Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/5 lok. 7
  • Esakweli 4. Kozanga bolingo ya libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esakweli 4. Kozanga bolingo ya libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali konyokola bango na ndako
    Makambo mosusu
  • Bokoki kolónga mikakatano oyo mibebisaka libota
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Likambo ya kobɛta molongani ekoki kosila?
    Lamuká!—2013
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka mobulu?
    Lamuká!—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/5 lok. 7

Esakweli 4. Kozanga bolingo ya libota

“Bato bakozanga bolingo oyo basengeli komonisa na mabota na bango.”​—2 TIMOTE 3:1-3, Biblia God’s Word.

● Chris asalaka na etuluku moko oyo esalisaka bato oyo banyokolaka bango na bandako, na nɔrdi ya Pays de Galles. Alobi boye: “Nazali kokanisa lisusu ndenge mwasi moko oyo abɛtamaki makasi azalaki kokɔta, mpe nakokaki koyeba ye lisusu te ndenge nayebaki ye mbala ya nsuka oyo namonaki ye. Basi mosusu batungisamaki mpenza mingi na makanisi mpe bakoki ata kotala yo te na elongi.”

MAKAMBO OYO EZALI KOSALEMA EMONISI NINI? Na ekólo moko ya Afrika, soki ozwi basi 3, okomona ete moko na bango basangisá na ye nzoto na bomwana. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki kaka na ekólo yango emonisaki ete mibali mingi (koleka 1/3) bamonaki ete kobɛta basi na bango ezali mabe te. Nzokande, kaka basi te nde babɛtamaka na bandako. Na ndakisa, na Canada, pene na mibali 3 kati na mibali 10 babɛtamaki na basi na bango to mpe basalaki bango makambo mosusu ya mabe.

NTEMBE NINI BATO BABIMISAKA MINGI? Likambo ya kobɛtama na ndako ebandá kala. Ekómi nde kotyelama likebi mingi lelo oyo koleka ndenge ezalaki liboso.

NTEMBE YANGO EZALI SOLO? Bato bakómi kotyela likambo ya konyokola bato na ndako likebi mingi koleka na bambula oyo euti koleka. Kasi, kosala bongo esali nde ete bato banyokwamaka mingi lisusu te na bandako? Te, ezali bongo te. Kozanga bolingo na libota ezali se kopalangana mingi.

OKANISI NINI? Maloba ya 2 Timote 3:1-3 ezali kokokisama? Bato mingi bazali kozanga bolingo mpo na mabota na bango, likambo oyo esengelaki ete básala yango kozanga ete moto atinda bango?

Esakweli ya mitano oyo ozali komona kokokisama na yango etaleli mabele, esika oyo tozali. Tótalela oyo Biblia elobi mpo na likambo yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

“Eyebani ete kobɛta bato na bandako ezali moko ya makambo ya mabe oyo balobelaka yango mingi te. Emonani ete tii mwasi akóma epai ya bapolisi, ekoki kozala ete asilaki kobɛtama na mobali na ye mbala soki 35.”​—MOLOBELI YA KOMPANYI MOKO YA TELEFONE NA PAYS DE GALLES, OYO BATO BABENGAKA MPO NA KOLUKA TOLI NA LIKAMBO ETALI KONYOKOLA BATO NA MABOTA.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto