Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 15/1 nk. 31-32
  • Tóbatela biloko oyo tosalelá kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbatela biloko oyo tosalelá kala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • BAFƆTƆ MPE BILOKO MOSUSU YA KALA
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 15/1 nk. 31-32

Biloko oyo tosalelá kala

Tóbatela biloko oyo tosalelá kala

BASALELI ya Yehova bakoki kolobela makambo mingi oyo bakutaná na yango na mosala ya Nzambe. Tokoki koyeba makambo yango soki totángi mikanda ya moombo ya sembo, kasi mpe soki tozali kotala bafɔtɔ ya bandeko ya kala, kotánga mikanda oyo batindelaki baninga, toyoki masolo na bango, mpe soki totali biloko oyo bazalaki kosalela na losambo mpe na mosala ya kosakola. Kasi, kobatela biloko yango mpe kolobela makambo oyo eleká ezali na ntina nini? Na Yisraele ya kala, batata bazalaki na mokumba ya koyebisa bana na bango mibeko ya Yehova mpe misala na ye ya kokamwa mpo “bátyela Nzambe ye moko motema.”​—Nz. 78:1-7.

Banda kala, kolukaluka makambo na mikanda ya kala ezalaka na ntina mingi mpo na koyeba ndenge mokano ya Yehova ezali kokokisama. Na ndakisa, ntango banguna balukaki kopekisa mosala ya kotonga tempelo ya Yerusaleme, balukaki na mikanda ya kala na Ekebatana, mboka-mokonzi ya Media, mpe bamonaki rulo moko oyo ezalaki na ndingisa oyo Mokonzi Siruse apesaki mpo mosala yango esalema. (Ezr. 6:1-4, 12) Na yango, tempelo etongamaki lisusu na kolanda mokano ya Nzambe. Luka mokomi ya Evanzile oyo ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta ebandeli,’ alukalukaki mpe na makambo ya kala.​—Luka 1:1-4.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaka likebi mingi na makambo oyo basaleli ya Yehova bakutaná na yango. Ndeko moko oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi amonisaki ete tosengeli kobatela biloko oyo tosalelá kala, kobomba yango, mpe kolobela yango; alobaki boye: “Mpo tóyeba epai tozali kokende, tosengeli koyeba epai touti.” Yango wana, departema ya sika, oyo ebengami Departema ya kobatela biloko ya kala euti kosalema na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York; departema yango etambwisami na Komite ya Bokomi.

BAFƆTƆ MPE BILOKO MOSUSU YA KALA

Ntango mikolo ezali koleka, tokómaka kobosana makambo oyo eleká, mpe mingi kati na biso tomonaka ete esengelaki nde tókomaka makambo oyo ezalaki kosalema na libota. Departema yango ya sika ezali kosala mosala makasi mpo na kobatela biloko oyo tosalelá kala mpe kobomba masolo ya makambo oyo eleká mpe oyo ezali koleka lelo oyo. Bafɔtɔ ya kala oyo departema yango ezali kobomba ekoki kosalisa biso tómona bandeko oyo basalelá Yehova liboso na biso. Kati na biloko ya ntina mingi oyo departema yango ezali kobomba, tokoki kotánga mikanda oyo moombo ya sembo abimisá kala, masolo ya bomoi ya bandeko, mpe biloko mosusu ya kala. Biloko yango ya motuya esalisaka biso tóyeba malamu lisolo na biso na mosala ya Nzambe mpe tóbanga te makambo oyo ekoki kokómela biso na mikolo oyo ezali koya.

Tozali kolendisa yo otángaka motó ya likambo “Biloko oyo tosalelá kala” oyo ekobanda na banimero mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli mpo na koyeba biloko yango. Na ndakisa, nimero oyo ezali koya ekozala na lisolo moko oyo ekozala na bililingi oyo ekoyanola mituna oyo: Valize ya Aurore ezalaki nini? Banani bazalaki kosalela yango? Ntango nini basalelaki yango, mpe mpo na nini?

Ndenge moko na bafɔtɔ ya kala, biloko oyo tosalelá kala esalisaka biso tóyeba lisolo ya ebongiseli na biso mpe bandeko oyo bazalaki liboso na biso. Ezali komonisa kondima mpe molende ya bandeko yango, makambo ya malamu mpe mikakatano oyo bakutanaki na yango na mosala ya Nzambe na biso ya bolingo, mpe ndenge Nzambe azalaki ntango nyonso kotambwisa mpe kosunga basaleli na ye. (Mib. 33:27) Tozali na elikya ete Yehova akopambola milende oyo ezali kosalema mpo na kobatela lisolo na biso Batatoli ya Yehova mpo tózala na bomoko makasi koleka mpe tólendisama mingi mpo na kokokisa mokano na ye.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 31]

Ndenge mosala yango ezali kosalema

Mpo na kobongisa mikanda, ba-DVD, mpe biloko mosusu oyo elobelaka Biblia, bandeko oyo bakomaka masolo, baoyo basalaka mayemi, baoyo basalaka bolukiluki liboso masolo ekomama, mpe bandeko mosusu balukaka makambo mingi na mikanda ya kala. Na yango, Departema ya kobatela biloko ya kala ezali kosala nyonso mpo na koyanganisa mpe kobatela biloko ndenge na ndenge oyo etali lisolo na biso. Biloko yango ezali kouta na Babetele, na masangá, epai ya bato mpe bibongiseli ya mokili. Tótalela mosala yango na mokuse:

Kozwa biloko mpe kotalela yango: Biloko ndenge na ndenge ezali se kobakisama na esika ya kobomba biloko ya kala. Mingi kati na yango ezali biloko oyo bato oyo mabota na bango esalelaka Yehova na bosembo banda kala bapesi to badefisi biso. Kotalela biloko yango ezali kosalisa biso tóyeba malamu koleka ndenge oyo makambo ezalaki kotambola kala mpe bato oyo basalaki yango.

Kotya biloko na biloko na bisika na yango: Departema ya kobatela biloko ya kala ezali na biloko ebele, mosusu eumeli mbula koleka nkama. Biloko yango ezali mitindo ndenge moko te, monene ndenge moko te, mpe esalemá ndenge moko te; na yango esengeli kotya biloko na biloko na bisika oyo ebongi mpo na kozwa yango noki soki balingi kosalela yango.

Kobongisa mpe kobatela: Bandeko oyo bayebi mpenza mosala bazali kobongisa mpe kobatela babuku mpe biloko mosusu oyo elɛmbálɛmbá. Bazali mpe kotya mikanda, bafɔtɔ, biteni ya bazulunalo, bafilme mpe bakasɛti na ordinatɛrɛ. Na ndenge yango, moto akoki komona biloko wana na ordinatɛrɛ mpe ekosɛnga te ete akende kobimisa yango na esika oyo babombá yango.

Kobomba biloko mpe ndenge ya komona yango: Bazali kobomba biloko yango ya kala malamumalamu mpe na bisika oyo ebongi mpo ebunga te mpe ebeba te na molunge mpe na malili. Bazali mpe kotya na ordinatɛrɛ liste ya biloko yango ya kala mpe programɛ oyo ekoki kosalisa moto oyo azali koluka yango amona yango noki.

[Bililingi na lokasa 32]

1. Piblisite ya “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” 2. Liste ya abonema. 3. Motuka ya ekoliseli-lolaka. 4. Ezipeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1912. 5. Mokanda oyo eyebisaki Joseph Rutherford ete akokende bolɔkɔ. 6. Mikro ya radio WBBR. 7. Fɔnɔ. 8. Valize ya mikanda. 9. Makambo oyo ndeko moko akomaki. 10. Telegrame oyo batindelaki Joseph Rutherford.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto