-
Liteya 1: Molimo ekufaka teLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Novembre
-
-
Liteya 1: Molimo ekufaka te
Liteya yango eutá wapi?
“Bakristo ya liboso oyo bazalaki bato ya filozofi bakómaki kokanisa lokola Bagrɛki ete molimo ekufaka te mpe ete Nzambe asalaki molimo mpe akɔtisaki yango na nzoto ya moto ntango asalaki ye.”—The New Encyclopædia Britannica (1988), Volimi 11, lokasa 25.
Biblia elobi nini?
“Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.”—Ezekiele 18:4, haut fleuve.
Mpo na kozalisama ya moto ya liboso, Biblia elobi boye: “Mpe Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo [na Ebre, nèphèsh] ya bomoi.”—Ebandeli 2:7.
Liloba ya Ebre nèphèsh oyo ebongolami na “molimo” elimboli ‘ekelamu oyo ezali na mpema.’ Ntango Nzambe asalaki moto ya liboso Adama, akɔtisaki te molimo oyo ekufaka te na nzoto na ye, atyaki nde nguya ya bomoi oyo ebatelami na mpema. Na yango, na Biblia, “molimo” ezali ekelamu mobimba oyo ezali na bomoi. Soki nguya wana ya bomoi oyo Nzambe atyaki ezali lisusu te, molimo ekufi.—Ebandeli 3:19; Ezekiele 18:20.
Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebimisaki mituna oyo: Milimo ekendaka wapi nsima ya liwa? Nini ekómelaka milimo ya bato mabe? Ntango bakristo wana ya nkombo mpamba bandimaki liteya ya lokuta oyo elobaka ete molimo ekufaka te, yango ememaki bango na kondima liteya mosusu ya lokuta—liteya ya lifelo ya mɔtɔ.
Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Mosakoli 3:19; Matai 10:28; Misala 3:23
LIKAMBO YA SOLO:
Soki moto akufi, azalaka lisusu na bomoi te
-
-
Liteya 2: Bato mabe banyokwamaka na lifeloLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Novembre
-
-
Liteya 2: Bato mabe banyokwamaka na lifelo
Liteya yango eutá wapi?
“Na bato nyonso ya filozofi ya Bagrɛki, moto oyo abendaki bato mingi bándima liteya ya lifelo ezalaki Platon.”—Histoire des enfers (Lisolo ya lifelo), ya Georges Minois, lokasa 50.
“Kobanda na katikati ya ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), bakristo oyo bayekolaki filozofi ya Bagrɛki bakómaki komona ete basengeli kolobela bindimeli na bango na kolanda makanisi ya bato ya filozofi . . . Makanisi ya filozofi oyo bazalaki kosepela na yango mingi ezalaki oyo ya Platon.”—The New Encyclopædia Britannica (1988), Volimi 25, lokasa 890.
“Lingomba ekómaki koteya ete lifelo ezali solo mpe ekotikala libela. Nsima ya liwa, milimo ya bato oyo bakufi na masumu minene ekendaka mbala moko na lifelo, esika enyokwamaka na bitumbu ya lifelo, ‘mɔtɔ ya seko.’ Etumbu eleki monene ya lifelo ezali kokabwana na Nzambe mpo na libela.”—Catechism of the Catholic Church, ebimeli ya 1994, lokasa 270.
Biblia elobi nini?
“Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te, . . . mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda [to Sheole], esika ozali kokende.”—Mosakoli 9:5, 10.
Liloba ya Ebre Sheol oyo ebongolami na Nkunda, oyo esalelamaka mpo na kolobela “esika ya bakufi,” ebongolami na “lifelo” na Babiblia mosusu. Mokapo wana ya Mosakoli emonisi nini mpo na bakufi? Banyokwamaka na kati ya Sheole mpo na kofuta masumu na bango? Te, mpo “bayebi ata eloko moko te.” Yango wana, ntango Yobo azalaki konyokwama mpo na maladi makasi oyo ebɛtaki ye, abondelaki Nzambe boye: “Batelá ngai na lifelo [na Ebre Sheol].” (Yobo 14:13; Douay-Rheims Version) Libondeli na ye elingaki kolimbola nini soki Sheole ezalaki esika ya minyoko ya seko? Na Biblia, lifelo elimboli kaka nkunda ya bato nyonso, esika oyo ata mosala moko te esalemaka.
Omoni te ete ndimbola wana ya lifelo ebongi mpenza mpe eyokani na Makomami? Lisumu nini mpenza moto akoki kosala oyo ekoki kotinda Nzambe ya bolingo anyokola ye libela na libela? (1 Yoane 4:8) Kasi, soki liteya ya lifelo ezali lokuta, bongo liteya ya kokende na lola?
Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Nzembo 146:3, 4; Misala 2:25-27; Baroma 6:7, 23
LIKAMBO YA SOLO:
Nzambe apesaka bato etumbu ya lifelo te
-
-
Liteya 3: Bato nyonso ya malamu bakendaka na lolaLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Novembre
-
-
Liteya 3: Bato nyonso ya malamu bakendaka na lola
Liteya yango eutá wapi?
Nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu, na ebandeli ya ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), Batata ya Lingomba bakómaki na lokumu mingi. Mpo na mateya na bango, buku moko elobi boye: “Mateya na bango ezalaki mingimingi komonisa ete nsima ya liwa soki kaka molimo epɛtolami ndenge esengeli, ekɔtaka mbala moko na bisengo ya lola.”—New Catholic Encyclopedia (2003), Volimi 6, lokasa 687.
Biblia elobi nini?
“Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.”—Matai 5:5.
Atako Yesu alakaki bayekoli na ye ete ‘akobongisela bango esika’ na likoló, amonisaki ete bato nyonso te ya malamu nde bakendaka likoló. (Yoane 3:13; 14:2, 3) Abondelaki te ete mokano ya Nzambe esalema “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele”? (Matai 6:9, 10) Ya solo, bato mosusu ya sembo bakokende likoló mpe bamosusu bakotikala awa na mabele. Bato moke kaka nde bakoyangela ná Kristo na likoló, kasi bato mingi bakozala na bomoi ya seko awa na mabele.—Emoniseli 5:10.
Nsima ya bambula, lingomba ya ebandeli ebongolaki ndenge ya kotalela mosala oyo ezalaki na yango awa na mabele. Yango esalaki nini? Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Lingomba ekómaki mokemoke kozwa esika ya Bokonzi ya Nzambe oyo esengelaki koya.” Lingomba ekómaki koluka kosangana na politiki mpo ezwa nguya mingi koleka; babosanaki ete Yesu alobaki polele ete bayekoli na ye basengeli kozala “bato ya mokili te.” (Yoane 15:19; 17:14-16; 18:36) Na boyangeli ya Constantin, oyo azalaki amperɛrɛ ya Roma, lingomba ebebisaki bindimeli na yango mosusu, moko na yango etalelaki Nzambe ye moko.
Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Nzembo 37:10, 11, 29; Yoane 17:3; 2 Timote 2:11, 12
LIKAMBO YA SOLO:
Bato mingi ya malamu bakozala nde na bomoi ya seko awa na mabele, kasi na lola te
-
-
Liteya 4: Nzambe azali BosatoLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Novembre
-
-
Liteya 4: Nzambe azali Bosato
Liteya yango eutá wapi?
“Nsima ya kotalela likambo yango, emonani lokola ete liteya ya Bosato ebimaki na nsuka ya ekeke ya minei. Mpe ekoki kozala bongo . . . Liboso ya nsuka ya ekeke ya minei, maloba ‘Nzambe moko na bapersona misato’ ezwaki naino misisa te, mpe ekɔtaki naino malamumalamu te na bomoi ya bakristo mpe na bindimeli na bango.”—New Catholic Encyclopedia (1967), Volimi 14, lokasa 299.
“Likita monene oyo babengi concile de Nicée esalemaki na mokolo ya 20 Mai 325 [ya ntango na biso (T.B.)]. Constantin ye moko akambaki likita yango, atambwisaki masolo, mpe ye moko apesaki likanisi . . . mpo na ndenge ya kolobela esika ya Kristo liboso ya Nzambe na bindimeli ya lingomba oyo esengelaki kondimama na likita yango, ete ‘Mwana azali kaka ndenge moko na Tata.’ . . . Lokola baepiskɔpɔ babangaki amperɛrɛ, bango nyonso, longola kaka mibale, batyaki sinyatire na mokanda yango; mingi kati na bango basalaki yango atako bandimaki makanisi yango te.”—Encyclopædia Britannica (1970), Volimi 6, lokasa 386.
Biblia elobi nini?
Stefano “atóndí na Elímo Sántu, atálí epái ya likoló mpé amóní nkémbo ya Nzámbe, ná mpé Yézu atélémí o lobóko la mobáli la Nzámbe. Alobí: ‘A! Namóní likoló lifungwámí mpé Mwána wa Moto atélémi o lobóko la mobáli la Nzámbe.’”—Bikela (Misala) 7:55, 56, Biblia Liloba lya Nzambe.
Emonaneli wana emonisi nini? Ntango Stefano atondaki na nguya ya Nzambe, amonaki Yesu “atélémí o lobóko la mobáli la Nzámbe.” Na yango, emonani polele ete Yesu akómaki Nzambe te ntango azongaki na likoló nsima ya lisekwa na ye, kasi azalaki nde ekelamu ya elimo oyo akeseni na Nzambe. Lisolo yango elobi mpe te ete moto ya misato azalaki pembeni ya Nzambe. Atako bato basali milende mpo na koluka bavɛrsɛ oyo ekolongisa liteya ya Bosato, Marie-Émile Boismard, sango moko (dominicain) akomaki na buku na ye (À l’aube du christianisme—La naissance des dogmes) ete: “Maloba oyo elobi ete ezali na bapersona misato na Nzambe moko . . . ezali ata na esika moko te na Boyokani ya Sika.”
Constantin abimisaki liteya wana mpo na kosilisa bokabwani oyo ezalaki na Lingomba na ekeke ya minei. Nzokande, liteya yango ebimisaki nde motuna mosusu: Maria, mwasi oyo abotaki Yesu, azalaki nde “Mama ya Nzambe”?
Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Matai 26:39; Yoane 14:28; 1 Bakorinti 15:27, 28; Bakolose 1:15, 16
LIKAMBO YA SOLO:
Liteya ya Bosato ebimaki na nsuka ya ekeke ya minei
-