Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/6 nk. 16-17
  • “Mpo na nini moto nyonso asengeli kotɛlɛma awa?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mpo na nini moto nyonso asengeli kotɛlɛma awa?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/6 nk. 16-17

Mokanda euti na Afrika ya Sudi

“Mpo na nini moto nyonso asengeli kotɛlɛma awa?”

PEMBENI ya mwa nzela moko ya ekólo, batyá elembo moko ya kokebisa oyo elobi boye: “ESIKA OYO EZALI LIKAMA​—MOYIBI MPE BONDUMBA.” Totambwisaki motuka mpe tokɔtaki na nzela ya mabele mpo na kokóma esika mituka mosusu etɛlɛmaki na nse ya pankarte moko oyo moto nyonso akokaki komona kozanga mokakatano, mpe nzela yango ekendaki tii na esika oyo batɛkaka biloko ya ntalo mpe na ndako ya masano oyo ezalaki mosika na nzela. Mituka ya ntalo ezalaki koleka wana, mpe tomonaki ete bato oyo bazalaki na kati bazalaki kokamwa na likambo oyo biso tosali: ‘Mpo na nini moto nyonso asengeli kotɛlɛma awa?’ kokamwa na bango elobaki mingi.

Ntango motuka na biso etɛlɛmaki, tobimaki mpe tokendaki kokutana na etuluku ya bato oyo balataki malamu mpe batɛlɛmaki na nse ya pankarte wana mpo na kokima moi. Etuluku na biso ezalaki na bato ya mposo mpe bikólo ndenge na ndenge, likambo oyo ezali mpasi mpo na komona yango na Afrika ya Sudi. Tosalaki mobembo na esika yango oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 100 na nɔrdi-ɛsti ya Johannesburg, na elikya ete tósakola solo ya Biblia epai ya bato oyo bazalaka na bamboka yango.

Tosalaki mwa likita moke na pembeni ya nzela mpo na kotalela mokapo ya mokolo mpe tozwaki bibongiseli ya nsuka mpo na kosakola ndako na ndako. Libondeli esalemaki, mpe tozongaki na mituka. Na zamba mpe mosika mpenza okoki komona bandako ya minene mpe ya mike oyo etongamá na molɔngɔ te. Bandako yango ezalaki komonana mike mpo na mabondo ya salite oyo bazalaki kobimisa na mabulu ya koluka mabanga ya ntalo oyo ezalaki pembeni na yango. Atako mabanga ya ntalo ezalaki mingi, babola bazalaki ebele.

Ngai ná mwasi na ngai tosalaki mobembo yango ná bapaya mibale oyo bautaki na Allemagne, mpe na ntɔngɔ biso nyonso minei tobandaki kosakola ndako na ndako. Na mboka yango, bato mingi (3/4) basalaka te, yango wana batongá bandako kaka ya bongobongo. Mwa bandako mingi etongamá na manzanza mpe mabaya, mpe na esika ya kokangisa yango na bansɛtɛ, bakangisá yango nde na babushɔ ya masanga.

Ntango tozalaki kopusana na ndako mokomoko, bazalaki kopesa biso mbote na porte, mpe mbala mingi tozalaki kokutana na mama ya ndako. Bato oyo tosololaki na bango, bazalaki mpenza na mposa ya koyoka nsango oyo tomemaki, mpe bazalaki kopesa biso kilo. Moi ezalaki kobɛta makasi na manzanza mpe ekómisaki bandako molunge makasi. Mbala mingi bazalaki kotinda bana bábimisa bakiti mpe bátya yango na nse ya nzete mpe bazalaki kosɛnga biso tófanda na nse ya malili.

Libota mobimba eyanganaki mpe efandaki na molɔngɔ na bibonga. Babengaki ata bana oyo bazalaki kosakana na biloko oyo bango moko basalaki mpo báya koyoka. Totángelaki bango mwa mikapo ya Biblia mpe tosɛngaki bana oyo bakɔtá kelasi bátánga mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Bato mingi oyo tokutanaki na bango basepelaki kozwa mikanda na biso, mpe mingi basepelaki tózongela bango.

Na midi, topemaki mpo na kolya mwa limpa mpe komɛla mwa eloko ya malili, liboso tózongela bato oyo tosololaki na bango. Moto ya liboso oyo totalaki ezalaki Jimmy, autá na Malawi mpe asalaka na bisika oyo batimolaka mabanga ya ntalo. Elekaki basanza mingi banda tozalaki kokende epai ya Jimmy. Azalaki kosepela ntango nyonso komona biso, mpe tozalaki kolekisa mwa ntango mpo na kosolola na ye masolo ya Biblia. Jimmy abalaki mwasi moko ya Tswana mpe babotaki bana mibale ya kitoko. Tokutaki ye na ndako te mbala ya nsuka oyo tokendeki kotala ye, mpe tozalaki na mposa makasi ya koyeba ndenge azali.

Ntango tozalaki kopusana na mwa ndako ya Jimmy, tomonaki mbala moko ete likambo ezali. Jardin na ye oyo ezalaka ntango nyonso pɛto, ekómaki bosɔtɔ, masangu ekaukaki mpe bansoso oyo ezalaki kolukaluka biloko na mabele ezalaki te. Porte ekangamaki na monyɔlɔlɔ moko ya monene. Moto moko oyo afandaka mosika te na Jimmy ayaki wana mpo na koyeba likambo nini ezali koleka. Totunaki ye soki Jimmy akoki kozala wapi. Ayebisaki biso nsango moko ya mawa: Jimmy akufá, mpe mwasi na ye azongá epai na bango ná bana.

Na mboka yango ezalaka kozanga bonkonde kotuna makambo nyonso, kasi tosɛngaki báyebisa biso makambo oyo elekaki. Mwasi yango ayebisaki biso ete: “Abɛlaki mpe akufaki. Bamaladi ezali mingi mikolo oyo. Bato mingi bazali kokufa.” Atako ayebisaki te ntina oyo Jimmy akufaki, biso tomonaki ete akufi na sida. Atako na mboka yango milende ezali kosalema mpo na kokebisa bato na sida, bato basundolaka bato yango mpe bamonaka bango lokola bandɔki. Bato batángaka mpenza maladi yango mingi te, malita ya bato oyo bautaki kokufa emonisaki ete mwasi wana alobaki solo. Tosololaki na ye likambo etali elikya ya lisekwa, mpe na motema ya esengo, tokabwanaki na ye na elikya ya kozongela ye mbala ya nsima.

Tokɔtaki na mboka mosusu mpe tokendaki na molɔngɔ ya nsuka ya bandako oyo ezalaki liboso ya libondo ya mabele oyo babimisaki na libulu oyo batimolaka mabanga ya ntalo. Tokendaki kotɛlɛmisa motuka na nsuka ya balabala. Likoló ya libanga moko oyo ezalaki na jardin bakomaki boye: “Ntango moto azali kokoka te kozwa ekateli, nsukansuka akobungisa ntango mingi.” David,a oyo akomá maloba yango, azalaki na nsima ya motuka na ye moko ya kala mpenza (Volkswagen Beetle). Abimisaki motó mpe atalaki na ngámbo oyo moi ekitaki mpe asɛkaki ntango ayebaki ete ezali biso, mpe mino ya mabende oyo batyaki ye ezalaki kongɛnga. Apangwisaki mabɔkɔ mpe ayaki kopesa biso mbote.

Alobaki boye: “Mbote baninga na ngai! Bozalaki wapi?” Ezalaki esengo komona David lisusu. Asɛngaki bolimbisi mpo akokaki te kolekisa ntango mingi na biso mokolo wana mpo autaki kozwa mosala kobanda mbala ya nsuka oyo tokendeki kotala ye mpe esengelaki akende naino na esika batimolaka mabanga ya ntalo. Ntango tozalaki kosolola, David azalaki kaka komungamunga. Na esengo nyonso, alobaki ete: “Kaka mokolo wana ya liboso oyo bokutanaki na ngai, bomoi na ngai ebongwanaki. Mpo na koloba solo, nayebi te soki nalingaki kozala wapi lelo soki boyaka te.”

Mitema na biso etondaki na esengo ntango tokabwanaki na David. Ntango moi ebandaki kolala, tozwaki motuka na biso mpo na kokende ndako. Totalaki zamba mpo na mbala ya nsuka, mpe tozalaki kokamwa ndenge kongɛnga ya moi ezalaki kokita lokola mwa mikalikali; tozalaki komituna ndenge oyo bato wana nyonso bakoyoka nsango malamu. Tomonaki mpenza ntina ya maloba ya Yesu oyo: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.”​—Luka 10:2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]

Na ndingisa ya South African Post Office

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto