Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/6 nk. 18-21
  • Minzoto etambwisaka bomoi na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Minzoto etambwisaka bomoi na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotala minzoto ebandá wapi mpe mokano na yango nini?
  • Ebandeli ya kotala minzoto
  • Ntina oyo osengeli koboya yango
  • Astroloji mpe kosakola makambo oyo ebombaná, eyebisaka mpenza makambo ekoya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/6 nk. 18-21

Minzoto etambwisaka bomoi na yo?

NA MOSIKA, na butu ntango moto azali kotala na likoló akomona biloko moko ya mikemike ezali kongɛnga lokola diama. Kaka na bambula 350 oyo euti koleka, nde moto abandaki koyeba bonene ya minzoto mpe ntaka oyo ekaboli yango na biso. Tobandi nde koyeba nguya monene oyo esalaka na molɔ́ngɔ́.

Banda kala, bato bamonaki ndenge minzoto mpe sanza etambolaka na butu na likoló mpe ndenge esalaka ntango bileko ezali kobongwana. (Ebandeli 1:14) Bato mingi bamonisaki makanisi lokola Davidi, mokonzi ya Yisraele oyo esili koleka mbula soki 3 000 akomaki boye: “Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo, sanza ná minzoto oyo obongisá, moto​—mowei mpamba—​azali nani mpo okanisa ye, mpe mwana ya moto ya mabele mpo obatela ye?”​—Nzembo 8:3, 4.

Kasi, ezala toyebi yango to te, minzoto, sanza mpe moi esalisaka biso na ndenge mingi. Moi, oyo mabele ebalukaka zingazinga na yango esalisaka moto ayeba ntango, bolai ya mokolo mpe ya mobu. Sanza ezali “mpo na bantango oyo etyamá,” to “mpo ya kolakisa bileko.” (Nzembo 104:19; Biblia Liloba lya Nzambe) Minzoto esalisaka mingi bato oyo batambwisaka masuwa, ezala mpe baoyo bakendaka na likoló mpo na kotambwisa malamu biloko na bango. Mpo na yango, bamosusu bamitunaka soki minzoto ekoki kosala makambo mingi mpo na biso, na esika ya koyebisa biso kaka ntango mpe bileko mpe kosala ete tózala na botɔndi mingi lisusu mpo na biloko oyo Nzambe akelá. Ekoki mpe koyebisa biso makambo oyo ekokómela biso lobi mpe kokebisa biso na makama?

Kotala minzoto ebandá wapi mpe mokano na yango nini?

Momeseno ya kotala likoló mpo na kotambwisa bomoi awa na mabele ebandá na Mezopotamia ya kala, ekoki kozala na milenɛrɛ ya misato liboso ya ntango na biso. Banganga-minzoto ya liboso bazalaki kotala likoló na likebi mpenza. Na nzela ya milende oyo basalaki mpo na kosala bakarte mpo na ndenge biloko oyo ezalaka na likoló etambolaka, koyeba ndenge minzoto ezalaka, kosala manaka, mpe koyebisa kokutana ya sanza ná moi, nde esalaki ete mayele ya siansi oyo babengi astronomi ebima. Kasi, mayele ya kotala minzoto ekendeki tii na koyekola makambo oyo moi mpe sanza esalaka na mabele na biso. Emonisi mpe ete esika oyo moi ezalaka, sanza, baplanɛti, minzoto, mpe maboke ya minzoto esukaka kaka te na kotambwisa makambo mingi na mabele kasi etambwisaka mpe bomoi ya bato. Na ndenge nini?

Bato mosusu oyo batalaka minzoto basalelaka mayele yango mpo na kotala minzoto, sanza, moi mpo na kokebisa bato na makambo oyo ekoya lobi, bato oyo bayebi makambo yango bakoki kosalela yango mpe kozwela yango litomba na ndenge mingi. Basusu bakanisaka ete kotala minzoto emonisaka makambo oyo etángamaki ete tokosala to ekoki kosalisa biso tóyeba ntango oyo ebongi mpo na kosala mosala moko to mosala mosusu. Balobaka ete moto akoki kozwa bansango ya ndenge wana na kotala ndenge biloko oyo ezalaka na likoló emonanaka mpe “koluka koyeba” boyokani oyo ezali kati na biloko yango mpe mabele. Balobaka ete lolenge ya bomoi oyo moto azali na yango elandaka ndenge biloko oyo ezalaka na likoló ebimaki ntango abotamaki.

Banganga-minzoto ya libosoliboso bazalaki kokanisa ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́ mpe ete baplanɛti mpe minzoto ekangamá mabokemaboke ya minene na likoló mpe ebalukaka zingazinga na mabele. Bazalaki mpe kokanisa ete moi etambolaka na mapata na kati ya minzoto mpe maboke ya minzoto mpe elandaka kaka nzela wana na boumeli ya mbula mobimba. Babengaka nzela yango écliptique mpe bakabolá yango na biteni 12. Eteni mokomoko ebengami na nkombo ya liboke ya minzoto oyo moi elekaka pene na yango. Yango nde ekómá bilembo 12 ya zodiake. Biteni yango to “bandako ya likoló,” ezalaki kotalelama lokola bandako ya banzambe oyo bayebani mpenza. Ya solo, na nsima, bato ya siansi bayaki koyeba ete moi ebalukaka te zingazinga ya mabele, kasi mabele nde ebalukaka zingazinga ya moi. Yango esalaki ete kotala minzoto etalelama lisusu te lokola siansi.

Longwa na Mezopotamia, esika mayele ya kotala minzoto ebandaki, mayele yango epanzanaki pene na bisika nyonso na mokili mpe ekɔtaki na balolenge ekeseni na mikili mingi ya minene. Nsima ya kokwea ya Babilone na mabɔkɔ ya Baperse, mayele ya kotala minzoto epalanganaki na Ezipito, Grèce mpe Inde. Bamisionɛrɛ ya Bouddha, oyo bazalaki na Inde, bamemaki mayele yango na Azia ya ntei, na Chine, Tibet, Japon mpe na sudi-ɛsti ya Azia. Atako ndenge oyo bato ya Maya bazwaki mayele yango eyebani te, bato ya mboka yango basalelaki mingi mayele ya kotala minzoto, ndenge moko na bato ya Babilone. Ntango mosusu mayele ya kotala minzoto oyo bato basalelaka “lelo” eutaki na mimeseno ya Ezipito oyo esanganaki na oyo ya Bagrɛki mpe ekɔtaki mpenza na makanisi ya bato ya Lingomba ya Yuda, Bamizilma, mpe ya bokristo.

Ata liboso ya kokende na boombo na Babilone na ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso, ekólo ya Yisraele ezalaki mpe kosalela mayele ya kotala minzoto. Biblia eyebisi biso milende oyo mokonzi ya sembo Yosiya asalaki mpo na kolongola misala ya kopesa bambeka “na moi mpe mpo na sanza mpe mpo na maboke ya minzoto ya zodiake mpe mpo na limpinga nyonso ya likoló.”​—2 Bakonzi 23:5.

Ebandeli ya kotala minzoto

Kotala minzoto eutá na lolenge mabe ya kotala molɔ́ngɔ́ mpe ndenge oyo etambolaka. Na yango, emonani ete mayele yango ekoki kouta epai ya Nzambe te. Lokola misisa na yango eutá na makambo ya solo te, kotala minzoto ekoki te kosalisa biso tóyeba avenire. Makambo mibale oyo eleká emonisi mpenza ete mayele yango elongaka te.

Na boumeli ya boyangeli ya Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, banganga-nzambe mpe bato oyo batalaka minzoto bakokaki te kolimbwela ye ndɔtɔ oyo alɔtaki. Danyele, mosakoli ya Yehova, Nzambe ya solo amonisaki ntina ya likambo yango: “Sekele oyo mokonzi azali kotuna, bato ya bwanya, bato oyo babelelaka bilimo, banganga-nzambe ya maji mpe banganga-minzoto bakoki koyebisa mokonzi te. Nzokande, ezali na Nzambe moko na likoló oyo azali Momonisi ya basekele, mpe ayebisi Mokonzi Nebukadenezare makambo oyo ekosalema na eleko ya nsuka ya mikolo.” (Danyele 2:27, 28) Ya solo, Danyele atalelaki Yehova Nzambe, “Momonisi ya basekele,” kasi te sanza, to moi, to minzoto, mpe apesaki mokonzi ndimbola ya solosolo ya ndɔtɔ na ye.​—Danyele 2:36-45.

Atako bato ya Maya bazalaki kotala minzoto na bosikisiki, yango epekisaki te mboka na bango ekwea na ekeke ya libwa ya ntango na biso. Kokwea yango emonisi kaka te ete kotala minzoto ezali lokuta, ekoki te koyebisa likambo oyo ezali koya na bosikisiki, kasi emonisaka mpe te polele mokano na yango oyo ezali ya kopekisa bato bátalela Nzambe mpo na kozwa bansango ya solosolo oyo etali bomoi na bango.

Lokola kotala minzoto esimbami na lokuta esalisi mpe biso tóyeba mobandisi na yango. Yesu alobaki mpo na Zabolo ete: “Akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, alobaka na kolanda makanisi na ye moko, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Satana amimonisaka “lokola anzelu ya pole,” mpe bademo lokola “basali ya boyengebene.” Nzokande, bazali mpenza bakosi oyo balukaka kokanga bato na motambo na bango ya lokuta. (2 Bakorinti 11:14, 15) Liloba ya Nzambe emonisi polele “misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya” ete ezali “mosala ya Satana.”​—2 Batesaloniki 2:9.

Ntina oyo osengeli koboya yango

Lokuta nde esimbi mayele ya kotala minzoto; yango wana, Yehova Nzambe ya solo ayinaka yango. (Nzembo 31:5) Mpo na yango, Biblia ekweisaka yango polele mpe esɛngaka na bato bázala ata na boyokani moko te na yango. Na Kolimbola Mibeko 18:10-12, Biblia elobi polele ete: “Moto azwama te . . . oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to . . . oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.”

Lokola mayele wana ya kotala minzoto esimbami na Satana mpe bademo, koluka kosalela yango etyaka moto na boyokani na bango. Ndenge kaka komeka bangi ekoki kosala ete moto akóma moombo ya bato oyo batɛkaka yango, koluka kosalela mayele ya kotala minzoto mpe ekoki kokómisa moto moombo ya Satana, mokosi monene. Yango wana, baoyo balingaka Nzambe mpe solo basengeli mpenza koboya mayele ya kotalaka minzoto, kasi basengeli koyoka toli oyo ya Biblia: “Bóyina oyo ezali mabe, mpe bólinga oyo ezali malamu.”​—Amose 5:15.

Mayele ya kotala minzoto ekolisaka na mitema ya bato mposa ya koyeba makambo oyo ekoya. Moto akoki koyeba avenire? Soki ezali bongo, ndenge nini akoki koyeba yango? Biblia eyebisi biso ete tokoki te koyeba makambo oyo ekokómela biso lobi, na sanza to na mbula oyo ekoya. (Yakobo 4:14) Atako bongo, Biblia emonisi biso likambo oyo ekokómela bato mosika te. Esalisi biso tóyeba ete mosika te, Bokonzi ya Nzambe oyo tosɛngaka na libondeli ya Tata wa biso ekoya. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Eyebisi biso mpe ete mpasi oyo bato bazali komona ekosila mosika te mpe ekotungisa biso lisusu te. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:4) Na esika ya komonisa ete bomoi ya moto etángamá, Nzambe azali kosɛnga na bato ya bisika nyonso báyekola koyeba ye mpe makambo oyo akosala mpo na bolamu na bango. Ndenge nini toyebi yango? Biblia emonisi yango polele ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timote 2:4.

Likoló mpe biloko ya kokamwa oyo ezali kuna esalemá te mpo na kotambwisa bomoi na biso. Kutu, emonisaka nde nguya ya Yehova mpe Bonzambe na ye. (Baroma 1:20) Ekoki kotinda biso tóboya makambo ya lokuta mpe tótalela Nzambe mpe Liloba na ye Biblia mpo na kotambwisa biso na ndenge ebongi mpe tólonga na bomoi. Biblia elobi boye: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”​—Masese 3:5, 6.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Bato ya Maya basalelaki mingi mayele ya kotala minzoto

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]

Kosalela mayele ya kotala minzoto na bosikisiki epekisaki te Maya ekwea

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]

“Ezali na Nzambe moko na likoló oyo azali Momonisi ya basekele, mpe ayebisi . . . makambo oyo ekosalema na eleko ya nsuka ya mikolo”

[Elilingi na lokasa 19]

El Caracol observatory, Chichén Itzá, Yucatán, Mexico, 750-900 ya ntango na biso

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]

Nkasa 18 mpe 19, kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Minzoto: NASA, ESA, mpe A. Nota (STScI); Manaka ya Maya: © Lynx/​Iconotec com/​age fotostock; Moto moko ya Maya oyo atalaki minzoto: © Albert J. Copley/​age fotostock; Mayan observatory: El Caracol (The Great Conch) (fɔtɔ), Mayan/​Chichen Itza, Yucatan, Mexico/​Giraudon/​The Bridgeman Art Library

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto