Biyano na mituna minei oyo etali nsuka ya mokili
YESU KRISTO asakolaki ete “nsuka ekoya.” Mpo na ntango yango alobaki boye: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.”—Matai 24:14, 21.
Maloba oyo Yesu alobaki mpo na nsuka, mpe mikapo mosusu ya Biblia oyo elobeli likambo yango, ebimisi ebele ya mituna ya ntina. Mpo na nini te kofungola Biblia na yo mpe kotánga biyano oyo Biblia epesi na mituna yango?
1 Nini ekosuka?
Biblia eteyaka te ete mabele oyo tofandi ekobebisama. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “[Nzambe] atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.” (Nzembo 104:5) Biblia eteyaka mpe te ete bomoi nyonso ekozika na mɔtɔ. (Yisaya 45:18) Yesu amonisaki ete bato mosusu bakobika na nsuka ya mokili. (Matai 24:21, 22) Kasi, Biblia elobi ete nini mpenza ekosuka?
Baguvɛrnema ya bato ekosuka mpo elongi te. Na lisalisi ya elimo santu, Nzambe atindaki mosakoli Danyele akoma ete: “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”—Danyele 2:44.
Bitumba mpe kobeba ya mopɛpɛ ekosuka. Mpo na kolobela oyo Nzambe akosala, Nzembo 46:9 elobi ete: “Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; Azali kotumba makalo na mɔtɔ.” Biblia eteyaka mpe ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’—Emoniseli 11:18.
Mobulu mpe kozanga bosembo ekosuka. Liloba ya Nzambe elaki ete: “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.”a—Masese 2:21, 22.
2 Ntango nini nsuka ekoya?
Yehova Nzambe azali na “ntango oyo etyamá” mpo na kosukisa mabe mpe kotya Bokonzi na ye. (Marko 13:33) Kasi, Biblia emonisi polele ete tokoki te koyeba na bosikisiki mokolo oyo nsuka ekoya. Yesu alobaki ete: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Matai 24:36) Yesu ná bayekoli na ye balobelaki makambo oyo ekosalema na mabele liboso ete Nzambe atya nsuka na mokili oyo. Ntango makambo nyonso oyo elandi ekokokisama na mabele mobimba na eleko kaka moko, yango ekomonisa ete mosika te nsuka ekoya.
Makambo ya politiki, ya mokili mpe bomoi ya bato ezali kobongwana makasi mpenza koleka ndenge ezalaki liboso. Mpo na koyanola na mituna oyo bayekoli na ye batunaki mpo na nsuka ya mokili, Yesu alobaki ete: “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge, nzala ekozala. Wana ezali ebandeli ya bampasi.” (Marko 13:8) Ntoma Paulo akomaki ete: “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”—2 Timote 3:1-5.
Na mokili mobimba mosala ya kosakola ezali kosalema na minɔkɔ ebele. Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
3 Soki nsuka eyei nini ekosalema na nsima?
Biblia eteyaka te ete bato nyonso ya malamu bakokende na lola mpe kofanda libela kuna. Kutu, Yesu ateyaki ete mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato ekokokisama. Yesu alobaki ete: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” (Matai 5:5; 6:9, 10) Mpo na baoyo bazali kokufa liboso nsuka eya, Biblia epesi elaka ete bakosekwa. (Yobo 14:14, 15; Yoane 5:28, 29) Nini ekolanda na nsima?
Yesu akoyangela lokola mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló. Mosakoli Danyele akomaki ete: “Nazalaki se kotala na bimonaneli ya butu, mpe talá! moto moko lokola mwana ya moto [Yesu Kristo oyo asekwaki] azalaki koya na mapata ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo [Yehova Nzambe], mpe babɛlɛmisaki ye liboso na Oyo wana. Mpe bapesaki ye [Yesu] boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye. Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.”—Danyele 7:13, 14; Luka 1:31, 32; Yoane 3:13-16.
Bato oyo bakoyangelama na Bokonzi ya Nzambe bakozala na nzoto ya kokoka, kimya ya solosolo mpe bomoi ya libela. Mosakoli Yisaya akomaki ete: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te.” (Yisaya 65:21-23) Mpo na ntango yango, ntoma Yoane akomaki ete: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Emoniseli 21:3, 4.
4 Osengeli kosala nini mpo obika na nsuka ya mokili?
Ntoma P etro ayebaki ete bato mosusu oyo bakozala na bomoi na ntango ya nsuka bakotyola ntango bakoyoka ete Nzambe akozwa makambo ya bato na mabɔkɔ mpe akosukisa mabe na mabele. (2 Petro 3:3, 4) Atako bongo, Petro alendisaki bato ya eleko na biso básala likambo oyo elandi.
Kozwa liteya na makambo oyo eleká. Petro akomaki ete Nzambe “amipekisaki te kopesa mokili ya kala etumbu, kasi abatelaki Noa, mosakoli ya boyengebene, ná bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela na mokili ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.” (2 Petro 2:5) Mpo na batyoli yango, Petro alobaki boye: “Na kolanda mposa na bango, likambo bazali kobosana yango oyo: likoló ezalaki banda kala ná mabele ya makasi oyo ebimaki na mai mpe na katikati ya mai na liloba ya Nzambe; mpe na nzela na yango mokili ya ntango wana ebebisamaki ntango ezindaki na mai. Kasi na nzela ya liloba yango kaka likoló ná mabeleb oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.”—2 Petro 3:5-7.
Kozala na bomoi oyo eyokani na mitinda ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu. Mpo na baoyo balingi kobika na nsuka ya mokili oyo, Petro amonisaki ete basengeli kozala bato ya ‘etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bakangami na Nzambe.’ (2 Petro 3:11) Simbá ete Petro abendaki likebi na “etamboli ya bosantu” mpe ‘misala oyo ezali komonisa ete moto akangami na Nzambe.’ Na yango, ezali kosɛnga makambo mingi, esɛngi kaka te kozala na kondima ya likolólikoló to komonisa milende na nsuka mpo na kobongisa makambo na Nzambe.
Etamboli mpe misala nini Nzambe andimaka? Mpo na nini te kokokanisa makambo oyo yo oyebi na oyo Biblia eteyaka na likambo yango? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo. Sɛngá bango bálakisa yo biyano na Biblia na yo moko. Kosala bongo ekosalisa yo ozala na mpiko mpe na elikya mpo na mikolo ezali koya, atako mokili etondi na makambo mingi oyo ezali kobangisa biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mpe lisolo “Bato nyonso bazali na libaku ndenge moko ya koyeba Nzambe?” na lokasa 22 ya zulunalo oyo.
b Mabele oyo Petro alobeli awa, ezali mabele ya elilingi. Moize, moko ya bakomi ya Biblia alobelaki mpe mabele na ndenge ya elilingi. Akomaki boye: “Mabele mobimba ezalaki na monɔkɔ kaka moko.” (Ebandeli 11:1) Ndenge kaka mabele oyo tozali elobaka te “monɔkɔ kaka moko,” ezali te mabele oyo tofandi nde ekobomama. Kasi, ndenge Petro amonisi yango, ezali nde bato oyo batyolaka Nzambe nde bakobomama.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Mabele ekosuka te, kasi baoyo bazali kobebisa yango nde bakosuka