Pusaná penepene na Nzambe
“Okozala sembo”
EZALI na makambo mingi te oyo ekoki kosala biso mpasi na motema koleka ntango moto moko oyo totyelaka motema atɛki biso. Makambo ya ndenge wana emonanaka mingi na mokili oyo ezangi bosembo. (2 Timote 3:1-5) Ezali na moto oyo tokoki kotyela ye motema ete akozala ntango nyonso sembo epai na biso? Tótalela naino likambo ya Mokonzi Davidi.
Ntango azalaki na bomoi, Davidi akutanaki na makambo ya kozanga bosembo oyo elekaki mpenza mabe. Davidi akómaki kokimakima mpo na Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisraele oyo azalaki koyokela ye zuwa. Na ndako na ye moko, Mikale, mwasi ya Davidi atikalaki sembo te epai ya mobali na ye, kutu “abandaki kotyola ye na motema.” (2 Samwele 6:16) Ahitofele, mopesi-toli ya Davidi, oyo azalaki kotyela motema, abalukelaki ye mpe alandaki bato oyo batombokelaki Davidi. Mokonzi na bango ezalaki nani? Moto mosusu te, kaka Abisalome, mwana ya Davidi ye moko! Kokutana na makambo ya ndenge wana mbala na mbala, esalaki ete Davidi alɛmba nzoto mpe amona ete ezali na moto mosusu te oyo akoki kotikala sembo mpenza epai na ye?
Maloba ya Davidi oyo ezali na mokanda ya 2 Samwele 22:26 epesi biso eyano. Davidi, moto ya kondima makasi, ayembelaki Yehova Nzambe boye: “Epai ya moto ya sembo, okozala sembo.” Davidi azalaki na elikya ete ata soki bato batikali sembo te epai na ye, Yehova akozala kaka sembo epai na ye.
Tiká tótalela malamumalamu maloba ya Davidi. Maloba ya Ebre oyo ebongolami na “okozala sembo” ekoki mpe kobongolama na “kosala na motema boboto.” Bosembo ya solosolo eutaka na bolingo. Na bolingo nyonso, Yehova akangamaka na baoyo bazali sembo epai na ye.a
Simbá mpe ete, bosembo esukaka kaka na motema te; emonanaka na misala. Yehova asalaka na bosembo, ndenge Davidi amonaki yango. Na ntango ya mpasi na bomoi na ye, Yehova asungaki ye, na bosembo nyonso abatelaki ye mpe akambaki mokonzi yango ya sembo. Na botɔndi nyonso, Davidi andimaki ete Yehova nde abikisaki ye “na lobɔkɔ ya banguna na ye nyonso.”—2 Samwele 22:1.
Maloba ya Davidi ezali na ntina nini mpo na biso? Yehova abongwanaka te. (Yakobo 1:17) Azalaka ntango nyonso sembo na mitinda na ye mpe na bilaka na ye. Na nzembo mosusu, Davidi akomaki boye: “Yehova . . . akotika te bato na ye ya sembo.”—Nzembo 37:28.
Yehova atalelaka bosembo na biso na motuya. Azwaka na valɛrɛ botosi na biso epai na ye, mpe alendisaka biso tómekola ye, tómonisaka bosembo na ndenge na biso ya kosalela basusu makambo. (Baefese 4:24; 5:1) Soki tomonisi bosembo na ndenge yango, tokoki kotya motema ete akosundola biso ata moke te. Ata soki bato basundoli biso, tokoki kotya motema ete Yehova akosalela biso makambo na bosembo, akosalisa biso tólonga ata mokakatano nini oyo tokoki kokutana na yango. Yango etindi yo opusana lisusu penepene na Yehova, “Moto ya sembo?”—Emoniseli 16:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya 2 Samwele 22:26 ekokani na oyo ya Nzembo 18:25. Libongoli moko ya Biblia ebongoli nzembo yango boye: “Epai ya moto ya sembo omonisaka ete otondi na bolingo.”—Biblia The Psalms for Today.