Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/4 nk. 13-17
  • Bikateli na yo ekumisa Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bikateli na yo ekumisa Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini mpenza kozwa bikateli?
  • Ntina oyo kozwa bikateli ekoki kozala mpasi
  • Makambo motoba mpo na kozwa bikateli ya malamu
  • Salisá basusu báyeba kozwa bikateli oyo ekokumisa Nzambe
  • Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Lolenge oyo okoki kozwa bikateli ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Zwáká bikateli ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/4 nk. 13-17

Bikateli na yo ekumisa Nzambe

“Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”​—MAS. 14:15.

1, 2. (a) Mposa na biso ya libosoliboso esengeli kozala nini ntango tozali kozwa bikateli? (b) Mituna nini tokotalela?

NA NTEMBE te, tozwaka bikateli ebele mokolo na mokolo. Makambo oyo bikateli yango mingi ebimisaka eumelaka ntango molai te. Kasi, mosusu ekoki kobongola mpenza bomoi na biso. Na bikateli oyo tozwaka, ezala ya minene to ya mike, mposa na biso ya libosoliboso ezali ya kokumisa Nzambe.​—Tángá 1 Bakorinti 10:31.

2 Omonaka ete kozwa bikateli ezali mpasi te, to ozalaka na mokakatano mpo na kozwa bikateli? Soki tolingi kokóma bakristo oyo bakɔmɛli, tosengeli koyekola kokesenisa mabe ná malamu mpe na nsima, kozwa bikateli oyo euti na biso moko, kasi te oyo elandi makanisi ya moto mosusu. (Rom. 12:1, 2; Ebr. 5:14) Wapi bantina mosusu oyo esengeli kotinda biso tóyeba kozwa bikateli ya malamu? Mpo na nini na bantango mosusu ezalaka mpasi kozwa bikateli? Mpe makambo nini tokoki kosala mpo bikateli na biso ekumisa Nzambe?

Mpo na nini mpenza kozwa bikateli?

3. Makambo nini tosengeli kotika te etambwisa biso ntango tozali kozwa bikateli?

3 Soki tozali kokakatana kozwa bikateli na makambo oyo Biblia epesi mibeko, baninga na biso ya kelasi to ya mosala bakoki kokanisa ete tokangami mpenza te na bindimeli na biso mpe na bongo, tokoki kolanda makanisi ya basusu. Bakoki kobuka lokuta, koyiba biyano na ekzamɛ, to koyiba na mosala mpe koluka kondimisa biso ‘tólanda ebele ya bato,’ elingi koloba tósala lokola bango, to ata kaka tóbomba mabe na bango. (Kob. 23:2) Kasi, moto oyo ayebi ndenge ya kozwa bikateli oyo ekokumisa Nzambe akotika te kobanga to koluka kondimama na bato etinda ye asala makambo oyo eyokani te na lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia.​—Rom. 13:5.

4. Mpo na nini bato mosusu bakoki kolinga kozwa bikateli na esika na biso?

4 Ezali te moto nyonso oyo alingi kozwa bikateli na esika na biso nde akolinga kosala biso mabe. Baninga mosusu bakoki kotya biso mbamba tólanda toli na bango; ntango bazali kosala bongo, bakoki kokanisa ete bazali koluka bolamu na biso. Soki tokómá kofanda epai na biso moko, ekoki kozala ete bandeko na biso bazali naino komitungisa mingi mpo na bolamu na biso mpe mbala mosusu bakoki kolinga komikɔtisa na bikateli minene oyo tolingi kozwa. Tózwa ndakisa ya makambo etali kosalisa nzoto. Biblia epekisi polele kosalela makila na ndenge ya mabe. (Mis. 15:28, 29) Kasi, makambo mosusu oyo etali kosalisa nzoto ezali na mibeko ya sikisiki te mpe esɛngi moto na moto azwa ekateli na ye moko na oyo etali lolenge ya kosalisa nzoto oyo akoki kondima.a Bato oyo balingaka biso bakoki koluka tólanda kaka makanisi na bango na makambo yango. Nzokande, mpo na kozwa ekateli na makambo yango, mokristo nyonso oyo amipesá na Nzambe mpe azwá batisimo asengeli ‘komema mokumba na ye moko.’ (Gal. 6:4, 5) Mposa na biso ya libosoliboso ezali ya kobatela lisosoli ya malamu liboso ya Nzambe, kasi ya bato te.​—1 Tim. 1:5.

5. Tokoki kosala nini mpo kondima na biso ebeba te lokola masuwa oyo epanzani?

5 Kokakatana kozwa bikateli ekoki kotya biso na likama monene. Moyekoli Yakobo akomaki ete moto oyo akakatanaka kozwa bikateli, to moto ya mitema mibale “apikamá te na banzela na ye nyonso.” (Yak. 1:8) Akozala lokola moto oyo azali na kati ya masuwa oyo ezangi yenda na mbu ya mbonge makasi; akomemama epai na epai na makanisi ya bato, oyo ebongwanaka mpambampamba. Ekozala mpasi te mpo moto ya ndenge wana abebisa kondima na ye lokola masuwa oyo epanzani mpe na nsima abanda kopesa basusu foti mpo na likambo ya mawa oyo ekómeli ye! (1 Tim. 1:19) Tokoki kosala nini mpo tósuka ndenge wana te? Tosengeli “kotɛlɛma ngwi na kondima.” (Tángá Bakolose 2:6, 7.) Mpo tókoka kotɛlɛma ngwi, tosengeli koyeba kozwa bikateli oyo ekomonisa ete tozali na kondima na Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. (2 Tim. 3:14-17) Kasi, nini ekoki kolɛmbisa likoki na biso ya kozwa bikateli ya malamu?

Ntina oyo kozwa bikateli ekoki kozala mpasi

6. Kobanga ekoki kosala biso nini?

6 Kobanga ekoki kosilisa biso makasi; tokoki kobanga tózwa bikateli ya mabe, tólonga te, to tómonana zoba na miso ya basusu. Komitungisa ndenge wana ezali mabe te. Moto moko te alingaka kozwa ekateli ya mabe, oyo ekobimisa mikakatano mpe mbala mosusu ekopesa ye nsɔni. Atako bongo, bolingo ya Nzambe mpe ya Liloba na ye ekoki kosalisa biso tókitisa kobanga. Na ndenge nini? Bolingo ya Nzambe ekotinda biso tólukaka ntango nyonso makanisi na Liloba na ye mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia liboso tózwa bikateli minene. Na ndenge yango, tokosala mabunga mingi te. Mpo na nini? Mpo Biblia ekoki “kopesa bokɛngi na bato oyo bazangi mayele, [mpe] kopesa elenge mobali boyebi ná likoki ya kokanisa.”​—Mas. 1:4.

7. Ndakisa ya Mokonzi Davidi ekoki koteya biso nini?

7 Tokozwa ntango nyonso kaka ekateli ya malamu? Te. Biso nyonso tosalaka mabunga. (Rom. 3:23) Na ndakisa, Mokonzi Davidi azalaki mobali ya bwanya mpe ya sembo. Nzokande na bantango mosusu, azwaki bikateli ya mabe, oyo ememelaki ye moko mpe bato mosusu mpasi. (2 Sam. 12:9-12) Atako bongo, Davidi atikaki te mabunga na ye elɛmbisa likoki na ye ya kozwa bikateli oyo endimamaki na Nzambe. (1 Bak. 15:4, 5) Tokoki kozwa lisusu bikateli atako tosalaki mabunga liboso soki, ndenge moko na Davidi, tobosani te ete Yehova akolekisa mabunga na biso mpe akolimbisa masumu na biso. Akokoba kosunga baoyo balingaka ye mpe batosaka ye.​—Nz. 51:1-4, 7-10.

8. Liteya nini tozwi na makambo oyo ntoma Paulo alobaki mpo na kobala?

8 Tokoki kokitisa kobanga oyo toyokaka mpo na kozwa bikateli. Ndenge nini? Soki tondimi ete ntango mosusu, ezalaka na ndenge mingi ya malamu ya kosala likambo. Tótala ndenge ntoma Paulo alobelaki likambo ya kobala. Na lisalisi ya elimo santu, akomaki boye: “Soki moto akanisi ete azali kosalela bongɔndɔ na ye mabe, soki ye aleki eleko ya ebandeli ya bolenge, mpe soki esengeli kosalema bongo, asala oyo alingi; azali kosala lisumu te. Bábala na bango. Kasi soki moto azwi ekateli na motema na ye, mpe azali na mokakatano te oyo ezali kotinda ye, nde azali na likoki ya kokanga mposa na ye moko mpe azwi ekateli yango na motema na ye moko, ya kobatela bongɔndɔ na ye mpenza, akosala malamu.” (1 Ko. 7:36-38) Paulo alendisaki bonzemba, kasi kaka bonzemba te nde ezalaki likambo ya malamu oyo moto akokaki kopona.

9. Tosengeli nde komituna soki bikateli na biso ekosala nini epai ya basusu? Limbolá.

9 Tosengeli nde komituna soki bato mosusu bakotalela ekateli na biso ndenge nini? Ɛɛ, na bantango mosusu. Yoká ndenge ntoma Paulo alobaki na ntina etali kolya bilei oyo ekoki komonana lokola epesamaki mbeka na bikeko. Andimaki ete mbala mosusu ekateli moko ezali mabe te, kasi ekoki kotungisa moto oyo azali na lisosoli oyo ezali makasi te. Paulo azalaki kosala nini? Akomaki boye: “Soki eloko moko ya kolya ezali kobɛtisa ndeko na ngai libaku, nakolya lisusu mosuni ya nyama soki moke te, mpo nabɛtisa ndeko na ngai libaku te.” (1 Ko. 8:4-13) Biso mpe tosengeli kotala soki ekateli na biso ekosala nini na lisosoli ya basusu. Nzokande, mposa na biso ya libosoliboso ezali ya komituna soki ekateli na biso ekosala nini na boyokani na biso na Yehova. (Tángá Baroma 14:1-4.) Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso mpo bikateli na biso ekumisa Nzambe?

Makambo motoba mpo na kozwa bikateli ya malamu

10, 11. (a) Ndenge nini tokoki kokima kozala na lofundo na libota? (b) Likambo nini bankulutu basengeli kobosana te ntango bazali kozwa bikateli oyo esimbi bandeko ya lisangá?

10 Kozala na lofundo te. Liboso ya kosala likambo moko, tosengeli komituna boye: ‘Ngai nde nasengeli kozwa ekateli yango?’ Mokonzi Salomo akomaki boye: “Lofundo eyei? Boye nsɔni ekoya; kasi bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.”​—Mas. 11:2.

11 Baboti bakoki kotikela bana na bango bázwa bikateli mosusu, kasi bana basengeli te kokanisa ete ezali mokumba na bango. (Kol. 3:20) Basi mpe bamama bazali na mwa bokonzi na kati ya libota kasi basengeli kondima ete mibali na bango nde bazali na mokumba ya kotambwisa makambo. (Mas. 1:8; 31:10-18; Ef. 5:23) Ndenge moko mpe, mibali basengeli kondima ete bokonzi na bango ezali na ndelo mpe ete bazali na nse ya bokonzi ya Kristo. (1 Ko. 11:3) Bankulutu bazwaka bikateli oyo esimbaka bandeko ya lisangá mobimba. Nzokande, basalaka nyonso mpo ‘bákende mosika te koleka makambo oyo ekomamá’ na Liloba ya Nzambe. (1 Ko. 4:6) Balandaka mpe na likebi mpenza malako oyo moombo ya sembo apesaka bango. (Mat. 24:45-47) Tokoki kokima makambo oyo ekobimisela biso moko mpe basusu mindɔndɔ mpe bampasi soki toyebi ndelo na biso mpe tozali kozwa bikateli kaka soki bapesá biso bokonzi ya kosala yango.

12. (a) Mpo na nini tosengeli kosala bolukiluki? (b) Limbolá ndenge moto akoki kosala bolukiluki na ye.

12 Salá bolukiluki. Salomo akomaki boye: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Mas. 21:5) Na ndakisa, ozali kotala soki osengeli kokɔta na mombongo moko oyo basɛngi yo osala? Kowela te. Luká koyeba makambo nyonso oyo esengeli, sɛngá toli na bato oyo bamesaná na makambo ya ndenge wana, mpe luká koyeba mitinda ya Biblia oyo elobeli likambo yango. (Mas. 20:18) Mpo otya makambo oyo ozwi na bolukiluki na yo na molɔngɔ, salá liste mibale​—moko ya matomba, mosusu ya biloko oyo yango ekosɛnga. Liboso ya kozwa ekateli, luká “koyeba mosolo boni yango ekosɛnga.” (Luka 14:28) Luká koyeba soki ekateli na yo ekosala nini na mbongo na yo mpe na elimo na yo. Esɛngaka ntango mpe milende mpo na kosala bolukiluki. Kasi, soki osali yango, okoki kokima kozwa bikateli ya mbangumbangu oyo ekomemela yo mitungisi ya mpamba.

13. (a) Yakobo 1:5 endimisi biso likambo nini? (b) Ndenge nini kosɛnga Nzambe bwanya ekoki kosalisa biso?

13 Bondelá mpo na kozwa bwanya. Bikateli na biso ekokumisa Nzambe kaka soki tosɛngi ye asalisa biso ntango tozali kozwa yango. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te; mpe akopesa ye yango.” (Yak. 1:5) Ezali likambo ya nsɔni te kondima ete tozali na mposa Nzambe apesa biso bwanya mpo esalisa biso na kozwa bikateli. (Mas. 3:5, 6) Kutu, kotya motema kaka na mayele na biso moko ekoki mpenza kobungisa biso nzela. Ntango tozali kobondela mpo na kozwa bwanya mpe tozali koluka mitinda ya Liloba ya Nzambe, tozali kotika elimo santu esalisa biso tósosola ntina mpenza oyo tolingi kosala likambo moko boye.​—Ebr. 4:12; tángá Yakobo 1:22-25.

14. Mpo na nini tosengeli koboya kozongisaka makambo nsima?

14 Zwá ekateli. Kowela te kozwa ekateli soki osali naino bolukiluki te mpe obondeli te mpo na kozwa bwanya. Moto ya bwanya azwaka ntango ya ‘kotya likebi na matambe na ye.’ (Mas. 14:15) Kasi, kozongisa makambo nsima te. Moto oyo azongisaka makambo nsima akoki kopesa bantina ezangá motó ná makolo mpo asalaki te likambo oyo asengelaki kosala. (Mas. 22:13) Kasi wana mpe ezali kaka ekateli​—azwi ekateli, kasi nde ya kotika basusu bátambwisa bomoi na ye.

15, 16. Esɛngaka nini mpo na kokokisa ekateli oyo tozwaki?

15 Salá makambo oyo okanaki. Milende oyo tosali mpo na kozwa ekateli ya malamu ekoki kokende na mai soki tosali nyonso te mpo na kokokisa ekateli yango. Salomo akomaki boye: “Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza.” (Mos. 9:10) Mpo na kolonga, tosengeli kondima kosala makambo oyo esengeli mpo na kokokisa bikateli na biso. Na ndakisa, mosakoli moko akoki kozwa ekateli ya kokóma mobongisi-nzela. Akolonga? Akoki kolonga soki atiki te ete mosala na ye ya mosuni mpe kominanola esilisa ye makasi mpe elya ye ntango oyo asengeli na yango mpo na kobima na mosala ya kosakola.

16 Mbala mingi ezalaka mpasi kokokisa bikateli ya malamu. Mpo na nini? Mpo “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) Tosengeli kobunda ná “bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” (Ef. 6:12) Ezala ntoma Paulo ezala moyekoli Yuda, bango nyonso bamonisaki ete baoyo bazwi ekateli ya kokumisa Nzambe bakobunda etumba mpenza.​—1 Tim. 6:12; Yuda 3.

17. Na oyo etali kokokisa bikateli na biso, Yehova azelaka nini epai na biso?

17 Talá lisusu ekateli na yo mpe bongisá makambo mosusu soki esengeli. Makambo nyonso etambolaka te kaka ndenge ekanamaki. “Ntango ná makambo oyo ekanami te” ekwelaka biso nyonso. (Mos. 9:11) Atako bongo, Yehova alingi ete tókangama na bikateli mosusu oyo tozwaki ata soki tokoki kokutana na mikakatano. Ekateli oyo moto azwi ya komipesa na Nzambe to ya kosala elako ya libala ezali ya kokakola te. Yehova azali kolikya ete tótosa bikateli wana na bomoi na biso. (Tángá Nzembo 15:1, 2, 4.) Kasi, bikateli mingi oyo tozwaka esɛngaka kaka te kokangama na yango ndenge wana. Moto ya bwanya akotalela bikateli na ye mbala na mbala. Akotika te lolendo to motó makasi epekisa ye abongisa to ata abongola ekateli moko. (Mas. 16:18) Mposa na ye ya libosoliboso ezali ya kosala nyonso mpo bomoi na ye ekoba kokumisa Nzambe.

Salisá basusu báyeba kozwa bikateli oyo ekokumisa Nzambe

18. Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango bázwaka bikateli ya malamu?

18 Baboti bakoki kosala mingi mpo na kosalisa bana na bango báyeba ndenge ya kozwa bikateli oyo ekokumisa Nzambe. Kopesa ndakisa malamu ekoki koteya bango malamu mpenza. (Luka 6:40) Soki ebongi, baboti bakoki kolimbwela bana na bango makambo oyo bango moko basalaki mpo na kozwa ekateli moko boye. Bakoki mpe kondima kotika bana na bango bázwa bango moko bikateli mosusu mpe kopesa bango longonya soki ekateli yango esimbi. Kasi, moboti akosala nini soki mwana azwi ekateli ya mabe? Mposa ya libosoliboso ya moboti ekoki kozala ya kosala ete mpasi oyo ekateli yango ebimisi ezwa mwana te; kasi kosala ndenge wana ekozala ntango nyonso malamu mpo na mwana te. Na ndakisa, moboti akoki kotika mwana azwa mokanda oyo epesaka ndingisa ya kokumba motuka (permis de conduire). Kanisá ete mwana yango abuki mobeko moko ya nzela mpe asengeli kofuta lomande. Moboti akoki kofuta lomande yango. Nzokande, soki asɛngi mwana asala mosala mpo na kofuta yango, na ntembe te mwana akoyeba komema mikumba na ye malamu.​—Rom. 13:4.

19. Tosengeli koteya bayekoli ya Biblia nini, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

19 Yesu ayebisaki bayekoli na ye báteyaka basusu. (Mat. 28:20) Moko na makambo ya ntina mingi oyo tokoki koteya bayekoli ya Biblia ezali ndenge ya kozwa bikateli ya malamu. Mpo na kosala yango malamu, tosengeli kolonga mposa ya koyebisa bango ndenge oyo bakosala. Ekoleka malamu nde koteya bango báyeba ndenge ya kokanisa na mitinda ya Biblia mpo bákoka kokata bango moko soki bakosala ndenge nini. Mpo, “mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.” (Rom. 14:12) Na yango, biso nyonso tozali na ntina mpenza ya kozwa bikateli oyo ekokumisa Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina etali likambo yango, talá lisolo “Ekateli nini nakozwa mpo na biloko mikemike oyo babendaka na makila mpe mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko?” na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006, nkasa 3-6.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini tosengeli koyekola kozwa bikateli?

• Kobanga ekoki kosala biso nini, mpe ndenge nini tokoki kolonga yango?

• Wapi makambo motoba oyo tokoki kosala mpo bikateli na biso ekumisa Nzambe?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 16]

Makambo motoba mpo na kozwa bikateli ya malamu

1 Kozala na lofundo te

2 Salá bolukiluki

3 Bondelá mpo na kozwa bwanya

4 Zwá ekateli

5 Salá makambo oyo okanaki

6 Bongisá mpe bongola ekateli na yo soki esengeli

[Elilingi na lokasa 15]

Moto ya mitema mibale azali lokola moto oyo azali na kati ya masuwa oyo ezangi yenda na mbu ya mbonge makasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto