Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/3 lok. 32
  • Ndenge nini otalelaka Yesu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini otalelaka Yesu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/3 lok. 32

Ndenge nini otalelaka Yesu?

Otalelaka Yesu lokola mwana oyo auti kobotama, lokola moto oyo azali kobunda na mpasi ya liwa, to lokola mokonzi moko ya nguya?

Biblia emonisi ete Yesu azali mokonzi moko ya nguya. Kasi, yango elimboli nini mpo na yo?

Bato mingi bandimaka ete Yesu akufaki mpo na bango. Kasi, ndenge nini liwa ya moto moko oyo akufaki eleki sikoyo mbula soki 2 000 ekoki kopesa bato mosusu bomoi lelo oyo?

Tobengi yo na esengo nyonso oya koyoka biyano oyo Biblia ekopesa na mituna yango. Biyano yango ekopesama mokolo ya minei, 5 Aprili, nsima ya kolala ya moi, ntango Batatoli ya Yehova bakoyangana mpo na kokanisa liwa ya Yesu.

Tuná Batatoli ya Yehova na esika ofandi báyebisa yo ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema.

Na pɔsɔ oyo ekolanda Ekaniseli ya liwa ya Yesu, Batatoli ya Yehova bakosala mpe diskur moko ya ntina mingi oyo elobi: “Nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene?” Diskur yango ekozala moko ya makambo ya ntina mingi oyo ekosalema na mokili mobimba mpo na kosalisa bato oyo balingaka mateya ya solo mpe balingi koyeba makambo mosusu mpo na Yesu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto