ, balobaka ete Matai azalaki kolobela misisa ya nzete, mbuma ya zamba, to mpe lolenge moko boye ya mbisi. Nzokande, liloba ya Grɛki oyo Matai asaleli emonisi lolenge moko boye ya mayoyo oyo eyebani lelo na nkombo Acrididés. Mayoyo ya esobe oyo eyebanaki ete ezalaki mpenza kobebisa milona, nde ezalaki mingi na Yisraele.—Yoele 1:4, 7; Nahumu 3:15.
Na ntango ya kala, mayoyo ezalaki bilei kitoko mpo na bato ya Asiri mpe ya Etiopi mpe ata lelo oyo Baarabe oyo babengaka ba Bédouins mpe Bayuda ya Yemen basepelaka na yango mingi. Na Yisraele, mayoyo ezalaki bilei ya babola. Nsima ya kolongola motó, makolo, mpe libumu, bazalaki kolya ntolo na yango ya mobesu, ya kotumba, to mpe nsima ya kokausa yango na moi. Ntango mosusu, bazalaki kotya yango mungwa to kotya yango mwa vinɛgrɛ to mafuta ya nzoi. Henri Daniel-Rops, moto moko ya mayele na masolo ya kala alobi ete ezalaki na elɛngi lokola crevette.
Lokola Yoane azalaki koteya na esobe, azalaki na likoki ya kokanga mayoyo. (Marko 1:4) Lokola ezalaka na vitamini mingi (75 %), mayoyo oyo basangisi na mafuta ya nzoi ezalaki mpenza bilei malamu mpo na nzoto.
[Elilingi na lokasa 28]
Basali ya Asiri bamemi mayoyo mpe bambuma ya grenade
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku Discoveries Among the Ruins of Nineveh and Babylon (1853)