Nani mpenza azali koyangela mokili?
EKOKI kozala ete okutaná naino te na mokonzi ya bato oyo basalaka mafia to makambo mosusu ya mabe. Kasi, yango elingi koloba ete bakonzi yango bazalaka te? Bakonzi yango bayebaka mpenza komibomba; kutu, ata soki batye bango na bolɔkɔ, bakobaka kotambwisa bato na bango oyo bazali libándá. Kasi, masolo oyo ezali kobima na bazulunalo, oyo ezali kolobela bitumba ya batɛki bangi ná basoda, bato oyo basalisaka basi kindumba, oyo batɛkisaka bato, mpe bongo na bongo, ezali kosalisa biso tóyeba ete bato mabe wana bazali, bazali kobebisa mpe kobimisela biso mikakatano. Toyebaka yango na makambo oyo tomonaka.
Biblia emonisi ete Satana azali mpenza mpe ndenge moko na mokonzi ya bato ya mobulu, asalelaka “bilembo ya lokuta” mpe ‘bokosi oyo euti na makambo oyo ezangi boyengebene’ mpo na kokokisa mokano na ye. Kutu, Biblia elobi ete “azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.” (2 Batesaloniki 2:9, 10; 2 Bakorinti 11:14) Makambo oyo Zabolo asalaka ekoki mpenza kondimisa biso ete azali. Nzokande, bato mingi bandimaka mpenza te ete ezali na ekelamu moko ya elimo oyo asalaka mabe. Liboso tótalela na mozindo oyo Biblia elobi mpo na Zabolo, tólobela mateya ya lokuta mpe mwa makambo mosusu oyo etindaka bato mingi bándima te ete Zabolo azali mpenza.
◼ “Ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki kokela Zabolo?” Lokola Biblia elobi ete Nzambe azali malamu mpe misala na ye ezali ya kokoka, likanisi oyo elobi ete azalisaki ekelamu moko ya mabe ekoki kozala solo te. Nzokande, Biblia elobi te ete Nzambe akelaki ekelamu ya ndenge wana. Kutu, elobi nde na ntina na Nzambe ete: “Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te.”—Kolimbola Mibeko 32:4; Nzembo 5:4.
Motuna oyo tosengeli komituna ezali ya koyeba soki ekelamu ya kokoka akoki kosala mabe. Nzambe akelaki biso lokola bamasini te, kasi apesaki biso bonsomi ya kopona. Na yango, ekelamu ya kokoka, ezala anzelu to moto, akoki kopona kosala malamu to mabe. Kutu, kaka bikelamu oyo Nzambe apesá bonsomi ya kopona, nde bakoki kosala likambo oyo ekoki kondimama to te.
Na yango, Nzambe akokaki te kopesa bikelamu na ye bonsomi ya kopona makambo malamu mpe lisusu kopekisa bango básala mabe soki balingi. Yesu alobelaki lolenge mabe ya kosalela bonsomi ntango alobaki mpo na Zabolo ete: “Akangamaki makasi te na solo.” (Yoane 8:44) Maloba wana emonisi polele ete ekelamu oyo akómaki Zabolo, azalaki na ebandeli ekelamu ya kokoka, oyo liboso ‘akangamaki makasi na solo.’a Yehova Nzambe apesaki bikelamu na ye bonsomi ya kopona mpo alingaka bango mpe atyelaka bango motema.—Talá etanda “Baanzelu to bato oyo Nzambe akeli bakoki kokóma mabe?” na lokasa 6.
◼ “Zabolo azali mosaleli ya Nzambe” Bato mosusu balobaka ete Biblia emonisi likanisi yango na mokanda ya Yobo. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete maloba Zabolo azalaki “kotambolatambola na mabele” eyokani na mosala ya banɔngi na ekólo Perse ya kala, oyo bazalaki kosala mibembo mpe koya koyebisa mokonzi na bango makambo. (Yobo 1:7) Nzokande, soki Zabolo azali mpenza monɔngi oyo asalaka mpo na Nzambe, mpo na nini esengelaki ayebisa Nzambe ete autaki “kotambolatambola na mabele”? Mokanda ya Yobo emonisi te ete Zabolo azali na ngámbo ya Nzambe; kutu ebengi ye Satana, oyo elimboli “Motɛmɛli” mpe emonisi ete azali Monguna monene ya Nzambe. (Yobo 1:6) Boye, likanisi oyo elobi ete Zabolo azali mosaleli ya Nzambe eutaki wapi?
Na siɛklɛ ya liboso T.B., babuku ya Bayuda oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te, emonisaki ete Zabolo atyanaka ntembe na Nzambe, kasi atosaka mpe mokano na Ye. Na buku na ye (Mephistopheles), Jeffrey Russell, moto ya mayele na istware, alobi ete basiɛklɛ mingi na nsima, Martin Luther, mobandisi ya Lingomba ya Protesta, azalaki koloba ete Zabolo azali “lokola mashɛti mpo na kokata bitape ya mabe to nkongo oyo Nzambe asalelaka mpo na elanga na ye.” Russell abakisi ete likanisi ezali ete “nkongo esepelaka kolongola matiti mabe,” kasi ezali kaka na lobɔkɔ ya Nzambe ya nguya, mpe na bongo ekokisaka mokano na ye. Liteya ya Luther, oyo Jean Calvin, moto ya teoloji ya ekólo France alandaki na nsima, esepelisaki bandimi mingi te oyo balingaka bosembo. Ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki kotika nzela na mabe, mpe kutu kotinda yango? (Yakobo 1:13) Liteya yango mpe makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki na siɛklɛ ya 20, etindaka bato mingi bándima te ete Nzambe mpe Zabolo bazali.
◼ “Zabolo azali kaka makanisi oyo etindaka moto asala mabe” Soki totaleli Zabolo lokola makanisi oyo etindaka moto asala mabe, ekozala mpasi tókanga ntina ya mikapo mosusu ya Biblia. Na ndakisa, na lisolo oyo ezali na Yobo 2:3-6, Nzambe azalaki koloba na nani? Ekoki nde kozala ete azalaki koloba na makanisi mpamba oyo etindaka moto asala mabe, oyo ezalaki epai ya Yobo, to nde azalaki koloba na ye moko? Longola yango, Nzambe alingaki nde kokumisa liboso bizaleli malamu ya Yobo mpe na nsima kotika ye amekama na makanisi oyo etindaka moto asala mabe? Soki tokanisi bongo mpo na Nzambe, ekomonisa ete tondimi te ete azali Nzambe oyo ‘azangi boyengebene.’ (Nzembo 92:15) Nzokande, Nzambe aboyaki ‘kosembola lobɔkɔ na ye’ mpo na kosala Yobo mabe. Nyonso wana emonisi polele ete Zabolo azali te makanisi mpamba oyo etindaka moto asala mabe to makanisi mabe ya Nzambe, kasi azali nde anzelu moko oyo amikómisaki Monguna ya Nzambe.
Nani mpenza azali koyangela mokili?
Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete kondima ete Zabolo azali, ezali likambo oyo esilá ngala. Nzokande, lokola bato balobaka ete mabe eutaka epai ya Zabolo te, bandimbola na bango ezali mpenza kondimisa bato te. Kutu, koboya kondima ete Zabolo azali etindi bato mingi báboya kondimela Nzambe mpe kotosa mibeko na ye.
Charles-Pierre Baudelaire, mokomi moko ya siɛklɛ ya 19 alobaki boye: “Mayele eleki mabe ya Zabolo ezali ya kotinda bato bákanisa ete azali te.” Lokola Zabolo alingaka te eyebana ete azali, yango esali ete bato mingi bándima te ete Nzambe azali. Soki Zabolo azali te, bato mingi bakokanisa ete mabe eutaka epai ya Nzambe mpe bakondimela ye lisusu te. Zabolo alingaka mpenza ete bato bákanisa bongo.
Lokola mokonzi ya bato oyo basalaka mafia, Zabolo alingi te bato báyeba ete azali mpo akokisa mokano na ye malamumalamu. Mposa na ye ezali nini? Biblia elobi boye: “Nzambe ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima, mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Kristo, oyo azali elilingi ya Nzambe, ekoka kokɔta te.”—2 Bakorinti 4:4.
Motuna mosusu ya ntina etikali. Nzambe akosala nini mpo na anzelu mabe oyo atindaka bato básala makambo ya mabe mpe abimisaka minyoko? Yango nde tokolobela na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe asilisaki mbala moko te botomboki ya Zabolo, talá na mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Zabolo azali mosaleli ya Nzambe to monguna na Ye?
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Baanzelu to bato oyo Nzambe akeli bakoki kokóma mabe?
Ezaleli ya kokoka oyo Nzambe apesaki baanzelu mpe bato elimboli te ete bazali na bonsomi ya kosala makambo nyonso oyo balingi. Atako Adama azalaki moto ya kokoka ntango Nzambe akelaki ye, asengelaki kosala te makambo oyo Nzambe apesaki ye nzela te. Na ndakisa, soki alei bosɔtɔ, mabanga mikemike to mabaya, elingaki komemela ye mikakatano. Soki azali likoló ya ngomba mpe amibwaki na nse, akokaki kokufa to kozoka makasi.
Ndenge moko mpe, soki anzelu to moto atosi mibeko ya Nzambe te, akozanga te kobuka mbuma mabe na yango. Na yango, soki moto to anzelu asaleli mabe bonsomi na ye ya kopona, ezalaka mpasi te asala libunga mpe lisumu.—Ebandeli 1:29; Matai 4:4.