Sepelá na esika na yo na lisangá
“Nzambe atye binama na nzoto yango, mokomoko na yango, ndenge asepelaki.”—1 KO. 12:18.
1, 2. (a) Nini emonisi ete moto nyonso akoki kozwa esika na lisangá mpe kosepela na yango? (b) Mituna nini tokolobela na lisolo oyo?
BANDÁ na Yisraele ya kala, Yehova azalaki kosalela lisangá mpo na koleisa basaleli na ye na elimo mpe kokamba bango. Na ndakisa, nsima ya kolonga engumba Ai, Yosua “atángaki na mongongo makasi maloba nyonso ya mobeko, lipamboli mpe elakeli mabe, na kolanda nyonso oyo ekomami na buku ya mobeko . . . liboso ya lisangá mobimba ya Yisraele.”—Yos. 8:34, 35.
2 Na ekeke ya liboso T.B., ntoma Paulo ayebisaki Timote, oyo azalaki nkulutu ete lisangá ya bokristo ezali “ndako ya Nzambe” mpe “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Tim. 3:15) Lelo oyo, “ndako” ya Nzambe ezali libota ya bakristo ya solo na mokili mobimba. Na mokapo 12 ya mokanda na ye epai ya Bakorinti, Paulo akokanisaki lisangá na nzoto ya moto. Alobaki ete atako enama mokomoko ezali na mosala na yango, nyonso ezali na ntina. Akomaki boye: “Nzambe atye binama na nzoto yango, mokomoko na yango, ndenge asepelaki.” Kutu, amonisaki ete “biteni ya nzoto oyo tomonaka ete ezali ya lokumu moke, tolatisaka yango lokumu mingi koleka.” (1 Ko. 12:18, 23) Yango wana, tokoki koloba te ete mokumba ya mokristo moko ya sembo eleki ya mokristo mosusu na malamu to na mabe. Mikumba yango ekeseni kaka. Kasi, ndenge nini tokoki kozwa esika na kati ya ebongiseli ya Nzambe mpe kobatela to kosepela na yango? Makambo nini ekoki kosala ete tóbatela esika yango? Mpe ndenge nini tokoki kosala ete ‘bato nyonso bámona polele ete tozali kokende liboso’?—1 Tim. 4:15.
Tósepela na esika na biso—Ndenge nini?
3. Wapi lolenge moko oyo tokoki kozwa esika na lisangá mpe komonisa ete tosepelaka na yango?
3 Lolenge moko oyo tokoki kozwa esika na lisangá mpe komonisa ete tozali kosepela na yango ezali ya kosala na bomoko mpenza na “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe elongo na momonisi na ye, Lisangani ya Mikóló-Bakambi. (Tángá Matai 24:45-47.) Tosengeli komituna soki tolandaka litambwisi ya moombo ya sembo. Na ndakisa, eleki mwa bambula, tozwaki malako na oyo etali molato mpe monzɛlɛ, kominanola, mpe ndenge ya kosalela Internet. Tolandaka mpenza toli yango mpo elimo na biso ebeba te? Ezali boni mpo na toli ya kozala na programɛ ya losambo na libota? Tozwi toli yango na lisɛki te mpe tobongisi mpokwa moko mpo na likambo yango? Soki ozali monzemba, ozwaka ntango mpo na koyekola Makomami? Yehova akopambola mokomoko na biso to mpe mabota na biso soki tozali kolanda malako ya moombo ya sembo.
4. Makambo nini tosengeli kotalela ntango tozali kozwa bikateli na makambo oyo etali moto ye moko?
4 Bamosusu bakoki kokanisa ete kominanola, molato mpe monzɛlɛ ezali makambo oyo etali moto ye moko. Nzokande, mokristo oyo amipesá na Nzambe mpe azali kosepela na esika na ye na lisangá, ntango alingi kozwa ekateli na likambo moko alandaka kaka te oyo motema na ye elingi. Atalelaka libosoliboso likanisi ya Yehova ndenge emonisami na Biblia, Liloba na ye. Nsango na yango esengeli kozala ‘mwinda na makolo na biso, mpe pole na nzela na biso.’ (Nz. 119:105) Ekozala mpe malamu tótalela makambo oyo bikateli na biso ekoki kosala na mosala na biso ya kosakola mpe epai ya bato mosusu, ezala na libándá to na kati ya lisangá.—Tángá 2 Bakorinti 6:3, 4.
5. Mpo na nini tosengeli kokeba na elimo ya lipanda?
5 “Elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi” epalangani lelo oyo lokola mopɛpɛ. (Ef. 2:2) Elimo yango ekoki kotinda biso tókanisa ete tozali na mposa te ya litambwisi ya ebongiseli ya Yehova. Na ntembe te, tokolinga te kokokana na Diotrefese, oyo ‘azalaki koyamba na limemya ata eloko moko te oyo euti epai ya ntoma Yoane.’ (3 Yoa. 9, 10) Tosengeli kokeba na elimo ya lipanda. Ezala na maloba to na misala, tókeba ete tózanga limemya te na nzela oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa biso. (Mit. 16:1-3) Kutu, tosengeli nde kosepela na libaku oyo tozali na yango ya kosala elongo na moombo ya sembo. Tosengeli mpe kosala makasi ete tózanga limemya te epai ya baoyo bazali kokamba biso na lisangá!—Tángá Baebre 13:7, 17.
6. Mpo na nini tosengeli kotalela makambo ya bomoi na biso?
6 Lolenge mosusu ya komonisa ete tosepelaka na esika na biso na lisangá ezali ya kotalela lisusu makambo ya bomoi na biso mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na ‘kokumisa mosala na biso’ mpe kopesa Yehova nkembo. (Rom. 11:13) Bamosusu bazali na likoki ya kozala babongisi-nzela ya sanza na sanza. Bandeko mosusu bamipesá na mosala ya misionɛrɛ, ya mokɛngɛli ya zongazonga, mpe na mosala ya Betele. Bandeko mingi bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Batatoli ya Yehova mingi basalaka makasi mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya mabota na bango mpe bamipesaka na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ. (Tángá Bakolose 3:23, 24.) Tokoki kondima ete ntango tozali komipesa na mosala ya Nzambe mpe tozali kosala nyonso mpo na kosalela ye na molimo na biso mobimba, tokozala ntango nyonso na esika na ebongiseli na ye.
Makambo oyo ekesenisaka biso
7. Limbolá ndenge oyo makambo ya bomoi na biso etaleli mpe esika na biso na lisangá.
7 Ezali na ntina tótalela makambo ya bomoi na biso mpo, tokoki koloba ete esika na biso na lisangá etaleli mpe makambo oyo tozali na likoki ya kosala. Na ndakisa, esika ya ndeko mobali na lisangá ekeseni na oyo ya ndeko mwasi. Mbula, kolɔngɔnɔ ya nzoto, mpe makambo mosusu ekoki kosala ete tósala mingi to te na mosala ya Yehova. Masese 20:29, elobi boye: “Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango, mpe nkembo ya mibange ezali nsuki mpɛmbɛ na bango.” Na ndakisa, bilenge bakoki kosala mingi mpo bazali na makasi na nzoto, nzokande mibange bakoki kosalisa lisangá na bwanya oyo bazwi na ndenge balekisi bambula mingi na lisangá. Tosengeli mpe kobosana te ete likambo nyonso oyo tokoki kosala na ebongiseli ya Yehova, tokosala yango kaka mpo na boboto monene ya Nzambe.—Mis. 14:26; Rom. 12:6-8.
8. Bamposa na biso ekoki kosala nini na makambo oyo tosalaka na lisangá?
8 Ndakisa ya bandeko basi mibale ya libota moko emonisi likambo mosusu oyo emonisaka esika oyo tokoki kozala na yango na lisangá. Bango nyonso mibale basilisaki kelasi ya ntei. Makambo ya bomoi na bango ezalaki ndenge moko. Baboti na bango basalaki nyonso mpo na kolendisa bango mibale básala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza nsima ya kosilisa kelasi. Ntango basilisaki kelasi, moko abandaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe mosusu amipesaki na mosala ya mosuni. Nini ekesenisaki bango? Bamposa na bango. Na nsuka ya kelasi, mokomoko asalaki likambo oyo alingaki. Ezali bongo te mpo na mokomoko na biso? Tosengeli kokanisa malamumalamu na makambo oyo tolingi kosala na mosala ya Nzambe. Tokoki nde kosala lisusu mingi na mosala yango, ata soki ekosɛnga ete tóbongola makambo mosusu ya bomoi na biso?—2 Ko. 9:7.
9, 10. Tosengeli kosala nini soki tozali na mposa te ya kosala mingi na mosala ya Yehova?
9 Kasi, ezali boni soki tozali na mposa te ya kosala mingi na mosala ya Yehova mpe tolingi kosala kaka moke na lisangá? Na mokanda na ye epai ya Bafilipi, Paulo alobaki boye: “Nzambe nde moto oyo, ndenge asepeli kosala, azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.” Ya solo, Yehova akoki kosala na kati na biso mpe kopesa biso mposa ya kosala.—Flp. 2:13; 4:13.
10 Na yango, tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso tólinga kosala mokano na ye. Mokonzi Davidi asalaki yango. Abondelaki boye: “Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova; teyá ngai banzela na yo. Tambwisá ngai na solo na yo mpe teyá ngai, mpo yo ozali Nzambe ya lobiko na ngai. Natyeli yo elikya mokolo mobimba.” (Nz. 25:4, 5) Biso mpe tokoki kosala bongo, soki tobondeli Yehova asalisa biso tósala makambo oyo esepelisaka ye. Soki tokanisi ndenge Yehova Nzambe ná Mwana na ye batalelaka makambo oyo tosalaka mpo na bango, tozalaka na botɔndi na mitema na biso. (Mat. 26:6-10; Luka 21:1-4) Botɔndi yango ekoki kotinda biso tósɛnga Yehova asalisa biso tózala na mposa ya kosala mingi na mosala na ye. Mosakoli Yisaya apesaki ndakisa mpo na elimo oyo tosengeli komonisa. Ntango ayokaki Yehova atuni: “Nakotinda nani, mpe nani akokende mpo na biso?” Alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.”—Yis. 6:8.
Kokola na elimo—Ndenge nini?
11. (a) Nini emonisi ete lisangá ezali na mposa makasi ya bandeko mibali mpo na kozwa mikumba? (b) Ndenge nini ndeko mobali akoki kozwa mikumba?
11 Na kotalela bato 289 678 oyo bazwaki batisimo na mokili mobimba na boumeli ya mobu ya mosala 2008, emonani polele ete lisangá ezali na mposa makasi ya bandeko mibali mpo na kokamba yango. Ndenge nini ndeko mobali akoki kozwa mokumba yango? Asengeli kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami mpo na basaleli na misala mpe bankulutu ndenge Makomami emonisi yango. (1 Tim. 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9) Ndenge nini ndeko mobali akoki kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami yango ya Makomami? Asengeli komipesa na mosala ya kosakola, kokokisa malamu mikumba oyo lisangá ezali kopesa ye, kosala makasi mpo na kobongisa lolenge na ye ya kopesa biyano na makita mpe komibanzabanza mpo na bandeko na lisangá. Na ndenge yango, akomonisa ete azali kozwa na motuya esika na ye na lisangá.
12. Ndenge nini bilenge bakoki komonisa molende na bango mpo na solo?
12 Bandeko mibali oyo bazali bilenge, mingimingi oyo bakokisi naino mbula 20 te, basengeli kosala nini mpo na komonisa ete bazali kokola na lisangá? Bakoki kosala milende bátonda na ‘boyebi ya solosolo mpe bososoli ya elimo’ ntango bazali kozwa boyebi ya Makomami. (Kol. 1:9) Kozala moyekoli ya solosolo ya Liloba ya Nzambe, koyangana mpe kopesa biyano na makita ekoki kosalisa. Bilenge mibali bakoki mpe kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami ya kokɔta na “porte monene, oyo ezali kopesa nzela na mosala,” na maloba mosusu, kokɔta na lolenge ndenge na ndenge ya mosala ya ntango nyonso. (1 Ko. 16:9) Komipesa mobimba na mosala ya Yehova ezali bomoi ya esengo mpe ekoki komemela yo mapamboli mingi.—Tángá Mosakoli 12:1.
13, 14. Ndenge nini bandeko basi bakoki komonisa ete batalelaka na motuya esika na bango na kati ya lisangá?
13 Bandeko basi mpe bakoki komonisa ete bapesaka motuya na libaku oyo bazali na yango ya kokokisa maloba ya Nzembo 68:11. Tozali kotánga boye: “Yehova ye moko azali kobimisa liloba; basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.” Lolenge moko oyo bandeko basi bakoki komonisa botɔndi mpo na esika na bango na kati ya lisangá ezali ya komipesa na mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Yango wana, soki bazali komipesa na mosala ya kosakola mpe bazali komipimela makambo mosusu mpo na mosala yango, bandeko basi bakomonisa ete basepelaka na esika na bango na lisangá.
14 Ntango akomelaki Tito, Paulo alobaki boye: “Mibange basi mpe bázala na etamboli ya kobanga Nzambe, . . . bateyi ya makambo malamu; mpo básalisa bilenge basi bázongela makanisi malamu mpo bálinga mibali na bango, bálinga bana na bango, bázala na makanisi malamu, bázala pɛto, basali misala na ndako, bato malamu, oyo bamikitisaka liboso ya mibali na bango, mpo liloba ya Nzambe efingama te.” (Tito 2:3-5) Bandeko basi oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kopesa ndakisa malamu na lisangá! Ntango bazali komemya bandeko oyo bazali kokamba lisangá mpe ntango bazali kozwa bikateli ya malamu na makambo etali molato, monzɛlɛ, kominanola, bapesaka ndakisa malamu mpo na basusu mpe bamonisaka ete batalelaka mpenza na motuya esika na bango na kati ya lisangá.
15. Ndeko mwasi oyo azali monzemba akoki kosala nini mpo alonga makanisi ya komiyoka ete azali ye moko?
15 Ntango mosusu, ekoki kozala mpasi ndeko mwasi oyo azali monzemba amona ete azali na esika na lisangá. Ndeko mwasi moko oyo azalaki kokanisa bongo, alobaki boye: “Ntango mosusu, bonzemba ekoki kosala ete omiyoka ete ozali yo moko mpenza.” Ntango batunaki ye ndenge nini ayikaka mpiko na likambo yango, alobaki boye: “Libondeli mpe koyekola esalisaka ngai namona esika na ngai. Nayekolaka ndenge oyo Yehova atalelaka ngai. Na nsima, nasalaka nyonso mpo na kosalisa bandeko mosusu na lisangá. Yango esalisaka ngai nalukaka kaka matomba na ngai moko te, kasi mpe ya basusu.” Na Nzembo 32:8, Yehova alobaki na Davidi boye: “Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.” Ya solo, Yehova amibanzabanzaka mpo na mosaleli na ye mokomoko, ata mpe bandeko basi oyo bazali minzemba, mpe akosalisa biso nyonso tómona esika na biso na lisangá.
Batelá esika na yo!
16, 17. (a) Mpo na nini kondima libaku oyo Yehova apesi biso ya kozala na kati ya ebongiseli na ye ezali ekateli ya malamu koleka? (b) Ndenge nini tokoki kobatela esika na biso na ebongiseli ya Yehova?
16 Na bolingo nyonso, Yehova abendi mokomoko na biso epai na ye. Yesu alobaki boye: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoa. 6:44) Na kati ya bamiliare ya bato oyo bazali awa na mabele, Yehova apesi biso libaku ya kozala na kati ya lisangá na ye. Ndenge tondimaki libaku yango, tozwaki ekateli ya malamu koleka. Epesi ntina na bomoi na biso. Mpe tozali na esengo na ndenge tozali na esika na kati ya lisangá!
17 Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Yehova, nalingi esika ndako na yo efandi.” Abakisaki boye: “Lokolo na ngai ekotɛlɛma mpenza na esika ya patatalu; na kati ya ebele ya bato oyo bayangani, nakopambola Yehova.” (Nz. 26:8, 12) Nzambe ya solo abongisi esika mpo na mokomoko na biso na kati ya ebongiseli na ye. Soki tokobi kolanda litambwisi ya teokrasi mpe tozali na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe, tokobatela esika na biso na kati ya ebongiseli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini ebongi mpenza tóloba ete bandeko nyonso bazali na esika na kati ya lisangá?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na esika na biso na ebongiseli ya Nzambe?
• Makambo nini ekoki kosala ete tóbatela esika na biso na lisangá?
• Ndenge nini bilenge mpe mikóló bakoki komonisa ete bazwaka na motuya esika na bango na ebongiseli ya Nzambe?
[Bililingi na lokasa 16]
Ndenge nini bandeko mibali bakoki kozwa mikumba na lisangá?
[Elilingi na lokasa 17]
Ndenge nini bandeko basi bakoki komonisa ete bazwaka na motuya esika na bango na lisangá?