Mwana moko amonisi elimo ya kokaba
ELEKI mwa mikolo, na Brésil, mwana moko ya mwasi ya mbula libwa akabolaki mbongo oyo abombaki—dolare 18 mpe dolare 25. Atyaki dolare 18 na kɛsi ya makabo na Ndako ya Bokonzi mpo na bamposa ya lisangá na bango. Na nsima, atindaki dolare 25 na biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango; akomaki mpe mwa mokanda. Alobaki boye: “Nasepeli kopesa likabo oyo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Mposa na ngai ezali ya kosalisa bandeko na mokili mobimba básakola nsango malamu. Napesi yango na bolingo nyonso mpo na bandeko mpe mpo na Yehova.”
Baboti ya mwana yango bateyaki ye ntina ya kosala nyonso oyo akoki mpo na kosimba mosala ya kosakola Bokonzi. Bakɔtisaki mpe na motema na ye mposa ya ‘kokumisa Yehova na biloko na ye ya motuya.’ (Mas. 3:9) Na ndakisa ya mwana yango, tiká ete biso nyonso tómipesa mpenza mpo na kosimba matomba ya Bokonzi ezala na mboka na biso to na mokili mobimba!